Makomi
Alama 2


Mokapo 2

Amalisi aluki kozala mokonzi mpe aboyami ye na bato—Balandi ba ye bakomisi ye mokonzi—Baamalisi basali etumba na Banefi mpe bakweisami—Balamani mpe Baamalisi basangisi makasi mpe bakweisami—Alama abomi Amalisi. Penepene na 87 Yambo ya Klisto.

1 Mpe esalemaki ete o ebandeli ya mobu mwa mitano mwa bokonzi bwa bango ebandaki kozala boweli o ntei ya bato; mpo yoko moto, kobiangemaka Amalisi, kozalaka moto wa mayele mabe, iyo, moto wa bwania na lolenge la bwania bwa mokili, azalaki moto nsima ya molongo mwa moto oyo abomaki Gideona na mopanga, oyo abomamaki engebene na mobeko—

2 Sikawa Amalisi oyo abendaka mosika, na mayele ma ye mabe, bato baike nsima ya ye; kutu boye nzike ete babandaki kokoma na nguya mingi; mpe babandaki kosala makasi mpo ya kotia Amalisi kozala mokonzi moko likolo lya bato.

3 Sikawa eye ezalaki ya kobangisa na bato ba eklezia, mpe lisusu na baye babendamaka te mosika nsima ya mandimisi ma Amalisi; mpo bayebaki ete engebene na mobeko mwa bango ete makambo ma lolenge lona masengelaki kotiama na mokano mwa bato.

4 Yango wana, soko nzela ekokaki ete Amalisi alonga mokano mwa bato, ye, kozalaka moto moko wa nkuna, alingaki kozangisa bango makoki mpe matomba ma bango ma eklezia; mpo ezalaki mokano mwa ye mwa kobebisa eklezia ya Nzambe.

5 Mpe esalemaki ete bato basanganaki elongo o ntaka ya mboka mobimba, moto na moto engebene na mayele ma ye, soko ezalaki mpo ya Amalisi to mpo ya Amalisi te, na nzoto ikesene, kozalaka na boswani mpe boweli bwa bokamwi moko na mosusu.

6 Mpe boye basanganaki bangomei elongo mpo ya kobwaka o kati mikano mya bango mitali likambo lyango; mpe bamemeki lyango liboso lya basambisi.

7 Mpe esalemaki ete mokano mwa bato moyaki te mpo ya Amalisi, ete akomisamaki mokonzi te likolo lya bato.

8 Sikawa eye epesaki bosepeli boike o mitema mya bango baye bazalaki te mpo ya ye; kasi Amalisi alamusaki bango baye bazalaki mpo ya ye na nkanda ya bango baye bazalaki te mpo ya ye.

9 Mpe esalemaki ete basanganaki bangomei elongo, mpe babulisaki Amalisi mpo azala mokonzi wa bango.

10 Sikawa ekomisamaki Amalisi mokonzi likolo lya bango atindaki bango ete bakamata mandoki mpo ya kobundisa bandeko ba bango; mpe eye asalaki ete akoka koyangelamisa bango na ye.

11 Sikawa Baamalisi bakesenisamaki na nkombo ya Amalisi, kobiangemaka Baamalisi, mpe batikali babiangemaki Banefi, to bato ba Nzambe.

12 Yango wana bato banso ba Banefi bazalaki na boyebi bwa mokano mwa Baamalisi, mpe yango wana balengeleki mpo ya kokutana na bango; iyo, balataki bangomei mandoki ma mipanga, mpe ma nsendo, mpe ma matimbo, mpe ma makula, mpe ma mabanga, mpe ma bilingongo, mpe ndenge inso ya mandoki ma etumba ma lolenge na lolenge.

13 Mpe boye balengeleki kokutana na Baamalisi o ntango ya boyei bwa bango. Mpe ezalaki bakapiteni baponomoki, mpe bakapiteni banene, mpe bakapiteni bakonzi, engebene na mitango mya bango.

14 Mpe esalemaki ete Amalisi apesaki bato ba ye ndenge inso ya mandoki ma etumba ma lolenge na lolenge; mpe lisusu aponoki bayangeli mpe bakambi likolo lya bato ba ye, mpo ya kokamba bango o etumba na bandeko ba bango.

15 Mpe esalemaki ete Baamalisi bamataki o ngomba patatalu nkombo Aminiwu, eye ezalaki o esti ya ebale Sidoni, eye elekaki mpembeni ya mboka ya Zalayemila, mpe kuna babandaki kosala etumba na Banefi.

16 Sikawa Alama, kozalaka mosambisi mokonzi mpe moyangeli wa bato ba Nefi, yango wana akendeki kuna elongo na bato ba ye, iyo, elongo na bakapiteni, mpe bakapiteni bakonzi ba ye, iyo, o moto mwa mampinga ma ye, mpo ya kobunda na Baamalisi.

17 Mpe babandaki koboma Baamalisi likolo lya ngomba patatalu o esti ya Sidoni. Mpe Baamalisi babandaki kowela na Banefi na bokasi bonene, mpo ete mingi ya Banefi bakweyaki liboso lya Baamalisi.

18 Nzokande Nkolo apesaki bokasi na loboko la Banefi, ete babomaki Baamalisi na bobomi bonene, ete babandaki kokima liboso lya bango.

19 Mpe esalemaki ete Banefi balandaki Baamalisi mokolo mobimba, mpe babomaki bango na bobomi boike, mpo ete ebomamaki Baamalisi bato nkoto zomi na ibale nkama itano na tuku isato na ibale; mpe ebomamaki ya Banefi bato nkoto motoba nkama itano na tuku motoba na ibale.

20 Mpe esalemaki ete ekokaki Alama kolanda lisusu te Baamalisi, asalaki ete bato ba ye batelemisa biema bya bango o lobwaku la Gideona, lobwaku lobiangemaki nsima ya Gideona ena oyo abomamaki na loboko la Newolo na mopanga; mpe na lobwaku loye Banefi batelemisaki biema bya bango mpo ya butu.

21 Mpe Alama atindaki banongi mpo ya kolanda batikali ba Baamalisi, ete akoka koyeba miango mya bango mpe bikokolo bya bango, na yango akokaki komikengele likolo lya banguna ba bango, ete akokaki kobatela bato ba ye uta na kobebisama.

22 Sikawa bango baye atindaki libanda mpo ya kokenge nganda ya Baamalisi babiangemaki Zelami, mpe Aminoli, mpe Mati, mpe Limiyele; baye bazalaki baye bakendeki libanda elongo na bato ba bango mpo ya kokenge nganda ya Baamalisi.

23 Mpe esalemaki ete o mokolo mwa nsima bazongaki mbangu o nganda ya Banefi, bakamwaki mingi, mpe bazwamaki na nsomo nzike, kolobaka:

24 Tala, tolandaki nganda ya Baamalisi, mpe o bokamwi bonene bwa biso, o mboka ya Minoni, likolo lya mboka ya Zalayemila, o botamboli bwa mboka ya Nefi, tomonoki mampinga ma motango monene mwa Balamani; mpe tala, Baamalisi basanganaki na bango;

25 Mpe bazali likolo lya bandeko ba biso o mboka ena; mpe bazali kokimaka liboso lya bango elongo na bibwele bya bango, mpe basi ba bango, mpe bana ba bango, o engumba ya biso; mpe longola se soko tosali mbangu bakozwa engumba ya biso, mpe batata ba biso, mpe basi ba biso, mpe bana ba biso bakobomama.

26 Mpe esalemaki ete bato ba Nefi bakamataki biema bya bango, mpe bakendeki libanda lya lobwaku la Gideona o engumba ya bango, eye ezalaki engumba ya Zalayemila.

27 Mpe tala, lokola bazalaki kokatisa ebale Sidoni, Balamani mpe Baamalisi, na motango penepene na monene, lokola ezalaki, lokola zelo ya mbu, bayaki likolo lya bango mpo ya koboma bango.

28 Nzokande, Banefi kozwaka bokasi na loboko la Nkolo, esambelaki bango makasi na ye ete alinga kobikisa bango libanda lya maboko ma bayini ba bango, yango wana, Nkolo ayokaki bogangi bwa bango, mpe apesaki bango bokasi, mpe Balamani mpe Baamalisi bakweyaki liboso lya bango.

29 Mpe esalemaki ete Alama abundaki na Amalisi na mopanga, elongi na elongi; mpe bawela makasi, moko na mosusu.

30 Mpe esalemaki ete Alama, kozalaka moto moko wa Nzambe, esalelamaki ye na bondimi boike, abelelaki, kolobaka: O Nkolo, yoka ngolu mpe bikisa bomoi bwa ngai, ete nakoka kozala esalele yoko o maboko ma yo mpo ya kobikisa mpe kobatela bato baye.

31 Sikawa elobaki Alama maloba maye awelaki lisusu na Amalisi; mpe azwaki bokasi, mpo ete abomaki Amalisi na mopanga.

32 Mpe awelaki lisusu na mokonzi wa Balamani; kasi mokonzi wa Balamani akimaki uta o liboso lya Alama mpe atindaki bakengeli ba ye mpo ya kowela na Alama.

33 Kasi Alama, elongo na bakengeli ba ye, babundaki na bakengeli ba mokonzi wa Balamani kina abomaki mpe abenganaki bango nsima.

34 Mpe boye apetolaki mabele, to kutu libongo liye lizalaki o westi ya ebale ya Sidoni, kobwakaka nzoto ya Balamani baye babomamaka o kati ya mai ma Sidoni, ete na mango bato ba ye bakokaki kozala na esika ya kokatisa mpe kowela na Balamani mpe Baamalisi o mopanzi mwa westi ya ebale ya Sidoni.

35 Mpe esalemaki ete ekatisaka bango banso ebale ya Sidoni ete Balamani mpe Baamalisi babandaki kokima liboso lya bango, ata bazalaki na motango monene ete bakokaki te kotangema.

36 Mpe bakimaki liboso lya Banefi ona esobe eye ezalaki o westi mpe o nordi, mosika o ngambo esusu ya ndelo ya mboka ya bango; kasi Banefi balandaki bango na makasi ma bango, mpe babomaki bango.

37 Iyo, bakutanaki ngambo na ngambo, mpe babomamaki mpe babenganamaki, kina bapanzamaki o westi, mpe o nordi, kina bakomaki o esobe, eye ebiangemaki Elimowuti; mpe ezalaki eteni ena ya esobe eye etondanaki na niama ya zamba mpe ya loma.

38 Mpe esalemaki ete mingi ya bango bakufaki o esobe na mpota ya bango, mpe baliamaki na niama ya zamba mpe bingondo bya likolo; mpe mikuwa mya bango mizwamaki, mpe mitondaki meke likolo lya mabele.