Makomi
Alama 39


Mitindo mya Alama na mwana mobali wa ye Koliatoni.

Kokwaka mikapo 39 o 42 eye o kati.

Mokapo 39

Lisumu lya bosoni lizali bonsomo—Masumu ma Koliatoni mapekisaki Bazolami koyamba liloba—Bosikoli bwa Klisto bosali nsima na kobikisaka bapotongono bazalaki yambo ya bwango. Penepene na 74 Yambo na Klisto.

1 Mpe sikawa, mwana mobali wa ngai, nazali na mwa moke lisusu ya koloba epai ya yo koleka nini nalobaki epai ya ndeko mobali wa yo; mpo tala, etalaki yo te molende mwa ndeko mobali wa yo, bopotongono bwa ye, mpe etingia ya ye na kobombaka mitindo mya Nzambe? Tala, elakisaki ye te ndakisa yoko elamu mpo ya yo?

2 Mpo osalaki keba mingi te epai ya maloba ma ngai lokola esalaki ndeko wa yo, o ntei ya bato ba Bazolami. Sikawa, eye ezali nini naboyi na yo; okobaki na komikumisa na bokasi bwa yo mpe bwania bwa yo.

3 Mpe eye ezali enso te, mwana mobali wa ngai. Osalaki eye ezali mpasi epai ya ngai; mpo osundolaki mosala, mpe okendeki likolo o kati ya mboka ya Siloni o ntei ya ndelo ya Balamani, nsima ya mwasi wa pite Izabela.

4 Iyo, ayibaki mosika mitema mya mingi; kasi eye ezalaki te bolimbisi mpo ya yo, mwana mobali wa ngai. Osengelaki koyika mpiko na mosala na mwango ozwaki mokumba.

5 Eyebi yo te, mwana mobali wa ngai, ete makambo maye mazali bonsomo boko o miso mya Nkolo; iyo, nsomo mingi koleka likolo lya masumu manso longola se bosopi makila mazangi elindo to kowanganaka Molimo Mosantu?

6 Mpo tala, soko owangani Molimo Mosantu ezalaki ye na esika mbala yoko na yo, mpe oyebi ete owangani ye, tala eye ezali lisumu liye likolimbisama te; iyo, mpe onso oyo akoboma na kobundisaka mwinda mpe boyebi bwa Nzambe, ezali petepete te mpo ya ye kozwa bolimbisi; iyo, nalobi epai ya yo, mwana mobali wa ngai ete ezali petepete te mpo ya ye kozwa bolimbisi boko.

7 Mpe sikawa mwana mobali wa ngai, nalingi na Nzambe ete ozalaka te na elindo ya bobe boko bonene boye. Nalingaki te kowumela likolo lya mabe ma yo, mpo ya kozokisa bozo bwa yo, soko ezalaki te mpo ya bolamu bwa yo.

8 Kasi tala, okoki te kobomba mabe ma yo na Nzambe; mpe longola se soko oyamboli makoteleme lokola litatoli likolo lya yo o mokolo mwa nsuka.

9 Sikawa mwana mobali wa ngai nalingi ete oyambola mpe osundola masumu ma yo, mpe okende lisusu te nsima ya mposa ya miso mya yo, kasi omiwangana o makambo maye manso; mpo longola se soko osali eye okoki ata moke te kosangola bokonzi bwa Nzambe. O, omikundola, mpe kamata yango likolo lya yo, mpe omiwangana o makambo maye.

10 Mpe natindi yo kokamata likolo lya yo kotunana elongo na bandeko babali bankulutu ba yo na misala mya yo; mpo tala, ozali o bolenge bwa yo, mpe ozali na mposa ya koleisama na bandeko ba yo. Mpe sala keba na toli ya bango.

11 Ndima te yomei okambema mosika na likambo lya mpamba mpe lya ligboma; Ndima te zabulu akamba motema mwa yo mosika lisusu nsima ya basi bana ba nkuna ba pite. Tala, O mwana mobali wa ngai, boniboni enene bobe omemeki likolo lya Bazolami; mpo emonoki bango etamboleli ya yo balingaki te kondima na maloba ma ngai.

12 Mpe sikawa Molimo mwa Nkolo alobi epai ya ngai: Tinda bana ba yo kosala bolamu, mbele bakamba mosika mitema mya bato mingi na bobebisami. Yango wana natindi yo, mwana mobali wa ngai, na bobangi bwa Nzambe, ete otika mabe ma yo.

13 Ete obaluka na Nkolo na mayele, bokasi, mpe makasi ma yo manso; ete okamba mosika lisusu te mitema na kosala na nkuna; kasi kutu zonga epai ya bango, mpe ndima miko mya yo mpe mbeba ena eye osali.

14 Luka te bomengo to biloko bya mpamba bya mokili moye; mpo tala, okoki te komeme byango na yo.

15 Mpe sikawa, mwana mobali wa ngai, nalingi koloba mwa moke epai ya yo etali boyei bwa Klisto. Tala, nalobi epai ya yo, ete ezali ye oyo akoya solo kolongola masumu ma mokili; iyo, akoya kosakola nsango ya nsai ya lobiko epai ya bato ba ye.

16 Mpe sikawa, mwana mobali wa ngai, eye ezali mosala mpo ya mwango obiangemaki, mpo ya kosakola nsango eye ya nsai epai ya bato ba ye, mpo ya kolengele mayele ma bango; mpo kutu ete lobiko lokoka koya epai ya bango, ete bakoka kolengele mayele ma bana ba bango na koyoka liloba o ntango ya boyei bwa ye.

17 Mpe sikawa nakokitisa motema mwa yo mwa moke na likambo liye. Tala, ozali kokamwa ntina nini makambo maye mayebanaki kala yambo masalema. Tala, nalobi epai ya yo, ezali te bozo boko o ntango eye na motuya epai ya Nzambe lokola bozo boko bokozala o ntango ya boyei bwa ye?

18 Elongobani lokola ete mwango mwa bosikoli moyebana epai ya bato baye lokola epai ya bana ba bango?

19 Ezali te lokola petepete o ntango eye mpo ya Nkolo kotinda anzelu wa ye kosakola nsango eye ya nsai epai ya biso lokola epai ya bana ba biso, to lokola nsima ya boyei bwa ye?