Makomi
Alama 51


Mokapo 51

Bato ba mokonzi baluki kobongola mobeko mpe batii mokonzi—Pawolani mpe bato nsomi basungami na mokano mwa bato banso—Moloni asengisi bato ba mokonzi kobatela ekolo ya bango to kotiama o liwa—Amalikia mpe Balamani bakangi bingumba mingi bilendisama—Teakumi abengani bokoti bwa Balamani mpe abomi Amalikia o ema ya ye. Penepene na 67–66 Yambo ya Klisto.

1 Mpe sikawa esalemaki ete o ebandeli ya mobu mwa tuku mibale na mitano mwa bokonzi bwa basambisi likolo lya bato ba Nefi, etiaki bango kimia o kati ya bato ba Lehi mpe bato ba Moliatoni etali mboka ya bango, mpe ebandaki bango mobu mwa tuku mibale na mitano na kimia;

2 Nzokande, basimbaki ntango elai te kimia mpenza o mboka, mpo ebandaki kozala boweli o ntei ya bango botali mosambisi mokonzi, Pawolani; mpo tala, ezalaki eteni yoko ya bato baye bazalaki na mposa ete ndambo mwa moke ya mobeko mobaluka.

3 Kasi tala, Pawolani alingaki te kobalola to kondima mobeko mobaluka; yango wana ayokemelaki te na bango baye batindaki mikano mya bango elongo na bisenge bya bango bitali bobaloli bwa mobeko.

4 Yango wana, bango baye bazalaki na mposa ete mobeko mobaluka basilikaki na ye, mpe bazalaki na mposa ete azala lisusu te mosambisi mokonzi likolo lya mboka; yango wana ebimaki boswani boko bwa moto botali likambo lyango, kasi mpo ya bosopi makila te.

5 Mpe esalemaki ete bango baye bazalaki na mposa ete Pawolani abakolama uta o kiti ya bosambisi babiangemaki bato ba mokonzi, mpo bazalaki na mposa ete mobeko mobaluka na lolenge loko la kolongola boyangeli bwa bonsomi mpe kotia mokonzi moko likolo lya mboka.

6 Mpe bango baye bazalaki na mposa ete Pawolani atikala mosambisi mokonzi likolo lya mboka bakamataki likolo lya bango nkombo ya bato nsomi; mpe boye ezalaki bokabwani o ntei ya bango, mpo bato nsomi balapaki ndai to bayokanaki mpo ya kosimba makoki ma bango mpe matomba ma eyamba ya bango na boyangeli bwa bonsomi.

7 Mpe esalemaki ete likambo liye lya boweli bwa bango litiamaki na mokano mwa bato. Mpe esalemaki ete mokano mwa bato mozalaki mpo ya bato nsomi, mpe Pawolani atikalaki na kiti ya bosambisi, eye esalaki bosepeli boike o ntei ya bandeko ba Pawolani mpe lisusu mingi ya bato ba lipanda, baye lisusu bakangisaki monoko na bato ba mokonzi, ete bamekaki te kotia ntembe kasi basengelaki kosimba likambo lya bonsomi.

8 Sikawa bango baye bazalaki mpo ya bakonzi bazalaki bango ba mbotana ya likolo, mpe balukaki kozala bakonzi; mpe basungamaki na bango baye balukaki nguya mpe bokulaka likolo lya bato.

9 Kasi tala, eye ezalaki ntango yoko ya kpokoso mpo ya boweli bwa lolenge loye kozala o ntei ya bato ba Nefi; mpo tala, Amalikia alamusaki lisusu mitema mya bato ba Balamani na kobunda na bato ba Banefi, mpe azalaki kosangisaka basoda uta o biteni binso bya mboka ya ye, mpe kopesaka bango mandoki, mpe kolengeleke mpo ya etumba na etingia enso; mpo alapaki komele makila ma Moloni.

10 Kasi tala, tokomono ete elako ya ye eye asalaki ezalaki tapale; kasi, alengeleki yemei mpe mampinga ma ye mpo ya koya kobunda na Banefi.

11 Sikawa mampinga ma ye mazalaki manene te lokola mazalaki kina o ntango ena, na ntina ya nkoto mingi baye babomamaki na loboko la Banefi; kasi ata bobungi bonene bwa bango, Amalikia asangisaka elongo limpinga lyoko linene lya bokamwi, mpenza ete abangaki te kokita o mboka ya Zalayemila.

12 Iyo, kutu Amalikia akitaki yemei, o moto mwa Balamani. Mpe ezalaki o mobu mwa tuku mibale na mitano mwa bokonzi bwa basambisi; mpe ezalaki o ntango ena kaka eye babandaki kotia makambo ma boweli bwa bango botali mosambisi mokonzi, Pawolani.

13 Mpe esalemaki ete eyokaka bato babiangemaki bato ba mokonzi ete Balamani bazalaki koyaka mpo ya kobunda na bango, basepelaki o mitema mya bango; mpe baboyaki kokamata mandoki ma bango, mpo bazalaki na nkele boye na mosambisi mokonzi, mpe lisusu bato ba lipanda, ete balingaki te kokamata mandoki mpo ya kobatela ekolo ya bango.

14 Mpe esalemaki ete emonoki Moloni eye, mpe emonoki ye lisusu ete Balamani bazalaki koyaka o kati ya ndelo ya mboka, azalaki na nkele mpenza na ntina ya nkanza ya bato bana baye asalaka na etingia boye mpo ya kobatela; iyo, azalaki na nkele mpenza; bozo bwa ye botondaki na nkanda na bango.

15 Mpe esalemaki ete atindaki esenge, na mokano mwa bato, epai ya moyangeli wa mboka, kozalaka na mposa ete atanga yango, mpe apesa ye (Moloni) nguya ya kosengisa bakabwani bana mpo ya kobatela ekolo ya bango to kotia bango o liwa.

16 Mpo ezalaki bokeli bwa ye bwa yambo kotia nsuka yoko na boweli mpe bokabwani bwa lolenge loye o ntei ya bato; mpo tala, eye ezalaki kina ntango ena ntina yoko ya bobebisami bonso bwa bango. Mpe esalemaki ete epesamaki ye ndingisa engebene na mokano mwa bato.

17 Mpe esalemaki ete Moloni atindaki ete limpinga lya ye likende kobunda na bato bana ba mokonzi, mpo ya kokitisa lolendo la bango mpe bonkumu bwa bango mpe kolalisa bango o mabele, to basengelaki kokamata mandoki mpe kosunga likambo lya lipanda.

18 Mpe esalemaki ete mampinga matambolaki mpo ya kobunda na bango; mpe bakitisaki lolendo la bango mpe bonkumu bwa bango, mpenza ete lokola batombolaki mandoki ma bango ma etumba mpo ya kobunda na bato ba Moloni bakatamaki o nse mpe balalisamaki o mabele.

19 Mpe esalemaki ete ezalaki nkoto inei ya bakabwani bana bakatamaki o nse na mopanga; mpe bango ba bakambi ba bango baye babomamaki te o etumba bakamatamaki mpe babwakamaki o kati ya boloko, mpo ezalaki ntango te mpo ya bosambisi bwa bango o eleko ena.

20 Mpe montika mwa bakabwani bana, esika ya kotutama o nse o mabele na mopanga, bandimaki bendele ya lipanda, mpe basengisamaki mpo ya kotombola nkombo ya lipanda likolo lya manongi ma bango, mpe o engumba ya bango, mpe kokamata mandoki mpo ya kobatela ekolo ya bango.

21 Mpe boye Moloni atiaki nsuka yoko na bato ba mokonzi, ete ezalaki te moko ayebanaki na nkombo ya bato ba mokonzi; mpe boye atiaki nsuka yoko na nkanza mpe lolendo la bato baye balakisaki makila ma bonkumu; kasi bamememeki o nse mpo ya komikitisa bo bandeko ba bango, mpe mpo ya kobunda na mpiko mpo ya bonsomi bwa bango uta o bowumbu.

22 Tala, esalemaki ete ntango ezalaki Moloni boye kobukaka o nse bitumba mpe boweli o ntei ya bato ba yemei, mpe koyangelaka bango na kimia mpe bompenza, mpe kosalaka mabongisi mpo ya kolengele etumba na Balamani, tala, Balamani bakomaka o kati ya mboka ya Moloni, eye ezalaki o ndelo ya libongo lya mbu.

23 Mpe esalemaki ete Banefi bazalaki na makasi makoka te o engumba ya Moloni; yango wana Amalikia abenganaki bango, kobomaka mingi. Mpe esalemaki ete Amalikia akamataki bozwi bwa engumba, iyo, bozwi bwa bisika bya bango bikasi.

24 Mpe bango baye bakimaki libanda lya mboka ya Moloni bayaki o engumba ya Nefiya; mpe lisusu bato ba engumba ya Lehi basangisaki bangomei elongo, mpe basalaki bolengeli mpe babonganaki mpo ya koyamba Balamani o etumba.

25 Kasi esalemaki ete Amalikia andimaki te ete Balamani bakende o engumba ya Nefiya mpo ya etumba, kasi abombaki bango o nse mpembeni ya libongo lya mbu, kotikaka bato o engumba enso mpo ya kosimba mpe kobatela yango.

26 Mpe boye akobaki, na kokamataka bingumba mingi, engumba ya Nefiya, mpe engumba ya Lehi, mpe engumba ya Moliatoni, mpe engumba ya Omina, mpe engumba ya Gidi, mpe engumba ya Muleki, inso iye izalaki o ndelo ya esti mpembeni ya libongo lya mbu.

27 Mpe boye ezwaka Balamani, na mayele mabe ma Amalikia, engumba mingi boye, na mampinga meke meke ya bango, inso ya mango ilendisamaki mpenza nsima ya lolenge la bisika bikasi bya Moloni; inso ya yango ipesaki bisika bikasi mpo ya Balamani.

28 Mpe esalemaki ete batambolaki o ndelo ya mboka Beboo, kobenganaka Banefi liboso lya bango mpe kobomaka mingi.

29 Kasi esalemaki ete bakutanaki na Teakumi, oyo abomaka Moliatoni mpe azalaki na moto mwa bato ba ye o bokimi bwa ye.

30 Mpe esalemaki ete azalaki na moto mwa Amalikia lokola, lokola azalaki kotambolaka elongo na limpinga lya ye linene ete akoka kokamata mboka Beboo, mpe lisusu mboka ya epai ya nordi.

31 Kasi tala akutanaki na bosiswi boko na kobenganamaka na Teakumi mpe bato ba ye, mpo bazalaki babundi banene; mpo moto na moto wa Teakumi alekaki Balamani na bokasi mpe na mayele ma etumba, mpenza ete balongaki likolo lya Balamani.

32 Mpe esalemaki ete batungisaki bango, mpenza ete babomaki bango kutu kina ekomaki molili. Mpe esalemaki ete Teakumi mpe bato ba ye batelemisaki biema bya bango o ndelo ya mboka Beboo; mpe Amalikia atelemisaki biema bya ye o ndelo ya zelo ya libongo mpembeni ya libongo lya mbu, mpe nsima ya lolenge loye babenganamaki.

33 Mpe esalemaki ete eyaka butu, Teakumi mpe mosali wa ye bapusanaki bo bayibi mpe babimaki o butu, mpe bakotaki o kati ya nganda ya Amalikia; mpe tala, mpongi ekangaki bango na ntina ya bolembi boike bwa bango, boye bosalemaki na ntina ya misala mpe molunge mwa mokolo.

34 Mpe esalemaki ete Teakumi apusanaki bo moyibi na nkuku o kati ya ema ya mokonzi, mpe akotisaki ye nkonda yoko o motema mwa ye; mpe asalaki liwa lya mokonzi sasaipi ete alamusaki te basali ba ye.

35 Mpe azongaki lisusu na nkuku o nganda ya yemei, mpe tala, bato ba ye bazalaki kolalaka, mpe alamusaki bango mpe alobelaki bango makambo manso asalaka.

36 Mpe asalaki ete mampinga ma ye mateleme na bobongi, mbele Balamani balamuka mpe baya likolo lya bango.

37 Mpe boye esilaki mobu mwa tuku mibale na mitano mwa bokonzi bwa basambisi likolo lya bato ba Nefi; mpe boye esilaki mikolo mya Amalikia.