Makomi
Alma 33


Mokapo 33

Zenosi ateyi ete bato basengeli kosambela mpe kokumbamela Nzambe na bisika nyonso, mpe ete masambisi masukisami na ntina ya Mwana—Zenoki ateyi ete boboto epesami na ntina ya Mwana—Mose atombolaki na esobe elilingi yoko ya Mwana ya Nzambe. Penepene na mobu 74 Liboso na mbotama ya Klisto.

1 Sikawa esilaki Alma koloba maloba oyo, bakomaki epayi na ye mpe bazalaki na mposa ya koyeba soki basengeli kondima na Nzambe moko, ete bakoka kozwa mbuma oyo alobelaki, soki te lolenge boni basengeli kowana nkona yango, to liloba oyo alobelaki, oyo alobaki ete esengeli kowanama na mitema na bango; soki te na lolenge kani basengelaki kobanda kosalela bondimi na bango.

2 Mpe Alma alobaki epayi na bango: Tala, bolobaki ete bokoki te kokumbamela Nzambe na bino mpo babengani bino uta na basinagoga na bino. Kasi tala, nalobi epayi na bino, soki bobanzi ete bokoki te kokumbamela Nzambe, bozali na libunga monene, mpe bosengeli koluka makomi; soki bobanzi ete bateyaki bino likambo oyo, bozali kososola yango te.

3 Emikundoli bino ete botangaki nini Zenosi, profeta ya kala, alobaki mpo na oyo etali losambo to bokumbameli?

4 Mpo alobaki: Otonda na boboto, O Nzambe, mpo oyoki losambo na ngai, kutu ntango nazalaki na esobe; iyo, otondisamaki na boboto ntango nasambelaki mpo na oyo etali bango oyo bazalaki banguna na ngai, mpe obalolaki bango epayi na ngai.

5 Iyo, O Nzambe, mpe otondisamaki na boboto epayi na ngai ntango nalelaki epayi na yo kati na elanga na ngai; ntango nalelaki epayi na yo na losambo na ngai, mpe oyokelaki ngai.

6 Mpe lisusu, O Nzambe, ntango nabalukaki kokende na ndako na ngai oyokelaki ngai na losambo na ngai.

7 Mpe ntango nabalukaki na kisuku na ngai, O Nkolo, mpe ntango nasambelaki yo, oyokelaki ngai.

8 Iyo, otondisamaka na boboto epayi ya bana na yo ntango babelelaka epayi na yo, mpo ete oyokela bango kasi bato te, mpe okoyokela bango.

9 Iyo, O Nzambe, otondaki na boboto epayi na ngai, mpe oyokaki kolela na ngai na katikati ya mayangani na yo.

10 Iyo, mpe oyokelaki ngai lisusu ntango babenganaki ngai mpe natiolamaki na banguna na ngai; iyo, oyokaki kolela na ngai, mpe osilikaki na banguna na ngai, mpe obimelaki bango na nkanda na yo na bobebisami ya lombangu.

11 Mpe oyokelaki ngai na ntina ya mitungisi na ngai mpe bosolo na ngai; mpe ezali na ntina ya Mwana na yo ete otondisamaki boye na boboto epayi na ngai, boye nakolela epayi na yo na mitungisi na ngai nyonso, mpo na yo ezali bosepeli na ngai; mpo osukisaki masambisi na yo uta na ngai, na ntina ya Mwana na yo.

12 Mpe sikawa Alma alobaki epayi na bango: Endimi bino makomi wana oyo ekomamaki na bango baprofeta ya kala?

13 Tala, soki bondimi, bosengeli kondima nini Zenosi alobaki; mpo, tala alobaki: Osukisaki masambisi na yo na ntina ya Mwana na yo.

14 Sikawa tala, bandeko na ngai, natuni soki botangaki makomi? Soki botangaki, lolenge nini ekoki bino kozanga kondima Mwana ya Nzambe?

15 Mpo ekomami te ete Zenosi ye moko kaka alobelaki makambo oyo, kasi Zenoki alobelaki makambo oyo mpe lokola—

16 Mpo tala, alobaki: Osiliki, O Nkolo, na bato oyo, mpo balingi te kososola boboto na yo oyo opesaki epayi na bango na ntina ya Mwana na yo.

17 Mpe sikawa, bandeko na ngai, bomoni ete profeta ya mibale ya kala atatolaki Mwana ya Nzambe, mpe lokola bato balingaki kososola maloba na ye te babambaki ye mabanga kino na liwa.

18 Kasi tala, oyo ezali te; ezali bobele bato oyo te balobaki mpo na oyo etali Mwana ya Nzambe.

19 Tala, Mose alobaki na ntina na ye; iyo, mpe tala atelemisaki elilingi moko etelemisamaki na esobe, ete moto oyo akotala likolo na yango akozala na bomoi. Mpe mingi batalaki yango mpe batikalaki na bomoi.

20 Kasi bato moke basosolaki ntina ya makambo wana, mpe oyo na ntina ya bokasi ya mitema na bango. Kasi ezalaki na mingi baoyo bazalakimitu makasi mpenza ete balingaki te kotala, boye bawaki. Sikawa ntina balingaki te kotala ezali mpo bandimaki te ete ekobikisa bango.

21 O bandeko na ngai, soki bokokaki kobika bobele na kobwakaka miso na bino nzinganzinga ete bokoka kobikisama, elingaki bino te kotala noki, to bolingaki na esika wana koyeisa mitema na bino makasi na bozangi boyambi, mpe kozala goigoi, ete bolingaki te kobwaka miso na bino nzinganzinga, ete bokoka kowa?

22 Soki boye, lisuma ekoya likolo na bino; kasi soki boye te, bongo bobwaka miso na bino nzinganzinga mpe bobanda kondima na Mwana ya Nzambe, ete akoya kosikola bato na ye, mpe ete akoyoka mpasi mpe akokufa mpo na komikaba mpo na masumu na bango; mpe ete akolamuka lisusu uta na bakufi, oyo ekomema bosekwi esalema, ete bato nyonso bakotelema liboso na ye, mpo na kosambisama na mokolo ya nsuka mpe ya bosambisi, engebene na misala na bango.

23 Mpe sikawa, bandeko na ngai, nazali na mposa ete bowana liloba oyo na mitema na bino, mpe lokola ebandi kovimba kutu boye boleisa yango na bondimi na bino. Mpe tala, ekokoma nzete, kokolaka na bino kino na bomoi ya libela. Mpe na ntango wana tika ete Nzambe apesa nzela epayi na bino ete mikumba na bino mikoka kozala pepele, na nzela ya bosepeli ya Mwana na ye. Mpe kutu nyonso oyo nde yango ekoki bino kosala soki bolingi. Amene.

Bimisa na lokasa