Makomi
Alma 13


Mokapo 13

Bato babiangami lokola banganganzambe banene na ntina ya bondimi koleka na bango mpe na ntina ya misala na bango ya malamu—Basengeli kolakisa mitindo—Na nzela ya bosembo basantisami mpe bakoti kati na bopemi ya Nkolo—Melikisedeki azalaki moko kati na bato oyo—Banjelu bazali kosakola nsango ya nsai epayi nyonso na mboka—Bakobimisa boyei ya solo ya Klisto. Penepene na mobu 82 Liboso na mbotama ya Klisto.

1 Mpe lisusu, bandeko na ngai, nalingi kozongisa mayele na bino na ntango oyo Nkolo Nzambe apesaki mitindo oyo epayi ya bana na ye; mpe nalingi bomikundola ete Nkolo Nzambe akulisaki banganganzambe, na molongo mosantu na ye, oyo ezalaki na molongo ya Mwana na ye, mpo na koteya makambo oyo epayi ya bato.

2 Mpe banganganzambe bana bakulisamaki na molongo ya Mwana na ye, na lolenge moko ete na nzela yango bato bakoka koyeba lolenge kani bakoki kozela Mwana na ye mpo na bosikoli.

3 Mpe oyo ezali lolenge kani bakulisamaki—babiangami mpe balengelami uta na bokeli ya mokili engebene na boyebi ya Nzambe ya koyeba makambo uta kala, na ntina ya bondimi na bango ya monene koleka mpe misala malamu na bango; na yambo batikami mpo na kopona bolamu to mabe; na boye lokola baponaki bolamu, mpe basalelaki bondimi monene koleka, babiangami na libiangi esantu, iyo, na libiangi wana esantu oyo elengelamaki na, mpe engebene na lisikoli ya bolengeli mpo na baye ya lolenge oyo.

4 Mpe boye babiangamaki na libiangi oyo esantu na ntina ya bondimi na bango, wana ezali basusu kobwaka Molimo ya Nzambe na ntina ya bokasi ya mitema na bango mpe bokufi miso ya mayele na bango, wana, soki ezalaki te mpo na oyo bakokaki kozala na litomba monene lokola bandeko na bango.

5 To mpo na kosukisa, na esika ya yambo bazalaki se ndenge moko kaka na bandeko na bango; boye libiangi oyo esantu elengelamaki uta na bokeli ya mokili mpo na bato ya lolenge oyo lokola balingaki te koyeisa mitema na bango makasi, kozalaka na bomikabi mpe na nzela ya bomikabi ya Mwana Mobotami se Moko, oyo alengelamaki—

6 Mpe boye babiangamaki na libiangi oyo esantu, mpe bakulisamaki na bonganganzambe ya monene ya molongo mosantu ya Nzambe, mpo na koteya mitindo na ye epayi ya bana ya bato, ete bango mpe lisusu bakoka kokota kati na bopemi na ye—

7 Bonganganzambe boye ya monene ezali na molongo ya Mwana na ye, oyo molongo ezalaki uta na bokeli ya mokili; to na maloba mosusu, ezali na ebandeli ya mikolo to nsuka ya mibu te, mpe molengelamaki uta boseko na boseko nyonso, engebene na boyebi na ye ya koyeba makambo nyonso uta kala—

8 Sikawa bakulisamaki na lolenge oyo—babiangamaki na libiangi moko esantu, mpe bakulisamaki na bokuli bosantu, mpe bakamataki likolo na bango bonganganzambe ya monene ya molongo mosantu, oyo libiangi, mpe bokuli, mpe bonganganzambe ya monene, ezali na ebandeli soki mpe nsuka te—

9 Boye bakomi banganganzambe banene libela, na molongo ya Mwana, Mobotami se Moko ya Tata, oyo azali te na ebandeli ya mikolo to nsuka ya mibu, ye atonda na ngolu, alima, mpe bosolo. Mpe ezali boye. Amene.

10 Sikawa, lokola nalobaki mpo na oyo etali molongo mosantu, to bonganganzambe ya monene boye, ezalaki na mingi baoyo bakulisamaki mpe bakomaki banganganzambe banene ya Nzambe; mpe ezalaki na ntina ya bondimi ya koleka mpe boyamboli na bango, mpe bosembo na bango liboso ya Nzambe, mpo baponaki koyambola mpe kosalela bosembo na esika ya kowa;

11 Boye babiangamaki nsima ya molongo na ye mosantu, mpe basantisamaki, mpe bilamba na bango esukwamaki mpembe kati na makila ya Mwana ya mpate.

12 Sikawa bango, nsima ya kosantisama na Molimo Mosantu, lokola bilamba na bango eyeisamaki mpembe, lokola bazalaki peto mpe bazangaki mbindo liboso ya Nzambe, bakokaki te kotala lisumu longola se soki ezalaki na boyini; mpe bazalaki mingi, mingi mpenza koleka, baoyo bayeisamaki peto mpe bakotaki kati na bopemi ya Nkolo Nzambe na bango.

13 Mpe sikawa, bandeko na ngai, nalingi ete bomikitisa liboso ya Nzambe, mpe bobimisa mbuma elongobani mpo na boyamboli, ete bokoka mpe lokola kokota kati na bopemi wana.

14 Iyo, bomikitisa kutu lokola na mikolo ya Melikisedeki, oyo azalaki mpe lokola nganganzambe monene na molongo oyo nalobelaki, ye mpe lokola akamataki likolo na ye bonganganzambe ya monene libela.

15 Mpe ezalaki se Melikisedeki moko oyo epayi ya nani Abalayama afutaki eteni yoko kati na zomi; iyo, kutu tata na biso Abalayama afutaki eteni yoko kati na zomi ya ndambo moko na zomi ya nyonso azalaki na yango.

16 Sikawa makuli oyo epesamaki na lolenge oyo, ete na nzela na yango bato bakoka kozela Mwana ya Nzambe, yango kozalaka elilingi ya molongo na ye, soki te yango kozalaka molongo na ye, mpe oyo ete bakoka kozela ye mpo na bolimbisi ya masumu na bango, ete bakoka kokota kati na bopemi ya Nkolo.

17 Sikawa Melikisedeki oyo azalaki mokonzi likolo ya mboka ya Saleme; mpe bato na ye bakolaki makasi na mabe mpe bonsomo; iyo, bango nyonso babungaki nzela; batondaki na ndenge nyonso ya nkuna;

18 Kasi Melikisedeki lokola asalelaki bondimi makasi, mpe azwaki mosala ya bonganganzambe ya monene engebene na molongo mosantu ya Nzambe, ateyaki boyamboli epayi ya bato na ye. Mpe tala, bayambolaki; mpe Melikisedeki afandisaki kimia na mboka na mikolo na ye; boye abiangamaki mwana ya mokonzi na kimia, mpo azalaki mokonzi na Saleme; mpe ayangelaki na nse ya tata na ye.

19 Sikawa, bazalaki mingi yambo na ye, mpe lisusu bazalaki mingi nsima na ye, kasi moko te azalaki monene koleka; boye, ye mpenza nde batangi ye mingi mingi.

20 Sikawa nalingi te kobandela lisusu likambo yango; nini oyo nalobi ekoki kokoka. Tala, makomi ezali liboso na bino; soki bokobalola ntina na yango ekozala mpo na bobebisami na bino moko.

21 Mpe sikawa esalemaki ete ntango Alma alobaki maloba oyo epayi na bango, asembolaki loboko na ye epayi na bango mpe agangaki na mongongo makasi, kolobaka: Sikawa ezali ntango mpo na koyambola, mpo na mokolo ya lobiko mopusani penepene;

22 Iyo, mpe mongongo ya Nkolo, na monoko ya banjelu, esakoli yango epayi na bikolo nyonso; iyo, sakola yango, ete bakoka kozwa na nsango ya nsai ya bosepeli monene; iyo, mpe azali koyebisa nsango oyo ya nsai oyo na kati ya bato na ye nyonso, iyo, kutu na bango oyo bapanzani mosika likolo ya etando ya mabele; yango wana ekomi kino epayi na biso.

23 Mpe eyebisami epayi na biso na maloba ya polele, ete tokoka kososola, ete tokoka te kobunga; mpe oyo mpo tozalaki batelengani na mboka oyo toyebaki te; tala ntina, tosungami boye malamu mpenza, mpo tozali na nsango ya nsai oyo esakolami epayi na biso na biteni nyonso ya elanga ya vinyo na biso.

24 Mpo tala, banjelu bazali kosakolaka yango epayi na mingi na ntango oyo na mboka na biso; mpe oyo mpo na ntina ya kolengela mitema ya bana ya bato mpo na koyamba liloba na ye na ntango ya boyei na ye na nkembo na ye.

25 Mpe sikawa tokozela bobele mpo na koyoka bansango ya bosepeli esakolama epayi na biso na monoko ya banjelu, mpo na oyo etali boyei na ye; mpo ntango eyei, biso toyebi te lolenge boni ekozala kala mingi te. Natombeli na Nzambe ete ekoka kozala na mikolo na ngai; kasi tika kala mingi te soki te na ntango nsima, na yango nakosepela.

26 Mpe ekoyebisama epayi na bayengebene mpe basantu, na monoko ya banjelu, na ntango ya boyei na ye ete maloba ya batata na biso ekoka kokokisama, engebene na oyo wana balobaki mpo na ntina na ye, oyo ezalaki engebene na molimo ya masakoli oyo ezalaki na bango.

27 Mpe sikawa, bandeko na ngai, natombeli uta na eteni ya katikati ya motema na ngai, iyo, na bobangi monene kutu kino na bolozi, ete boyoka maloba na ngai, mpe bobwaka mosika masumu na bino, mpe bozelisa te mokolo ya boyamboli na bino;

28 Kasi ete bomikitisa liboso ya Nkolo, mpe bobelela na nkombo na ye esantu, mpe bokengela mpe bosambela ntango nyonso, ete bokoka kosenginiama te koleka oyo bokoki kokangela motema, mpe boye bokambama na Molimo Mosantu, bokoma bato na bomikitisi, basokemi, batosi, bampikiliki, botondisama na bolingo mpe motema molai nyonso;

29 Mpe kozala na bondimi na Nkolo; bozala na elikya ete bokozwa bomoi ya seko; kozalaka na bolingo ya Nzambe ntango nyonso na mitema na bino, ete bokoka kotombolama na mokolo ya nsuka mpe bokota kati na bopemi na ye.

30 Mpe tika Nkolo apesa epayi na bino boyamboli, ete bokitisa te nkele na ye likolo na bino, ete bokoka kokangama te na nse na miniololo ya lifelo, ete bokoka koyoka mpasi ya liwa ya mibale te.

31 Mpe Alma alobaki lisusu maloba mingi koleka epayi ya bato, oyo ekomami te na buku oyo.

Bimisa na lokasa