Makomi
Alama 44


Mokapo 44

Moloni atindi Balamani mpo ya kosala boyokani boko bwa kimia to babomama—Zelayemina aboyi ebonzo, mpe etumba ebandi lisusu—Mampinga ma Moloni malongi Balamani. Penepene na 74–73 Yambo ya Klisto.

1 Mpe esalemaki ete batelemeki mpe balongwaki o ntaka yoko uta na bango. Mpe Moloni alobaki epai ya Zelayemina: Tala, Zelayemina, ete tozali te na mposa ya kozala bato ba makila. Oyebi ete bozali o maboko ma biso, nzokande tozali te na mposa ya koboma bino.

2 Tala, toyei te libanda mpo ya kobunda na bino ete tokoka kosopa makila ma bino mpo ya nguya; mpe tozali te na mposa ya komeme moko o nkanga ya bowumbu. Kasi eye ezali ntina mpenza mpo ya yango boyei kobunda na biso; iyo, mpe bosiliki na biso na ntina ya eyamba ya biso.

3 Kasi sikawa, bomoni ete Nkolo azali elongo na biso; mpe bomoni ete atiki bino o kati ya maboko ma biso. Mpe sikawa nalingi ete bososola ete eye esalemi epai ya biso na ntina ya eyamba ya biso mpe bondimi bwa biso na Klisto. Mpe sikawa bomoni ete bokoki te kobebisa bondimi boye bwa biso.

4 Sikawa bomoni ete eye ezali bondimi bwa solo bwa Nzambe; iyo, bomoni ete Nzambe akosalisa, mpe akobomba, mpe akobatela biso, ntango elai lokola tozali potongono epai ya ye, mpe epai ya bondimi bwa biso, mpe eyamba ya biso; mpe mokolo moko te Nkolo akolinga ete tobebisama longola se soko tokokweya o kati ya bobuki mobeko mpe tokowangana bondimi bwa biso.

5 Mpe sikawa, Zelayemina, natindi yo, o nkombo ya Nzambe ona wa nguya inso, oyo alendisi maboko ma biso ete tolongi nguya likolo lya bino, na bondimi bwa biso, na eyamba ya biso, na milulu mya bokumbami bwa biso, mpe na eklezia ya biso, mpe na lisalisi lya bule liye tosengeli na basi ba biso mpe bana ba biso, na lipanda liye likangi biso o mboka ya biso mpe ekolo ya biso; iyo, mpe lisusu na bobombi bwa liloba lya bule lya Nzambe, na oyo tosengeli esengo enso ya biso; mpe na eye enso elingami mingi koleka epai ya biso—

6 Iyo, mpe eye ezali enso te; natindi yo na mposa inso iye bozali na yango mpo ya bomoi, ete botika mandoki ma bino ma etumba epai biso, mpe tokoluka te makila ma bino, kasi tokobatela bomoi bwa bino, soko bokokende nzela ya bino mpe bokoya lisusu te na etumba likolo lya biso.

7 Mpe sikawa, soko bosali eye te, tala, bozali o maboko ma biso, mpe nakotinda bato ba ngai bakweya likolo lya bino, mpe babamba mpota ya liwa o nzoto ya bino, ete bokoka kosila; mpe nde tokotala nani akozala na nguya likolo lya bato baye; iyo, tokotala nani akomememe o kati ya bowumbu.

8 Mpe sikawa esalemaki ete ntango Zelayemina ayokaki maloba maye abelemeki mpe apesaki mopanga mwa ye mpe mopanga mogumbama mwa ye, mpe makula ma ye o kati ya maboko ma Moloni, mpe alobaki epai ya ye: Tala, awa ezali mandoki ma biso ma etumba; tokopesa mango epai ya bino, kasi tokondima te bisomei kokamata ndai yoko epai ya bino, eye toyebi ete tokobuka, mpe lisusu bana ba biso; kasi tokokamata mandoki ma biso ma etumba, mpe tokondima ete tokoka kokende o kati ya esobe; soko te tokosimba mipanga mya biso, mpe tokowa to tokolonga.

9 Tala, biso tozali te ba bondimi bwa bino; tondimi te ete ezali Nzambe oyo atiki biso o maboko ma bino; kasi tondimi ete ezali mayele mabe ma bino maye mabateli bino uta o mipanga mya biso. Tala, ezali bibende bya ntolo bya bino mpe nguba ya bino iye ibatelaki bino.

10 Mpe sikawa etiaka Zelayemina nsuka yoko ya kolobaka maloba maye, Moloni azongisaki mopanga mpe mandoki ma etumba, maye azwaki, epai ya Zelayemina, kolobaka: Tala, tokosilisa boweli.

11 Sikawa nakoki te kolongola maloba maye nalobi, yango wana lokola Nkolo azali na bomoi, bokoki kokende te longola se soko bokei elongo na ndai yoko ete bokozonga lisusu te na biso mpo ya kobunda. Sikawa lokola bozali o maboko ma biso tokotangisa makila ma bino likolo lya mabele, to bokotosa masengeli maye nalakisi.

12 Mpe sikawa elobaka Moloni maloba maye, Zelayemina asimbaki mopanga mwa ye, mpe asilikaki na Moloni, mpe awelisaki o boso ete akoka koboma Moloni; kasi lokola atombolaki mopanga mwa ye, tala, moko wa basoda ba Moloni apapolaki mwango kutu o mabele, mpe ebukanaki o esimbele; mpe abeteki Zelayemina mpe akataki mposo ya nsuki ya ye mpe ikweyaki o mabele. Mpe Zelayemina alongwaki uta o liboso lya bango o katikati ya basoda ba ye.

13 Mpe esalemaki ete soda oyo atelemeki mpembeni, oyo ateteki mosika mposo ya nsuki ya Zelayemina, alokotaki mposo ya nsuki uta mosika o mabele, mpe atiaki yango likolo lya nsonge ya mopanga mwa ye, mpe atombolaki yango epai ya bango, kolobaka epai ya bango na mongongo mokasi:

14 Kutu lokola mposo ya nsuki eye ekweyaki o mabele, eye ezali mposo ya nsuki ya mokonzi wa bino, boye bokokweya o mabele longola se soko bopesi mandoki ma bino ma etumba mpe bokei elongo na boyokani boko bwa kimia.

15 Sikawa izalaki mingi, eyokaki bango maloba maye mpe emonoki bango mposo ya nsuki eye ezalaki likolo lya nsonge ya mopanga, bazwamaki na nsomo; mpe mingi babelemeki mpe babwakaki mandoki ma bango ma etumba o makolo ma Moloni, mpe bakotaki o kati ya boyokani boko bwa kimia. Mpe mingi lokola bakotaki o kati ya boyokani boko bandimaki kokende o esobe.

16 Sikawa esalemaki ete Zelayemina azalaki na nkele mpenza, mpe alamusaki etikali ya basoda ba ye na nkanda, mpo ya kowela na nguya mingi likolo lya Banefi.

17 Mpe sikawa Moloni asilikaki, na ntina ya nkanza ya Balamani; yango wana atindaki bato ba ye bakweya likolo lya bango mpe baboma bango. Mpe esalemaki ete babandaki koboma bango; iyo, mpe Balamani bawelaki elongo na mipanga mya bango mpe bokasi bwa bango.

18 Kasi tala, mposo bolumbu bwa bango mpe mito mitaka mya bango mitalisamaki na mipanga mipotu mya Banefi; iyo, tala, batobolomaki mpe babetemeki, iyo, mpe bakweyaki noki mpenza liboso lya mipanga mya Banefi; mpe babandaki kokombolama o nse, kutu lokola soda ya Moloni abikulaka.

19 Sikawa Zelayemina, emonoki ye ete bazalaki penepene na kobebisama, agangaki na bokasi epai ya Moloni, kolakaka ete alingaki koyokana mpe lisusu bato ba ye elongo na bango, soko balingaki kobikisa etikali ya bomoi bwa bango, ete mokolo moko te bakoya lisusu na etumba likolo lya bango.

20 Mpe esalemaki ete Moloni asalaki ete mosala mwa liwa mosila lisusu o ntei ya bato. Mpe akamataki mandoki ma etumba uta na Balamani; mpe esilisaka bango kokota o kati ya boyokani boko bwa kimia elongo na ye bazwaki ndingisa mpo ya kokende o kati ya esobe.

21 Sikawa motango mwa bakufi ba bango motangemaki te na ntina ya bonene bwa motango; iyo, motango mwa bakufi ba bango mozalaki monene mpenza, o ngambo ya Banefi mpe o ngambo ya Balamani lokola.

22 Mpe esalemaki ete babwakaki bakufi ba bango o kati ya mai ma Sidoni, mpe bakei mpe bakundami o bozindo bwa mbu.

23 Mpe mampinga ma Banefi, to ba Moloni bazongaki mpe bayaki o ndako ya bango mpe mboka ya bango.

24 Mpe boye esilaki mobu mwa zomi na mwambe mwa bokonzi bwa basambisi likolo lya bato ba Nefi. Mpe boye esilaki likundoli lya Alama, liye likomamaki likolo lya palaki ya Nefi.