Makomi
Alma 34


Mokapo 34

Amuleki atatoli ete liloba ezali na Klisto mpo na lobiko—Longola se soki bomikabi esalemi, bato nyonso basengeli kowa—Mobeko mobimba ya Mose ezali kobenda bokebi na mbeka ya Mwana ya Nzambe—Mwango ya seko ya bosikoli efandisami likolo ya bondimi mpe boyamboli—Sambela mpo na mapamboli ya ntango mpe ya molimo—Bomoi oyo ezali ntango mpo na bato kolengela kokutana na Nzambe—Sala mpo na lobiko na bino na bobangi liboso ya Nzambe. Penepene na mobu 74 Liboso na mbotama ya Klisto.

1 Mpe sikawa esalemaki ete esilaki Alma kolobela bango maloba oyo afandaki na nse likolo ya mabele, mpe Amuleki atelemaki mpe abandaki koteya bango, kolobaka:

2 Bandeko na ngai, nakanisi ete ekoki te ete bozanga koyeba makambo oyo elobamaki mpo na oyo etali boyei ya Klisto, oyo biso toteyi ete azali Mwana ya Nzambe; iyo, nayebi ete makambo oyo mateyamaki beboo epayi na bino liboso ya bokabwani na bino uta na kati na biso.

3 Mpe lokola bino bozalaki na mposa ya molingami ndeko na ngai ya mobali ete ayebisa epayi na bino nini bosengeli kosala, na ntina ya mitungisi na bino; mpe alobi mwa moke epayi na bino mpo na kolengela mayele na bino; iyo, mpe alendisi bino mpo na bondimi mpe bompikiliki—

4 Iyo, kutu ete bozala na bondimi boike kutu mpo na kowana liloba na mitema na bino, ete bokoka komeka komona bolamu na yango.

5 Mpe tomoni ete motuna monene oyo ezali na makanisi na bino ezali soki liloba ezali na Mwana ya Nzambe, to soki ezali na Klisto te.

6 Mpe bomonaki lisusu ete ndeko na ngai ya mobali alakisaki epayi na bino, na bileko mingi, ete liloba ezali na Klisto mpo na lobiko.

7 Ndeko na ngai atangaki maloba ya Zenosi, ete bosikoli ekoya na nzela ya Mwana ya Nzambe, mpe lisusu atangaki maloba ya Zenoki; mpe lisusu atangaki epayi ya Mose, mpo na kolakisa ete makambo oyo ezali solo.

8 Mpe sikawa, tala, nakotatola epayi na bino ete makambo oyo ezali solo. Tala, nalobi epayi na bino ngai moko, ete nayebi ete Klisto akoya na kati ya bana ya bato, mpo na kokamata likolo na ye bobuki mobeko ya bato na ye, mpe ete akomikaba mpo na masumu ya mokili; mpo Nkolo Nzambe alobi bongo.

9 Mpo elongobani ete bomikabi moko esalema; mpo engebene na ebongiseli monene ya Nzambe ya Seko esengeli bomikabi moko esalema, soki te bato nyonso ata ndenge nini basengeli bakufa; iyo, banso bazali mitu makasi; iyo, banso bazali ya kokweya mpe bazali ya kobunga, mpe basengeli kokufa longola kaka soki ezali na nzela ya bomikabi oyo elongobani ete esalema.

10 Mpo elongobani ete mbeka moko ya monene mpe ya nsuka ezala; iyo, mbeka ya moto te, soki mpe ya nyama te, soki mpe ya lolenge moko ya ndeke te; mpo ekozala mbeka ya moto te; kasi esengeli ezala mbeka ezanga ndelo mpe ya seko.

11 Sikawa ezali na moto moko te oyo akoki kopesa mbeka ya makila na ye moko oyo makomikaba mpo na masumu ya moto mosusu. Sikawa, soki moto moko abomi, tala mobeko na biso, oyo ezali alima, ekokamata yango bomoi ya ndeko na ye ya mobali? Nalobi epayi na bino, Te.

12 Kasi mobeko mokosenga bomoi na ye oyo abomi, boye ekoki kozala na eloko moko te oyo ezali mokuse na bomikabi oyo ezanga ndelo oyo ekokoka mpo na masumu ya mokili.

13 Boye, elongobani ete ezala na mbeka moko monene mpe ya nsuka, mpe bongo ekozala, soki te elongobani ete ezala, na nsuka ya bosopi makila; bongo nde ekokokisama mobeko ya Mose; iyo, nyonso ekokokisama, nsonge mpe elembo moko na moko, mpe moko te ekoleka.

14 Mpe tala, oyo ezali ndimbola mobimba ya mobeko, eteni na eteni kobendaka bokebi na mbeka wana ya monene mpe ya nsuka; mpe mbeka wana ya monene mpe ya nsuka ekozala Mwana ya Nzambe, iyo, oyo ezanga ndelo mpe ya seko.

15 Mpe boye akomema lobiko na bango oyo bakondima na nkombo na ye; oyo kozalaka ntina ya mbeka oyo ya nsuka, mpo na komema penepene nsopo ya boboto, oyo ezwi elonga likolo ya boyengebene, mpe epesi nzela epayi ya bato ete bakoka kozala na bondimi mpo na boyamboli.

16 Mpe boye boboto ekoki kosepelisa masengami ya boyengebene, mpe kozinga yango na maboko ya bokengi, nzokande ye oyo asaleli te bondimi mpo na boyamboli amitalisi na mobeko mobimba ya masengami ya boyengebene; boye mwango monene mpe ya seko ya bosikoli momemami bobele epayi na ye oyo azali na bondimi mpo na boyamboli.

17 Boye tika Nzambe apesa epayi na bino, bandeko na ngai, ete bokoka kobanda kosalela bondimi na bino mpo na boyamboli, ete bobanda kobelela nkombo na ye esantu, ete alakisa boboto mpo na bino;

18 Iyo, bobelela epayi na ye mpo na boboto; mpo azali na nguya ya kobikisa.

19 Iyo, bomikitisa, mpe bokoba na kosambela ye.

20 Bobelela epayi na ye ntango bozali na bilanga na bino, iyo, mpo na oyo etali bibwele na bino nyonso.

21 Bobelela epayi na ye na bandako na bino, iyo, mpo na oyo etali baoyo bazali bato ya ndako na bino, ezala ntongo, nzanga, mpe mpokwa.

22 Iyo, bobelela epayi na ye mpo na kotelemela nguya ya banguna na bino.

23 Iyo, bobelela epayi na ye mpo na kotelemela zabulu, oyo azali monguna ya bosembo nyonso.

24 Bobelela epayi na ye mpo na oyo etali miwana ya bilanga na bino, ete bokoka kofuluka na myango.

25 Bobelela mpo na oyo etali bibwele ya bilanga na bino, ete bikoka koyikana.

26 Kasi oyo ezali nyonso te; bosengeli kosopa mpenza molimo na bino na bisika na bino, mpe bisika na bino ya nkuku, mpe na esobe na bino.

27 Iyo, mpe ntango bobeleli te epayi ya Nkolo, tika mitema na bino mitondisama, mitindama na losambo epayi na ye ntango nyonso mpo na bolamu na bino, mpe lisusu mpo na bolamu na bango oyo bazali nzinganzinga na bino.

28 Mpe sikawa tala, bandeko balingami na ngai, nalobi epayi na bino, bobanza te ete oyo ezali nyonso; mpo esili bino kosala makambo oyo, soki bobaloli mikongo na bakeleli, mpe baoyo bazali bolumbu, mpe bokei te kotala bakoni mpe baye kati na mitungisi, mpe bokabi te biloko na bino, soki bozali na yango, na bango oyo bazali kokelela—nalobi epayi na bino, soki bosali moko ya makambo oyo te, tala, losambo na bino ezali mpamba, mpe ezali na litomba mpo na bino te, mpe bozali lokola bakibisi baye bawanganaka bondimi.

29 Boye, soki bomikundoli te kozala bato na bolingani, bozali lokola mbindo ya ebende ya ntalo, oyo monetoli bibende abwakaka libanda, (mpo elongobani te) mpe eniatami na nse ya makolo ya bato.

30 Mpe sikawa, bandeko na ngai, nalingi ete, esili bino kozwa matatoli mingi mpenza, komonaka ete makomi masantu matatolaki makambo oyo, boya mpe bobimisa mbuma mpo na boyamboli.

31 Iyo, nalingi ete boya mpe boyeisa mitema na bino makasi lisusu te; mpo tala, sikawa ezali ntango mpe mokolo ya lobiko na bino; mpe boye, soki bokoyambola mpe bokoyeisa mitema na bino makasi te, sasaipi mwango monene ya bosikoli ekosalema mpo na bino.

32 Mpo tala, bomoi oyo ezali ntango mpo na bato komilengela mpo na kokutana na Nzambe; iyo, tala mokolo ya bomoi oyo ezali mokolo mpo na bato kosala misala na bango.

33 Mpe sikawa, lokola nalobaki epayi na bino liboso, lokola bozali na matatoli mingi, na boye, nabondeli bino ete bozilisa mokolo ya boyamboli na bino kino na nsuka te; mpo nsima ya mokolo oyo ya bomoi, oyo epesameli biso mpo na komilengela mpo na boseko, tala, soki tobongisi ntango na biso wana ezali biso na bomoi oyo te, nsima nde butu ya molili ekoya epayi wapi mosala moko ekoki kosalema te.

34 Bokoki koloba te, wana ekomi bino na ezalela wana ya nsomo, ete nakoyambola, ete nakozonga epayi ya Nzambe na ngai. Te, bokoki koloba boye te; mpo molimo moko wana oyo ekangi nzoto na bino na ntango oyo bobimi na bomoi oyo, molimo moko wana ekozala na nguya ya kokanga nzoto na bino na mokili wana ya seko.

35 Mpo tala, soki bozilisaki mokolo ya boyamboli na bino kutu kino na liwa, tala, bokomi bato bayangelami na molimo ya zabulu, mpe azali kokanga bino bato na ye; na boye, Molimo ya Nkolo elungwe epayi na bino, mpe ezali na esika kati na bino te, mpe zabulu azali na nguya nyonso likolo na bino; mpe oyo ezali ezalela ya nsuka ya moto mabe.

36 Mpe oyo nayebi; mpo Nkolo alobi ete afandaka te na batempelo ezanga bosantu, kasi afandaka na mitema ya basembo; iyo, mpe alobi lisusu ete basembo bakofanda na nse na bokonzi na ye, mpo na kobima libanda lisusu te; kasi bilamba na bango bikokomisama mpembe na nzela ya makila ya Mwana ya mpate.

37 Mpe sikawa, bandeko balingami na ngai, nazali na mposa ete bomikundola makambo oyo, mpe ete bosala mpo na lobiko na bino na bobangi liboso ya Nzambe, mpe ete bowangana lisusu te boyei ya Klisto;

38 Ete bowela lisusu te na Molimo Mosantu, kasi boyamba ye, mpe bokamata likolo na bino nkombo ya Klisto; ete bomikitisa liboso na ye kutu kino na mputulu, mpe bokumbamela Nzambe, na bisika nyonso kani ekoki bino kozala, na molimo mpe na bosolo; mpe ete bozala na bomoi na kopesaka matondi mokolo na mokolo, mpo na boboto mpe mapamboli mingi oyo apesi likolo na bino.

39 Iyo, mpe lisusu nalendisi bino, bandeko na ngai, ete bokengela na kotikalaka na losambo ntango nyonso, ete bokoka kokosama te na masenginia ya zabulu, ete alonga bino te, ete bokoka kokoma bayangelami na ye te na mokolo ya nsuka; mpo tala, akopesa bino mbano moko ya eloko ya malamu te.

40 Mpe sikawa bandeko balingami na ngai, nalingi kolendisa bino mpo na kozala na bompikiliki, mpe ete bondima ndenge nyonso ya mitungisi; ete botiola te bango oyo babengani bino na ntina ya bobola koleka ya bino, mbele bokoma basumuki lokola bango;

41 Kasi ete bozala na bompikiliki, mpe bokanga mitema na mitungisi wana, na elikya moko ya ngwi ete mokolo moko bokopema uta na mitungisi na bino nyonso.

Bimisa na lokasa