Makomi
Alma 29


Mokapo 29

Alma azali na mposa ya kobelela boyamboli na mpila ya banjelu—Nkolo apesi balakisi mpo na bikolo nyonso—Alma akembeli na mosala ya Nkolo mpe na elonga ya Amona mpe bandeko na ye. Penepene na mobu 76 Liboso na mbotama ya Klisto.

1 O soki nazalaka anjelu, mpe soki nakokaka kozala na litombeli ya motema na ngai, ete nakokaki kokende mpe koloba na mondule ya Nzambe, na mongongo moko ya koningisa mabele, mpe kobelela boyamboli epayi ya bato nyonso!

2 Iyo, nalingi kosakola epayi na molimo moko moko, lokola na mongongo ya kake, boyamboli mpe mwango ya bosikoli, ete basengeli koyambola mpe koya epayi ya Nzambe na biso, ete mawa ekoka lisusu te kozala likolo ya mabele mobimba.

3 Kasi tala, ngai nazali moto, mpe nasumukaka na litombeli na ngai; mpo nasengelaki kosepela na kosala makambo oyo Nkolo apesaki epayi na ngai.

4 Nasengeli te kopasola likolo ya mposa ya motema na ngai mobeko ya ngwi ya Nzambe moyengebene, mpo nayebi ete apesaka epayi ya bato engebene na mposa na bango, soki ekozala mpo na liwa soki te mpo na bomoi; iyo, nayebi ete apesaka epayi ya bato, iyo, abimisaka epayi na bango mibeko oyo mibongwanaka te, engebene na bolingi na bango, ezala mpo na lobiko soki te mpo na bobebisami.

5 Iyo, mpe nayebi ete bolamu mpe mabe ezali epayi ya bato nyonso; ye oyo ayebi te bolamu uta na mabe azangi mpamela; kasi ye oyo ayebi bolamu mpe mabe, na ye epesami engebene na mposa na ye, ezala soki mposa na ye ezali ya bolamu to ya mabe, bomoi to liwa, bosepeli soki te boswi ya mayele ya motema.

6 Sikawa, na komonaka ete nayebi makambo oyo, ntina nini nakozala na mposa ya kosala mingi koleka na esika ya kosala mosala oyo wapi nabiangami?

7 Ntina nini nakozala na mposa ete nazala anjelu, ete nakoka kolobela nsuka nyonso ya mabele?

8 Mpo tala, Nkolo apesaka epayi na bikolo nyonso, na nzela ya ekolo mpe lokota na bango moko, mpo na koteya liloba na ye, iyo, na bwania, nyonso oyo amoni ekoki na bango kozwa; boye nde tomoni ete Nkolo apesaka toli na bwania, engebene na oyo ezali alima mpe solo.

9 Nayebi oyo Nkolo atindi ngai, mpe nakembeli na yango. Nakembeli na ngai moko te, kasi nakembeli na oyo Nkolo atindi ngai; iyo, mpe oyo ezali nkembo na ngai, ete mbele nakoka kozala esalelo yoko na maboko ya Nzambe mpo na komema boko milimo na boyamboli; mpe oyo ezali bosepeli na ngai.

10 Mpe tala, ntango namonaka mingi ya bandeko na ngai kokoma solo bayamboli, mpe koyaka na Nkolo Nzambe na bango, ntango wana nde molimo na ngai motondi na bosepeli; nde namikundolaka nini Nkolo asali mpo na ngai, iyo, kutu ete ayoki losambo na ngai; iyo, nde namikundolaka loboko na ye oyo etonda na boboto oyo atandoli epayi na ngai.

11 Iyo, mpe namikundolaka bokangemi ya batata na ngai; mpo nayebi solo ete Nkolo akangolaki bango uta na boumbu, mpe na nzela oyo atiaki eklezia na ye; iyo, Nkolo Nzambe, Nzambe ya Abalayama, Nzambe ya Yisaka, mpe Nzambe ya Yakobo, akangolaki bango uta na boumbu.

12 Iyo, ntango nyonso namikundolaka bokangemi ya batata na ngai; mpe Nzambe se moko wana oyo akangolaki bango uta na maboko ya Baejipito akangolaki bango uta na boumbu.

13 Iyo, mpe Nzambe se moko wana atiaki eklezia na ye na kati na bango; iyo, mpe kaka Nzambe se moko wana abiangi ngai na libiangi moko esantu, mpo na koteya liloba epayi ya bato oyo, mpe apesi ngai elonga mingi, na oyo wapi bosepeli na ngai etondi.

14 Kasi nasepeli bobele na elonga na ngai moko te, kasi bosepeli na ngai etondi mingi koleka na ntina ya elonga ya bandeko na ngai, oyo bamataki na mboka ya Nefi.

15 Tala, basali mingi koleka mpenza, mpe baboti mbuma ebele; mpe lolenge boni monene ekozala mbano na bango!

16 Sikawa, ntango nazali kokanisa elonga ya bandeko oyo na ngai molimo na ngai momemami mosika, kutu kino na bokaboli ya mwango uta na nzoto, lokola soki ezalaki, bosepeli na ngai ezali monene mpenza.

17 Mpe sikawa, tika Nzambe apesa epayi na baoyo, bandeko na ngai, ete bakoka kofanda na bokonzi ya Nzambe; iyo, mpe lisusu bango nyonso oyo bazali mbuma ya misala na bango ete bakoka kokende lisusu te libanda, kasi ete bakoka kosanzola ye libela. Mpe tika Nzambe atika ete ekoka kosalema engebene na maloba na ngai, kutu lokola nalobaki. Amene.

Bimisa na lokasa