Makomi
Alma 43


Mokapo 43

Alma mpe bana mibali na ye bateyi liloba—Bazolami mpe bakabwani ya Banefi basusu bakomi Balamani—Balamani bakomi kobunda etumba na Banefi—Moroni apesi Banefi bibundeli ya bobatelami—Nkolo abimisi epayi ya Alma mayele ya etumba ya Balamani—Banefi babateli bipayi na bango, lipanda, mabota, mpe eyamba na bango—Mampinga ya Moroni mpe Lehi mazingi Balamani. Penepene na mobu 74 Liboso na mbotama ya Klisto.

1 Mpe sikawa esalemaki ete bana ya Alma bakendaki na kati ya bato, mpo na kosakola liloba epayi na bango. Mpe Alma, lisusu, ye moko, akokaki te kopema, mpe akendaki mpe lokola.

2 Sikawa tokoloba lisusu te mpo na oyo etali mateya na bango, longola se ete bateyaki liloba, mpe bosolo, engebene na molimo ya masakoli mpe emoniseli; mpe bateyaki na lolenge ya molongo mosantu ya Nzambe na oyo wapi babiangamaki.

3 Mpe sikawa tala nazongi na lisolo ya bitumba kati na Banefi mpe Balamani, na mobu ya zomi na mwambe ya boyangeli ya basambisi.

4 Mpo tala, esalemaki ete Bazolami bakomaki Balamani; boye, na ebandeli ya mobu ya zomi na mwambe bato nyonso ya Banefi bamonaki ete Balamani bazalaki koya kobundisa bango; boye bamilengelaki mpo na etumba; iyo, basangisaki elongo manduki na bango na mboka ya Yesoni.

5 Mpe esalemaki ete Balamani bayaki elongo nkoto na nkoto; mpe bayaki kati na mboka ya Ationumi, oyo ezali mboka ya Bazolami; mpe moto moko na nkombo ya Zelayemina azalaki mokambi na bango.

6 Mpe sikawa, lokola Baamaleki bazalaki bato oyo motema ebendamaki na nkuna mpe ya bobomi mingi koleka Balamani, na bango moko, boye, Zelayemina aponaki bakapiteni bakonzi likolo ya Balamani, mpe bango nyonso bazalaki Baamaleki mpe Bazolami.

7 Sikawa oyo asalaki ete akoka kobatela boyini na bango epayi ya Banefi, ete akoka komema bango kati na boyangelami mpo na kokokisa miango na ye.

8 Mpo tala, miango na ye ezalaki mpo na kolamusa Balamani na nkanda epayi ya Banefi; oyo asalaki ete akoka koyiba nguya monene likolo na bango, mpe lisusu ete akoka kozwa nguya likolo ya Banefi na komemaka bango kati na boumbu.

9 Mpe sikawa mwango ya Banefi ezalaki ya kosalisa mboka na bango, mpe bipayi na bango, mpe basi na bango, mpe bana na bango, ete bakoka kobatela bango uta na maboko ya banguna na bango; mpe lisusu ete bakoka kobatela makoki na bango mpe matomba na bango, iyo, mpe lisusu lipanda na bango, ete bakoka kokumbamela Nzambe engebene na mposa na bango.

10 Mpo bayebaki ete soki bakwei kati na maboko ya Balamani, ete moto nyonso oyo akokumbamela Nzambe na molimo mpe na bosolo, Nzambe ya solo mpe ya bomoi, Balamani bakobebisa ye.

11 Iyo, mpe bayebaki lisusu boyini makasi kino nsuka mpenza ya Balamani epayi ya bandeko na bango, baoyo bazalaki bato ya Anti-nefi-lehi, baoyo babiangamaki bato ya Amona—mpe balingaki kokamata manduki na bango te, iyo, bakotaki kati na liyokani mpe balingaki kobuka yango te—boye, soki bakweyaki na maboko ya Balamani balingaki kobebisa bango.

12 Mpe Banefi balingaki te kopesa nzela ete babebisama; boye bapesaki bango mboka mpo na kosangola libula na bango.

13 Mpe bato ya Amona bapesaki epayi ya Banefi ndambo monene ya bilei na bango mpo na kosalisa mampinga na bango; mpe boye Banefi basengisamaki, bango moko, kotelemela Balamani, baoyo bazalaki mbuma ya bosangisani ya Lamani mpe ya Lemuele, mpe bana mibali ya Yisamaele, mpe bango nyonso oyo bakabwanaki uta na Banefi, baoyo bazalaki Baamaleki mpe Bazolami, mpe biboto ya banganganzambe ya Noa.

14 Sikawa biboto wana bazalaki na motango monene, penepene, lokola ezalaki Banefi; mpe boye Banefi basengelaki kowela na bandeko na bango, kutu kino na bosopi makila.

15 Mpe esalemaki ete lokola mampinga ya Balamani masanganaki na mboka ya Ationumi, tala, mampinga ya Banefi balengelameki mpo na kokutana na bango na mboka ya Yesoni.

16 Sikawa, mokambi ya Banefi, soki te moto oyo aponamaki mpo na kozala kapitene mokonzi likolo ya Banefi—sikawa kapitene mokonzi akamataki ebonga ya kokamba mampinga nyonso ya Banefi—mpe nkombo na ye ezalaki Moroni.

17 Mpe Moroni akamataki mosala nyonso ya bokambi, mpe mbulamatari ya bitumba na bango. Mpe azalaki bobele na mibu ntuku mibale na mitano ntango baponaki ye kapitene mokonzi likolo ya mampinga ya Banefi.

18 Mpe esalemaki ete akutanaki na Balamani na ndelo ya Yesoni, mpe bato na ye bazalaki na manduki ya mipanga, mpe ya nsendo, mpe ndenge nyonso ya bibundeli ya bitumba.

19 Mpe emonaki mampinga ya Balamani ete bato ya Nefi, soki te ete Moroni, alengelaki bato na ye na ebende ya ntolo mpe na nguba ya loboko, iyo, mpe lisusu nguba ya kobatelamitu na bango, mpe lisusu balataki bilamba ya kilo mingi—

20 Sikawa limpinga ya Zelayemina elengelamaki te na eloko moko ya lolenge oyo; bazalaki bobele na mipanga na bango, mpe nsendo na bango, matimbo na bango mpe makula na bango, mabanga na bango mpe bilingongo na bango; mpe bazalaki bolumbu, longola se ezalaki na mposo moko oyo ezingamaki penepene na nketo na bango; iyo, bango nyonso bazalaki bolumbu, longola se Bazolami mpe Baamaleki;

21 Kasi balataki manduki ya ebende ya ntolo te, to nguba te—boye, babangaki mpenza mampinga ya Banefi na ntina ya bibundeli na bango, ata motango na bango ezalaki mingi mpenza koleka Banefi.

22 Tala, sikawa esalemaki ete bamekaki te koya kobunda na Banefi na ndelo ya Yesoni; boye balongwaki uta na mboka ya Ationumi kokendaka na esobe, mpe bakamataki mobembo na bango nzinganzinga mpembeni na esobe, mosika penepene na moto ya ebale ya Sidoni, ete bakoka koya na mboka ya Mati mpe bakamata mboka; mpo babanzaki ete mampinga ya Moroni bakoyeba te wapi bakendaki.

23 Kasi esalemaki ete, sasaipi lokola bakendaki kati na esobe Moroni atindaki banongi kati na esobe mpo na kokengela nganda na bango; mpe Moroni, lisusu, lokola ayebaki masakoli ya Alma, atindaki boko bato epayi na ye, mpo azalaki na mposa ete aluka koyeba uta na Nkolo wapi mampinga ya Banefi basengelaki kokende mpo na komibatela na Balamani.

24 Mpe esalemaki ete liloba ya Nkolo eyaki epayi ya Alma, mpe Alma ayebisaki bantoma ya Moroni, ete mampinga ya Balamani bazali kotambolaka nzinganzinga mpembeni na esobe, ete bakoka koya kokamata mboka ya Mati, ete bakoka kobanda kobundisa eteni ya bato ezali makasi te. Mpe bantoma bana bakendaki mpe bapesaki nsango epayi ya Moroni.

25 Sikawa Moroni, lokola atikaki eteni moko ya limpinga na ye na mboka ya Yesoni, na kobangaka ete na nzela moko to mosusu ndambo ya Balamani baya kati na mboka mpe bakamata engumba, akamataki ndambo etikali ya limpinga na ye mpe batambolaki likolo kati na mboka ya Mati.

26 Mpe asalaki ete bato nyonso na ntaka wana ya mboka basangana bango moko esika moko mpo na etumba na Balamani, mpo na kobatela bamboka mpe ekolo na bango, makoki na bango mpe lipanda na bango; boye bamilengelaki mpo na ntango ya boyei ya Balamani.

27 Mpe esalemaki ete Moroni asalaki ete limpinga na ye ebombama na lobwaku oyo ezalaki penepene na libongo ya ebale Sidoni, oyo ezalaki na westi ya ebale Sidoni na esobe.

28 Mpe Moroni atiaki banongi nzinganzinga mpembeni, ete akoka koyeba ntango lingomba ya mampinga ya Balamani ekoya.

29 Mpe sikawa, lokola Moroni ayebaki mokano ya Balamani, ete ezalaki mokano na bango ya kobebisa bandeko na bango, soki te ya koyangela mpe komema bango kati na boumbu ete bakoka kotia bokonzi moko mpo na bango moko likolo ya mboka mobimba;

30 Mpe lisusu lokola ayebaki ete ezalaki bobele mposa ya Banefi ya kobatela mboka na bango, mpe lipanda na bango, mpe eklezia na bango, boye akanisaki ete ezali lisumu te ete abatela bango na angele; boye, ayebaki na lisalisi ya banongi na ye nzela wapi Balamani basengelaki kokamata.

31 Boye, akabolaki limpinga na ye mpe amemaki ndambo moko kati na lobwaku, mpe abombaki bango na esti, mpe na sudi ya ngomba ya moke na nkombo Lipila;

32 Mpe ndambo etikali ya limpinga abombaki bango na lobwaku ya westi, na westi ya ebale Sidoni, mpe boye na nse ya ndelo ya mboka Mati.

33 Mpe boye etiaki ye limpinga na ye engebene na mposa na ye, amilengelaki mpo na kokutana na bango.

34 Mpe esalemaki ete Balamani bayaki na nordi ya ngomba ya moke, epayi wapi ndambo moko ya limpinga ya Moroni ebombanaki.

35 Mpe lokola Balamani balekaki ngomba moke ya Lipila, mpe bakotaki kati na lobwaku, mpe babandaki kokatisa ebale Sidoni, limpinga oyo ebombanaki na sudi ya ngomba ya moke, oyo bakambamaki na moto moko oyo kani nkombo ezalaki Lehi, mpe akambaki limpinga na ye liboso mpe azingaki Balamani penepene na esti nsima na bango.

36 Mpe esalemaki ete Balamani, ntango bamonaki Banefi koyelaka bango na nsima na bango, babalukaki mpe babandaki kowela na limpinga ya Lehi.

37 Mpe mosala ya liwa ebandaki na ngambo nyonso mibale, kasi ezalaki nsomo mingi koleka epayi ya Balamani, mpo bolumbu na bango ebatelaki bango te uta na mabete ya bozito ya Banefi elongo na mipanga na bango mpe nsendo na bango, oyo ememaki liwa penepene na lobete nyonso.

38 Ntango na ngambo mosusu, moto moko azalaki ntango na ntango kokweya na kati ya Banefi, na mipanga na bango mpe na bobungisi makila na bango, lokola bazipamaki na bisika bileki motuya na bomoi ya nzoto, soki te bisika bileki motuya na bomoi ya nzoto bizipamaki na mabete ya Balamani, na lisalisi ya bibende ya ntolo na bango, mpe nguba ya loboko na bango, mpe bibende ya mitu na bango; mpe boye Banefi bamemaki mosala ya liwa na kati ya Balamani.

39 Mpe esalemaki ete Balamani bakomaki kobanga, na ntina ya bobebisami monene na kati na bango, kutu kino babandaki kokima epayi na ebale ya Sidoni.

40 Mpe balandamaki na Lehi mpe bato na ye; mpe babenganamaki na Lehi kati na mai ya Sidoni, mpe bakatisaki mai ya Sidoni. Mpe Lehi atelemisaki mampinga na ye likolo ya libongo ya ebale ya Sidoni ete bakatisa te.

41 Mpe esalemaki ete Moroni mpe limpinga na ye bakutanaki na Balamani na lobwaku, na ngambo mosusu ya ebale ya Sidoni, mpe babandaki kokweya likolo na bango mpe koboma bango.

42 Mpe Balamani bakimaki lisusu liboso na bango, bakendaki epayi na mboka ya Mati; mpe bakutanaki lisusu na mampinga ya Moroni.

43 Sikawa na libaku oyo Balamani babundaki mpenza; iyo, Balamani bayebanaki soki moke te kobunda na makasi monene mpe mpiko mpenza ya lolenge oyo, te, kutu uta na ebandeli.

44 Mpe bafulamaki na Bazolami mpe Baamaleki, baoyo bazalaki bakapiteni bakonzi mpe bakambi na bango, mpe Zelayemina, oyo azalaki kapitene mokonzi, soki te mokambi mokonzi mpe komanda na bango; iyo, babundaki lokola bilima mabe, mpe mingi ya Banefi babomamaki na maboko na bango, iyo, mpo babukaki na biteni mibale mingi ya bibende ya mitu na bango, mpe batobolaki mingi ya bibende ya ntolo na bango, mpe babukaki mingi ya maboko na bango; mpe boye Balamani babetaki makasi na nkanda makasi na bango.

45 Nzokande, Banefi bafulamaki na ntina ya malamu koleka, mpo bazalaki kobunda mpo na bokonzi to mpe mpo na nguya te; kasi bazalaki kobunda mpo na bandako bipayi na bango mpe lipanda na bango, basi na bango mpe bana na bango, mpe nyonso na bango, iyo, mpo na ndulu ya bokumbameli na bango mpe mpo na eklezia na bango.

46 Mpe bazalaki kosalaka oyo wana bamonaki ete ezalaki mosala oyo basengelaki kokokisa mpo na Nzambe na bango; mpo Nkolo alobaki epayi na bango, mpe lisusu epayi ya batata na bango, ete: Mbala mingi lokola bozali na elindo te ya mabe ya yambo, soki mpe ya mibale te, bokopesa te nzela ete bobomama na maboko ya banguna na bino.

47 Mpe lisusu, Nkolo alobaki ete: bokobatela mabota na bino kutu kino na bosopi makila. Boye mpo na ntina oyo Banefi bazalaki kowelaka na Balamani, mpo na komibatela, mpe mabota na bango, mpe mboka na bango, ekolo na bango, mpe makoki na bango, mpe eyamba na bango.

48 Mpe esalemaki ete emonaki bato ya Moroni nkele mpe nkanda ya Balamani, bakomaki penepene na kozonga nsima mpe kokima bango. Mpe Moroni, lokola asosolaki mokano na bango, atindaki mpe afulaki mitema na bango na makanisi oyo—iyo, makanisi ya mboka na bango, lipanda na bango, iyo, bonsomi na bango uta na boumbu.

49 Mpe esalemaki ete babalukelaki Balamani, mpe babelelaki na mongongo moko epayi ya Nkolo Nzambe na bango, mpo na lipanda na bango mpe bonsomi na bango uta na boumbu.

50 Mpe babandaki kotelemela Balamani na bokasi; mpe na ngonga se moko wana babelelaki epayi ya Nkolo mpo na bonsomi na bango, Balamani babandaki kokima liboso na bango; mpe bakimaki kutu na mai ya Sidoni.

51 Sikawa, Balamani bazalaki na motango monene mingi koleka, iyo, mingi koleka penepene mbala mibale ya motango ya Banefi; nzokande, babenganaki bango na lolenge ete basanganaki esika moko na lingomba moko na lobwaku, likolo ya libongo ya ebale ya Sidoni.

52 Boye mampinga ya Moroni mazingaki bango penepene, iyo, kutu na bangambo nyonso mibale ya ebale, mpo tala, na esti ezalaki bato ya Lehi.

53 Boye ntango Zelayemina amonaki bato ya Lehi na esti ya ebale Sidoni, mpe mampinga ya Moroni na westi ya ebale Sidoni, ete bazingamaki penepene na Banefi, babetamaki na nsomo.

54 Sikawa Moroni, lokola amonaki nsomo na bango, atindaki bato na ye ete batika kosopaka makila na bango.

Bimisa na lokasa