Makomi
Alama 48


Mokapo 48

Amalikia asenginii Balamani na kobunda na Banefi—Moloni alengeli bato ba ye mpo ya kobatela likambo lya Baklisto—Asepeli o lipanda mpe bonsomi mpe azali moto mokasi wa Nzambe. Penepene na 72 Yambo ya Klisto.

1 Mpe esalemaki ete, noki lokola Amalikia azwaki bokonzi, abandaki kofula mitema mya Balamani na kobunda na bato ba Nefi; iyo, aponoki bato mpo ya koloba epai ya Balamani uta o linongi lya bango, mabe mpo ya Banefi.

2 Mpe boye afulaki mitema mya bango na kobunda na Banefi, mpenza ete o nsuka ya mobu mwa zomi na libwa mwa bokonzi bwa basambisi, ekokisaka ye mwango mwa ye kina ntango ena, iyo, ekomaka ye mokonzi likolo lya Balamani, mpe alukaki lisusu kokonza likolo lya mboka mobimba, iyo, mpe na bato banso baye bazalaki o mboka, lokola Banefi mpe Balamani lokola.

3 Yango wana, akokisaki mwango mwa ye, mpo ete ayeisaki mitema mya Balamani mikasi mpe abomaki makanisi ma bango, mpe alamusaki bango na nkanda, mpenza ete asangisaka elongo limpinga lya motango moko monene mpo ya kokende kobunda na Banefi.

4 Mpo azwaki mokano, na ntina ya bonene bwa motango mwa bato ba ye, mwa kozala na nguya likolo lya Banefi mpe komeme bango o kati ya bowumbu.

5 Mpe boye aponoki bakapiteni bakonzi ba Bazolami, bango koyebaka mingi koleka makasi ma Banefi, mpe bisika bya bango bya bobombami, mpe biteni bileki petepete bya engumba ya bango; yango wana aponoki bango bazala bakapiteni bakonzi likolo lya mampinga ma ye.

6 Mpe esalemaki ete bakamataki nganda ya bango, mpe bakendeki ona mboka ya Zalayemila o esobe.

7 Sikawa esalemaki ete ntango ezalaki Amalikia boye kozwa nguya na boyibi mpe na bokosi, Moloni, o ngambo esusu, azalaka kolengeleke mitema mya bato na kozala potongono epai ya Nkolo Nzambe wa bango.

8 Iyo, azalaka kolendisaka mampinga ma Banefi, mpe kotongaka bisika bikasi bike, to bisika bya bobombami; kobwakaka likolo bitutu bya mabele zingazinga mpembeni mpo ya kobomba mampinga ma ye, mpe lisusu kotongaka bifelo bya mabanga mpo ya kozinga bango, zingazinga mpembeni na engumba ya bango mpe na ndelo ya mboka ya bango; iyo, zingazinga mpembeni inso ya mboka.

9 Mpe o bifelo bikasi bya bango bya petepete mingi koleka atiaki motango monene mwa bato; mpe boye akubisaki mpe alendisaki mboka eye ezwamaki na Banefi.

10 Mpe boye azalaki kolengeleke kobatela lipanda lya bango, mboka ya bango, basi ba bango, mpe bana ba bango, mpe kimia ya bango, mpe ete bakoka kozala na bomoi epai ya Nkolo Nzambe wa bango, mpe ete bakoka kosimba ena eye ebiangemaki na bayini ba bango likambo lya Baklisto.

11 Mpe Moloni azalaki moto moko mokasi mpe wa mpiko; azalaki moto moko wa bososoli bobongo nie; iyo, moto moko oyo asepelaki te na bosopi makila; moto moko oyo ya ye bozo bosepelaki na lipanda mpe bonsomi bwa ekolo ya ye, mpe bandeko ba ye uta o bokangemi mpe bowumbu.

12 Iyo, moto moko oyo ya ye motema motondaki na matondi na Nzambe wa ye, mpo ya matomba mpe mapamboli mingi apesaki likolo lya bato ba ye; moto moko asalaki mpenza mpo ya bolamu mpe bozangi likama bwa bato ba ye.

13 Iyo, mpe azalaki moto moko oyo azalaki sikisiki o bondimi bwa Klisto, mpe alapaki ndai mpo ya kobatela bato ba ye, makoki ma ye, mpe ekolo ya ye, mpe eyamba ya ye, kutu kina o bobungisi bwa makila ma ye.

14 Sikawa Banefi bateyamaki komibatela na bayini ba bango, kutu kina o bosopi makila soko esengelaki; iyo, mpe bateyamaki kotumola mokolo moko te, iyo, mpe kotombola mopanga mokolo moko te longola se soko ezalaki na moyini moko, longola se soko ezalaki mpo ya kobatela bomoi bwa bango.

15 Mpe eye ezalaki bondimi bwa bango, ete na kosalaka boye Nzambe akolinga bango bazwa bomengo o mboka, to na maloba masusu, soko bazalaki na bondimi na kobatelaka mitindo mya Nzambe ete akolinga bango bazwa bomengo o mboka; iyo, akebisaki bango bakima, to balengele mpo ya etumba, engebene na likama lya bango;

16 Mpe lisusu, ete Nzambe akosala eyebana epai ya bango wapi bakokende mpo ya komibatela na bayini ba bango, mpe na kosalaka boye, Nkolo akobikisa bango; mpe eye ezalaki bondimi bwa Moloni, mpe motema mwa ye mokembelaki na yango; na kosopaka makila te kasi na kosalaka bolamu, na kobatelaka bato ba ye, iyo, na kobatelaka mitindo mya Nzambe, iyo, mpe na kotelemelaka bobe.

17 Iyo, solo, solo nalobi epai ya bino, soko bato banso bazalaka, mpe bazalaki, mpe bakozala ntango inso, lokola Moloni, tala, nguya ya limfelo elingaki koninganisama libela; iyo, zabulu alingaki mokolo moko te kozala na nguya likolo lya mitema mya bana ba bato.

18 Tala, azalaki moto moko lokola Amona, mwana mobali wa Moziya, iyo, mpe kutu bana babali basusu ba Moziya, iyo, mpe lisusu Alama mpe bana babali ba ye, mpo banso bazalaki bato ba Nzambe.

19 Sikawa tala, Elamani mpe bandeko babali ba ye bazalaki balamu bake te epai ya bato koleka ezalaki Moloni; mpo bateyaki liloba lya Nzambe, mpe babatisaki mpo ya boyamboli bato banso baye bayokemelaki epai ya maloba ma bango.

20 Mpe boye bakendeki, mpe bato bamikitisaki na ntina ya maloba ma bango, mpenza ete basungamaki mpenza na Nkolo, mpe boye babikisamaki uta o bitumba mpe boweli o ntei ya bango, iyo, kutu mpo ya ntaka ya mibu minei.

21 Kasi, lokola nalobaki, o nsuka nsuka ya mobu mwa zomi na libwa, iyo, ata kimia ya bango o ntei ya bangomei, basengisamaki, ata baboyaki, kowela na bandeko ba bango, Balamani.

22 Iyo, mpe o nsuka, bitumba bya bango mokolo moko te bisukaki mpo ya ntaka ya mibu mingi na Balamani, ata boboyi boike bwa bango.

23 Sikawa, bayokaki mawa mingi na kokamata mandoki ma bango mpo ya kobunda na Balamani, zambi basepelaki te o bosopi makila; iyo, mpe eye ezalaki enso te—bayokaki mawa mpo ya kozala nzela ya botindi bandeko ba bango mingi boye libanda lya mokili moye o kati ya mokili mwa seko, balengeleme te na kokutana na Nzambe wa bango.

24 Nzokande, bakokaki te kondima kolalisa o nse bomoi bwa bango, ete basi ba bango mpe bana ba bango babomabomama na motema mobe mwa bango baye bazalaka mbala yoko bandeko ba bango, iyo, mpe bakabwanaka uta o eklezia ya bango, mpe batikaki bango mpe bakendeke kobebisa bango na kosanganaka na Balamani.

25 Iyo, bakokaki te kondima ete bandeko ba bango basepela likolo lya makila ma Banefi, ntango elai lokola ezalaki moko oyo abatelaki mitindo mya Nzambe, mpo ete Nkolo alakaki ete, soko bakobatela mibeko mya ye bakozwa bomengo o mboka.