Makomi
Alama 20


Mokapo 20

Nkolo atindi Amona o Midoni mpo ya kobikisa bandeko ba ye bakangemaki o boloko—Amona mpe Lamoni bakutani na tata wa Lamoni, oyo azali mokonzi wa mboka mobimba—Amona atindi mokonzi wa mobange mpo andima botiki bwa bandeko ba ye. Penepene na 90 Yambo ya Klisto.

1 Mpe esalemaki ete etiaki bango eklezia yoko o mboka ena, mokonzi Lamoni azalaki na mposa ete Amona akende elongo na ye o mboka ya Nefi, ete akoka kolakisa ye epai ya tata wa ye.

2 Mpe mongongo mwa Nkolo moyaki na Amona, kolobaka: Okomata te o mboka ya Nefi, mpo tala, mokonzi akoluka bomoi bwa yo; kasi osengeli kokende o mboka ya Midoni; mpo tala, ndeko wa yo Aloni, mpe lisusu Muloki mpe Ama bazali o boloko.

3 Sikawa esalemaki ete eyokaki Amona eye, alobaki epai ya Lamoni: tala, ndeko mobali mpe bandeko ba ngai bazali o boloko o Midoni, mpe nakei ete nakoka kobikisa bango.

4 Sikawa Lamoni alobaki epai ya Amona: Nayebi, o bokasi bwa Nkolo okoki kosala makambo manso. Kasi tala, nakokende elongo na yo o mboka ya Midoni; mpo mokonzi wa mboka ya Midoni, oyo ya ye nkombo ezali Atiomino, azali moninga epai ya ngai; yango wana nakokende o mboka ya Midoni, ete nabondela mokonzi wa mboka, mpe akobwaka bandeko ba yo libanda lya boloko. Sikawa Lamoni alobaki epai ya ye: Nani alobeli yo ete bandeko ba yo bazali o boloko?

5 Mpe Amona alobaki epai ya ye: Moko te ayebisaki ngai, longola se soko ezali Nzambe; mpe alobaki epai ya ngai—Kende kobikisa bandeko ba yo, mpo bazali o boloko o mboka ya Midoni.

6 Sikawa eyokaki Lamoni eye asalaki ete basali ba ye babongisa farasa mpe makalo ma ye.

7 Mpe alobaki epai ya Amona: Yaka, nakokende elongo na yo o mboka ya Midoni, mpe kuna nakosamba na mokonzi ete abwaka bandeko ba yo libanda lya boloko.

8 Mpe esalemaki ete lokola Amona mpe Lamoni bazalaki o mobembo kuna, bakutanaki na tata wa Lamoni, oyo azalaki mokonzi likolo lya mboka mobimba.

9 Mpe tala, tata wa Lamoni alobaki epai ya ye: Ntina nini oyaki te o limpati o mokolo mona monene esalaki ngai limpati mpo ya bana babali ba ngai, mpe mpo ya bato ba ngai?

10 Mpe alobaki lisusu: Wapi ozali kokendeke elongo na Monefi oyo, oyo azali moko wa bana ba mokosi moko?

11 Mpe esalemaki ete Lamoni azongelaki epai ya ye wapi azalaki kokendeke, mpo abangaki kotumola ye.

12 Mpe lisusu alobelaki ye ntina inso ya bowumeli bwa ye o bokonzi bwa yemei, ete akendeki te o limpati liye tata wa ye alengeleki.

13 Mpe sikawa ezongelaki Lamoni epai ya ye makambo maye manso, tala, o bokamwi bwa ye, tata wa ye asilikaki na ye, mpe alobaki: Lamoni, ozali kokendeke kobikisa Banefi baye, baye bazali bana ba mokosi moko. Tala, ayongoloki batata ba biso; mpe sikawa bana ba ye lisusu bayei o ntei ya biso ete bakoka, na mayele mabe ma bango mpe bokosi bwa bango, kobuba biso, ete bango lokola bakoka koyongolo bozwi bwa biso.

14 Sikawa tata wa Lamoni atindaki ye ete aboma Amona na mopanga. Mpe atindaki ye lisusu ete akende te o mboka ya Midoni, kasi azonga elongo na ye o mboka ya Yisamaele.

15 Kasi Lamoni alobaki epai ya ye: Nakoboma Amona te, mpe nakozonga te o mboka ya Yisamaele, kasi nakokende o mboka ya Midoni ete nakoka kobimisa bandeko ba Amona, mpo nayebi ete bazali bato bayengebene mpe baprofeta basantu ba Nzambe wa solo.

16 Sikawa eyokaki tata wa ye maloba maye, asilikaki na ye, mpe abendaki mopanga mwa ye ete akoka kobamba ye o mabele.

17 Kasi Amona atelemeki mpe alobaki epai ya ye: Tala, okoboma te mwana mobali wa yo; nzokande, ezalaki bolamu mingi koleka ete ye akweya esika ya yo, mpo tala, ayamboli masumu ma ye; kasi soko okwei o ntango eye, na nkanda ya yo, bozo bwa yo bokoki te kobikisama.

18 Mpe lisusu, elongobani ete otika; mpo soko obomi mwana mobali wa yo, oyo azali moto azangi elindo, makila ma ye makoganga uta o nse na Nkolo Nzambe wa ye, mpo bobekoli boya likolo lya yo; mpe mbele obungisa bozo bwa yo.

19 Sikawa elobaki Amona maloba maye epai ya ye, ayanolaki, kolobaka: Ngai nayebi ete soko nabomi mwana mobali wa ngai, ete nakotangisa makila mazangi elindo; mpo ezali yo oyo oluki kobebisa ye.

20 Mpe atandolaki loboko la ye mpo ya koboma Amona. Kasi Amona atelemelaki mabete ma ye, mpe lisusu atutaki loboko la ye mpo ete akoka kosalela yango te.

21 Sikawa emonoki mokonzi ete Amona akokaki koboma ye, abandaki kosamba na Amona ete abikisa bomoi bwa ye.

22 Kasi Amona atombolaki mopanga mwa ye, mpe alobaki epai ya ye: Tala, nakobete yo longola se soko otiki epai ya ngai ete bandeko ba ngai babwakama libanda lya boloko.

23 Sikawa mokonzi, kobangaka abungisa bomoi bwa ye, alobaki: Soko okobikisa ngai nakotika epai ya yo enso eye okosenge, kutu na katikati ya bokonzi bwa ngai.

24 Sikawa emonoki Amona ete asalaki likolo lya mokonzi wa mobange engebene na mposa ya ye, alobaki epai ya ye: Soko otiki ete bandeko ba ngai babwakama libanda lya boloko, mpe lisusu ete Lamoni akoka kosimba kaka bokonzi bwa ye, mpe ete ozala te na nkanda na ye, kasi otika ete akoka kosala engebene na mposa ya yemei o enso eye akanisi, nde nakobikisa yo; soko te nakobamba yo o mabele.

25 Sikawa elobaka Amona maloba maye, mokonzi abandaki kosepela na ntina ya bomoi bwa ye.

26 Mpe emonoki ye ete Amona azalaki te na mposa ya koboma ye, mpe emonoki ye lisusu bolingo bonene azalaki na bwango mpo ya mwana mobali wa ye Lamoni, akamwaki mpenza, mpe alobaki: Zambi eye ezali eye enso ozali na mposa, ete nabimisa bandeko ba yo, mpe nandima ete mwana mobali wa ngai Lamoni asimba kaka bokonzi bwa ye, tala, nakotika epai ya yo ete mwana mobali wa ngai akoka kosimba bokonzi bwa ye uta o ntango eye mpe libela; mpe nakoyangela ye lisusu te—

27 Mpe nakotika epai ya yo ete bandeko ba yo bakoka kobwakama libanda lya boloko, mpe yo mpe bandeko ba yo bokoka koya epai ya ngai, o bokonzi bwa ngai; mpo nakozala na mposa enene ya komono yo. Mpo mokonzi akamwaki mingi o maloba maye alobaka, mpe lisusu o maloba maye malobamaki na mwana mobali wa ye Lamoni, yango wana azalaki na mposa ya koyekola yango.

28 Mpe esalemaki ete Amona mpe Lamoni bakobaki o mobembo mwa bango ona mboka ya Midoni. Mpe Lamoni akutaki lisungi o miso mya mokonzi wa mboka; yango wana bandeko ba Amona bamememeki libanda lya boloko.

29 Mpe ekutanaki Amona na bango azalaki na mawa mpenza, mpo tala bazalaki bolumbu, mpe mposo ya bango ipalolamaki mpenza na ntina ya kozalaka kokangema na nsinga ikasi. Mpe lisusu bayokaka mpasi ya nzala, mposa ya mai, mpe ndenge inso ya matungisi; nzokande bazalaki bampikiliki o mpasi ya bango inso.

30 Mpe, lokola esalemaki, ezali mokako mwa bango kokweya o kati ya maboko ma bato boko ba motema mokasi mingi koleka mpe nkanza mingi koleka; yango wana balingaki te koyokemela epai ya maloba ma bango, mpe babwakaka bango libanda, mpe babeteki bango, mpe babenganaki bango uta ndako na ndako, mpe uta esika na esika, kutu kina bakomaki o mboka ya Midoni; mpe kuna bakamatamaki mpe babwakamaki o boloko, mpe bakangemaki na nsinga ikasi, mpe babombamaki o boloko mpo ya mikolo mingi, mpe babikisamaki na Lamoni mpe Amona.