Makomi
Alama 3


Mokapo 3

Baamalisi bamiti elembo engebene na maloba ma bobikuli—Balamani bazwi botutu mpo ya botomboki bwa bango—Bato bamemi botutu bangomei—Banefi balongi limpinga lisusu lya Balamani. Penepene na 87–86 Yambo ya Klisto.

1 Mpe esalemaki ete Banefi baye babomamaki te na mandoki ma etumba, esilisaki bango kokunda baye babomamaki—sikawa motango mwa babomami motangemaki te, na ntina ya bonene bwa motango mwa bango—esilisaka bango kokundaka bakufi ba bango bazongaki o mboka ya bango, mpe o ndako ya bango, mpe basi ba bango, mpe bana ba bango.

2 Sikawa basi mpe bana mingi babomamaki na mopanga, mpe lisusu mingi ya ngombe bibwele bya bango mpe bitonga bya bango; mpe lisusu mingi ya mbuma ya bilanga bya bango ibebisamaki, mpo iniatamaki na mampinga ma bato.

3 Mpe sikawa mingi ya Balamani mpe Baamalisi baye babomamaka likolo lya libongo lya ebale Sidoni babwakamaka o kati ya mai ma Sidoni; mpe tala mikuwa mya bango mizali o nse ya mbu mpe mizali mingi.

4 Mpe Baamalisi bakesenisamaki na Banefi, mpo bamitiaki elembo etane o bilongi bya bango nsima ya lolenge la Balamani; nzokande bakokolaka te nsuki ya mito mya bango bo Balamani.

5 Sikawa mito mya Balamani mikokolamaki; mpe bazalaki bolumbu, longola se soko ezalaki mposo eye ezingamaki penepene na nketo ya bango, mpe lisusu ebundele ya bango, eye ezingamaki penepene na bango, mpe matimbo ma bango, mpe makula ma bango, mpe mabanga ma bango, mpe bilingongo bya bango, mpe bongo na bongo.

6 Mpe mposo ya nzoto ya Balamani izalaki indo, engebene na elembo eye etiamaki likolo lya batata ba bango, eye ezalaki botutu boko likolo lya bango na ntina ya bobuki mobeko bwa bango mpe botomboki bwa bango na bandeko ba bango, baye bazalaki Nefi, Yakobo, mpe Yosefe, mpe Sami, baye bazalaki sembo mpe basantu.

7 Mpe bandeko ba bango balukaki nzela ya kobebisa bango, yango wana bazwaki botutu; mpe Nkolo Nzambe atiaki elembo likolo lya bango, iyo, likolo lya Lamani mpe Lemuele, mpe lisusu bana babali ba Yisamaele, mpe basi ba Bayisamaele.

8 Mpe eye esalemaki ete nkona ya bango ekoka kokesenisama na nkona ya bandeko ba bango, ete na yango Nkolo Nzambe akoka kobatela bato ba ye, ete bakoka te kopotono mpe kondima mimeseno mizangi alima miye bikokaki komeme bobebisami bwa bango.

9 Mpe esalemaki ete onso oyo asangisaki nkona ya ye elongo na ena ya Balamani amemeki lokola botutu likolo lya nkona ya ye.

10 Yango wana, onso oyo andimaki yemei kokambema mosika na Balamani babiangemaki o nse ya moto mona, mpe etiamaki elembo yoko likolo lya ye.

11 Mpe esalemaki ete onso oyo alingaki te kondima momeseno mwa Balamani, kasi andimaki makundoli maye bamemeki libanda lya mboka ya Yelusaleme, mpe lisusu momeseno mwa batata ba bango, moye mozalaki mwa solo, oyo andimaki mitindo mya Nzambe mpe abatelaki myango, babiangemaki Banefi, to bato ba Nefi, uta o ntango ena—

12 Mpe ezali bango baye babombaki makundoli maye mazali ma solo ma bato ba bango, mpe lisusu ma bato ba Balamani.

13 Sikawa tokozonga lisusu na Baamalisi, mpo bango lisusu bazalaka na elembo yoko etiama likolo lya bango; iyo, batiaki elembo ena, iyo, kutu elembo yoko etane likolo lya bilongi bya bango.

14 Boye liloba lya Nzambe likokisamaki, mpo tala maye mazali maloba maye alobaki epai ya Nefi: Tala, Balamani nalakelaki botutu, mpe nakotia elembo likolo lya bango ete bango mpe nkona ya bango bakoka kokabwana na yo mpe na nkona ya yo, uta sikawa mpe libela, longola se soko bayamboli uta o nkuna ya bango mpe babaluki na ngai ete nakoka koyoka ngolu likolo lya bango.

15 Mpe lisusu: Nakotia elembo yoko likolo lya ye oyo akosangisa nkona ya ye na bandeko ba yo, ete bango mpe bakoka kozwa botutu lokola.

16 Mpe lisusu: Nakotia elembo yoko likolo lya ye oyo akobunda na yo mpe nkona ya yo.

17 Mpe lisusu, nalobi epai ya yo ete ona akokima mosika na yo akobiangema lisusu te nkona ya yo; mpe nakopambola yo, mpe onso oyo akobiangema nkona ya yo, uta sikawa mpe libela; mpe iye izalaki bilako bya Nkolo epai ya Nefi mpe na nkona ya ye.

18 Sikawa Baamalisi bayebaki te ete bazalaki kokokisa maloba ma Nzambe ebandaki bango kotia elembo o bilongi bya bango; nzokande babimaki o botomboki bwa polele na Nzambe; yango wana elongobanaki ete botutu mokweya likolo lya bango.

19 Sikawa nalingi ete bomono ete bamemeki likolo lya bangomei botutu; mpe kutu boye moto na moto oyo azwi botutu akomeme yemei bokweisami bwa yemei.

20 Sikawa esalemaki ete mikolo mingi te nsima ya etumba eye ebundamaki o mboka ya Zalayemila, na Balamani mpe Baamalisi, ezalaki limpinga lisusu lya Balamani liyaki likolo lya bato ba Nefi, o esika kaka wapi limpinga lya yambo likutanaki na Baamalisi.

21 Mpe esalemaki ete ezalaki limpinga lyoko litindamaki mpo ya kobengana bango libanda lya mboka ya bango.

22 Sikawa Alama yemei etungisamaki ye na mpota yoko amataki o etumba o ntango eye na Balamani;

23 Kasi atindaki likolo limpinga lyoko linene na bango; mpe bakendeki likolo mpe babomaki Balamani mingi, mpe babenganaki batikali ba bango libanda lya ndelo ya mboka ya bango.

24 Mpe nde bazongaki lisusu mpe babandaki kotia kimia o mboka, ezalaki bango na matungisi lisusu te mpo ya ntango yoko na bayina ba bango.

25 Sikawa, makambo manso maye masalemaki, iyo, bitumba mpe boweli boye bonso bobandaki mpe bosilaki o mobu mwa mitanu mwa bokonzi bwa basambisi.

26 Mpe o mobu moko nkoto mpe zomi ya nkoto ya bozo botindamaki o mboka ya seko, ete bakoka kobuka mbano ya bango engebene na misala mya bango, soko mizalaki milamu to soko mizalaki mibe, mpo ya kobuka esengo ya seko to bobola bwa seko, engebene na molimo moye bakanaki kotosa, soko ezali molimo molamu to mobe.

27 Mpo moto na moto azwaki lifuta lya ye oyo akani kotosa, mpe eye engebene na maloba ma molimo mwa bobikuli; yango wana tika yango esalema engebene na bosolo. Mpe boye esili mobu mwa mitanu mwa bokonzi bwa basambisi.