Makomi
Alama 21


Nsango yoko ya liteya lya Aloni, mpe Muloki, mpe bandeko ba bango, na Balamani.

Kokwaka mikapo 21 o 26 eye o kati.

Mokapo 21

Aloni ateyi Baamaleki etali Klisto mpe botumbolami bwa ye—Aloni mpe bandeko ba ye bakangemi o boloko o Midoni—Nsima ya libiki lya bango, balakisi o sinagogi mpe basali mingi babongwama—Lamoni apesi bonsomi bwa boyambi na bato ba mboka ya Yisamaele. Penepene na 90–77 Yambo ya Klisto.

1 Sikawa ekabwanaki Amona mpe bandeko ba ye o ndelo ya mboka ya Balamani, tala Aloni akendeki mobembo mwa ye ona mboka eye ebiangemaki Balamani Yelusaleme na, kobiangaka yango engebene ya mboka ya mbotama ya batata ba bango; mpe ezalaki mosika kokanganaka na ndelo ya Molomoni.

2 Sikawa Balamani mpe Baamaleki mpe bato ba Amuloni batongaki engumba yoko enene, eye ebiangemaki Yelusaleme.

3 Sikawa Balamani na bangomei bazalaki mpenza mitema mikasi, kasi Baamaleki mpe Baamuloni bazalaki lisusu mitema mikasi mingi koleka; yango wana basalaki Balamani ete bayeisa mitema mya bango mikasi, ete bayika bokasi o nkuna mpe bonsomo bwa bango.

4 Mpe esalemaki ete Aloni ayaki o engumba ya Yelusaleme, mpe abandaki koteya na Baamaleki. Mpe abandaki koteya na bango o sinagogi ya bango, mpo batongaka sinagogi ya bango nsima ya molongo mwa Banewolo; mpo mingi ya Baamaleki mpe Baamuloni bazalaki nsima ya molongo mwa Banewolo.

5 Yango wana, lokola Aloni ayingelaki o kati ya yoko sinagogi ya bango mpo ya koteya epai ya bato, mpe lokola azalaki kolobaka epai ya bango, tala etelemeki Moamaleki moko mpe abandaki kowela na ye, kolobaka: Nini ezali eye otatoli? Emoni yo anzelu? Ntina nini ebimi banzelu te epai ya biso? Tala ezali te bato baye balamu lokola bato ba yo?

6 Olobi lisusu, longola se soko toyamboli tokowa. Boniboni eyebi yo makanisi mpe mokano mwa mitema mya biso? Boniboni eyebi yo ete tozali na ntina ya koyambola? Boniboni eyebi yo ete tozali te bato boko sembo? Tala, totongi ndako isantu, mpe tomisangisi elongo mpo ya kokumbamela Nzambe. Tondimi ete Nzambe akobikisa bato banso.

7 Sikawa Aloni alobaki epai ya ye: Endimi yo ete Mwana Mobali wa Nzambe akoya mpo ya kosikola bato uta o masumu ma bango?

8 Mpe moto ona alobaki epai ya ye: Tondimi te ete oyebi likambo lya lolenge loye. Tondimi te o mimeseno miye mya ligboma. Tondimi te ete oyebi makambo makoya, mpe tondimi te ete batata ba yo mpe lisusu ete batata ba biso bayebaki etali makambo maye balobaki, etali eye esengeli koya.

9 Sikawa Aloni abandaki kofungola nkoma epai ya bango itali boyei bwa Klisto, mpe lisusu itali bosekwi bwa bakufi, mpe ete ekoki kozala bosikoli te mpo ya bato longola se soko ezali na lisalisi lya liwa mpe mpasi ya Klisto, mpe botumbulami bwa makila ma ye.

10 Mpe esalemaki ete lokola abandaki kosembola makambo maye epai ya bango basilikaki na ye, mpe babandaki koseke ye; mpe balingaki te koyoka maloba maye alobaki.

11 Yango wana, emonoki ye ete balingaki te koyoka maloba ma ye, akendeki libanda lya sinagogi ya bango, mpe ayaki likolo o etuka eye ebiangemaki Ani-Ati, mpe kuna akutaki Muloki koteyaka liloba epai ya bango; mpe lisusu Ama mpe bandeko ba ye. Mpe bawelaki na mingi etali liloba.

12 Mpe esalemaki ete bamonoki ete bato balingaki koyeisa mitema mya bango mikasi, yango wana balongwaki mpe bayaki likolo o mboka ya Midoni. Mpe bateyaki liloba epai ya mingi, mpe bake bandimaki likolo lya maloba maye bateyaki.

13 Nzokande, Aloni mpe yoko motango mwa bandeko ba ye bakamatamaki mpe babwakamaki o kati ya boloko, mpe etikali ya bango bakimaki libanda lya mboka ya Midoni epai ya mboka ya bikolo zingazinga mpembeni.

14 Mpe bango baye babwakamaki o kati ya boloko bayokaki mpasi mingi, mpe babikisamaki na loboko la Lamoni mpe Amona, mpe baleisamaki mpe balatisamaki.

15 Mpe bakendeki lisusu kosakola liloba, mpe boye babikisamaki mpo ya mbala ya yambo libanda lya boloko; mpe boye bayokaka mpasi.

16 Mpe bakendeki bisika binso bakambemaki na Molimo mwa Nkolo, koteyaka liloba lya Nzambe o sinagogi inso ya Baamaleki, to na mangomba manso ma Balamani wapi bakokaki kondimama.

17 Mpe esalemaki ete Nkolo abandaki kopambola bango, mpo ete bamemeki mingi o boyebi bwa bosolo; iyo, bandimisaki mingi na masumu ma bango, mpe mimeseno mya batata ba bango, miye mizalaki alima te.

18 Mpe esalemaki ete Amona mpe Lamoni bazongaki uta mboka ya Midoni o mboka ya Yisamaele, eye ezalaki mboka ya lisango lya bango.

19 Mpe mokonzi Lamoni alingaki lisusu te kotika ete Amona asalela ye, to azala mosali wa ye.

20 Kasi asalaki ete etongisama sinagogi o mboka ya Yisamaele; mpe asalaki ete bato ba ye, to bato baye bazalaki o nse ya bokonzi bwa ye bamisangisa elongo.

21 Mpe asepelaki likolo lya bango, mpe alakisaki bango makambo mingi. Mpe lisusu asakolaki epai ya bango ete bazalaki bato boko baye bazalaki o nse ya ye, mpe ete bazalaki bato nsomi, ete bazalaki bansomi uta o bokakemi bwa mokonzi, tata wa ye; mpo ete tata wa ye atikaka epai ya ye ete akoka kokonza likolo lya bato baye bazalaki o mboka ya Yisamaele, mpe o mboka inso zingazinga mpembeni.

22 Mpe lisusu asakolaki epai ya bango ete bakoka kozala na lipanda lwa kokumbamelaka Nkolo Nzambe wa bango engebene na mposa ya bango, o bisika binso bazalaki, soko bazalaki o mboka eye ezalaki o nse ya bokonzi ya mokonzi Lamoni.

23 Mpe Amona ateyaki epai ya bato ba mokonzi Lamoni; mpe esalemaki ete alakisaki bango makambo manso matalaki makambo ma bosembo. Mpe alendisaki bango mokolo na mokolo, na etingia enso; mpe bayokemelaki epai ya liloba lya ye, mpe bazalaki na mpila mpo ya kobomba mitindo mya Nzambe.