Makomi
Alama 53


Mokapo 53

Balamani ba boloko basali mpo ya koyeisa makasi engumba Beboo—Bokabwani o ntei ya Banefi epesi bomati mpo ya elonga ya Balamani—Elamani azwi bokomanda bwa nkoto ibale ya bana babali banzenga ba bato ba Amona. Penepene na 64–63 Yambo ya Klisto.

1 Mpe esalemaki ete batiaki bakengeli likolo lya Balamani ba boloko, mpe basengisaki bango mpo ya kokende mpe kokunda bakufi ba bango, iyo, mpe lisusu bakufi ba Banefi baye babomamaki; mpe Moloni atiaki bato likolo lya bango ntango ekosala bango misala mya bango.

2 Mpe Moloni akendeki o engumba ya Muleki elongo na Lehi, mpe akamataki bokomanda bwa engumba mpe apesaki bwango epai ya Lehi. Sikawa tala, Lehi oyo azalaki moto moko oyo azalaki elongo na Moloni o biteni bileki mingi bya bitumba; mpe azalaki moto moko bo Moloni, mpe basepelaki o bozangi likama bwa bango na bango; iyo, balinganaki bango na bango, mpe lisusu balingamaki na bato banso ba Nefi.

3 Mpe esalemaki ete esilisaka Balamani kokundaka bakufi ba bango mpe lisusu bakufi ba Banefi, batambolisamaki kozonga o kati ya mboka Beboo; mpe Teakumi, na mitindo mya Moloni, asalaki ete babanda kosalaka na kotimolaka zingazinga mpembeni na mboka, to engumba, Beboo.

4 Mpe asalaki ete batonga etelemelo yoko ya mabaya likolo lya eboke ya zelo ya kati ya libulu; mpe babwakaki likolo bosoto libanda lya libulu ekangana na etelemelo ya mabaya; mpe boye basalaki Balamani basala kina bazingaki engumba Beboo zingazinga mpembeni ya efelo ekasi ya mabaya mpe mabele, o bosanda boluti.

5 Mpe engumba eye ekomaki esika ekasi eluti libela nsima; mpe o engumba eye bakengeleki bato ba boloko ba Balamani; iyo, kutu o ntei ya efelo yoko eye basalaki bango batonga na maboko ma bangomei. Sikawa Moloni asengisamaki kosala Balamani basala, zambi ezalaki petepete kokengele bango ntango ya misala mya bango; mpe azalaki na mposa ya makasi ma ye manso ekobanda ye etumba yoko likolo lya Balamani.

6 Mpe esalemaki ete Moloni alongaki boye elonga yoko likolo lya yoko eleki enene ya mampinga ma Balamani, mpe azwaki engumba ya Muleki, eye ezalaki yoko ya bisika bikasi bya Balamani o mboka ya Nefi; mpe boye atongaka lisusu esika yoko ekasi mpo ya kabomba bato ba ye ba boloko.

7 Mpe esalemaki ete amekaki lisusu te etumba yoko na Balamani o mobu mona, kasi asalisaki bato ba ye na kolengeleke mpo ya etumba, iyo, mpe na kotongaka bisika bikasi mpo ya kokengele Balamani, iyo, mpe lisusu abikisaki basi ba bango mpe bana ba bango na nzala mpe litungisi, mpe kopesaka bilei mpo ya mampinga ma bango.

8 Mpe sikawa esalemaki ete mampinga ma Balamani, o mbu ya westi, o sudi, ntango ya bozangi bwa Moloni na ntina ya mwa poloso o ntei ya Banefi; eye esalaki bokabwani o ntei ya bango, balongaka yoko mabele likolo lya Banefi, iyo, mpenza ete bakamataki bozwi bwa motango moko mwa bingumba o eteni ena ya mboka.

9 Mpe boye na ntina ya bobe o ntei ya bangomei, iyo, na ntina ya bokabwani mpe poloso o ntei ya bangomei bamitiamaki o bizaleli bya likama mingi koleka.

10 Mpe sikawa tala, nazali na mwa moke ya koloba etali bato ba Amona, baye, o ebandeli bazalaki Balamani; kasi na Amona mpe bandeko babali ba ye, to kutu na nguya mpe liloba lya Nzambe, babongwanaki epai ya Nkolo; mpe bamememeki o nse o kati ya mboka ya Zalayemila, mpe uta yango babatelamaka na Banefi ntango inso.

11 Mpe na ntina ya ndai ya bango babatelamaki na kokamata lisusu mandoki mpo ya kobunda na bandeko ba bango; mpo balapaka ndai yoko ete mokolo moko te bakosopa lisusu makila; mpe engebene na ndai ya bango balingaki kowa; iyo, balingaki kondima bangomei kokweya o kati ya maboko ma bandeko ba bango, soko ezalaka te mpo ya mawa mpe bolingo boluti boye Amona mpe bandeko ba ye bazalaka na yango mpo ya bango.

12 Mpe mpo ya ntina eye bamememeki o kati ya mboka ya Zalayemila; mpe babatelamaka ntango inso na Banefi.

13 Kasi esalemaki ete emonoki bango likama, mpe matungisi mpe mikakatano mingi miye Banefi bazwaki mpo ya bango, baningisamaki na mawa mpe bazalaki na mposa ya kokamata mandoki o bobateli bwa ekolo ya bango.

14 Kasi tala, lokola bazalaki penepene na kokamata mandoki ma bango ma etumba, balongamaki na maloba ma Elamani mpe bandeko ba ye, mpo bazalaki penepene na kobuka ndai eye basalaka.

15 Mpe Elamani abangaki ete na kosalaka boye babungisa bozo bwa bango; yango wana bango banso baye bakotaki o kati ya boyokani boye basengisamaki kotala bandeko ba bango koleka o matungisi ma bango, o bizalali bya bango bya likama o ntango eye.

16 Kasi tala, esalemaki ete bazalaki na bana babali mingi, baye bakotaki te o kati ya boyokani ete bakokamata te mandoki ma bango ma etumba mpo ya komibatela na bayini ba bango; yango wana bamisangisaki elongo o ntango eye, mingi lokola bakokaki kokamata mandoki, mpe bamibiangaki Banefi.

17 Mpe bakotaki o kati ya boyokani mpo ya kobunda mpo ya lipanda lya Banefi, iyo, mpo ya kobatela mboka na bolalisi o nse bwa bomoi bwa bango; iyo, kutu bayokanaki ete mokolo moko te bakosundola lipanda lya bango, kasi bakobunda na makambo manso mpo ya kobatela Banefi mpe bangomei uta o bowumbu.

18 Sikawa tala, ezalaki nkoto ibale ya bilenge babali, oyo bakotaki o kati ya boyokani mpe bakamataki mandoki ma bango ma etumba mpo ya kobatela ekolo ya bango.

19 Mpe sikawa tala, lokola mokolo moko te bazalaki kina o ntango ena mbeba yoko mpo ya Banefi, bakomaki sikawa o eleko ya ntango eye lisusu lisungi lyoko linene; mpo bakamataki mandoki ma bango ma etumba, mpe balingaki ete Elamani azala mokambi wa bango.

20 Mpe bazalaki banso bilenge babali, mpe bazalaki na nkozo mpenza, mpo ya mpiko, mpe lisusu mpo ya bokasi mpe moningi; kasi tala, eye ezalaki enso te—bazalaki bato baye bazalaki solo o ntango inso o makambo manso bazalaki na mokumba.

21 Iyo, bazalaki bato ba solo mpe limemia, mpo bateyamaka kobatela mitindo mya Nzambe mpe kotambola alima liboso lya ye.

22 Mpe sikawa esalemaki ete Elamani atambolaki o moto mwa nkoto ibale ya basoda banzenga, mpo ya kosunga bato bazalaki o ndelo ya mboka o sudi mpembeni ya mbu ya westi.

23 Mpe boye esukaki mobu mwa tuku mibale na mwambe mwa bokonzi bwa basambisi likolo lya bato ba Nefi.