Makomi
Alma 24


Mokapo 24

Balamani bayei kobunda na bato ya Nzambe—Bato ya Anti-nefi-lehi basepeli na Klisto mpe babimelami na banjelu—Baponi koyoka mpasi ya liwa na esika ya komibatela—Balamani mingi babongwani. Penepene na mibu 90–77 Liboso na mbotama ya Klisto.

1 Mpe esalemaki ete Baamaleki mpe Baamuloni mpe Balamani baoyo bazalaki na mboka ya Amuloni, mpe lisusu na mboka ya Helama, mpe baoyo bazalaki na mboka ya Yelusaleme, mpe mpo na kosukisa, na mboka nyonso nzinganzinga mpembeni, baoyo babongwanaki te mpe bakamataki te likolo na bango nkombo ya Anti-nefi-lehi, balamusamaki nkanda na Baamaleki mpe na Baamuloni mpo na kobundisa bandeko na bango.

2 Mpe boyini na bango ekomaki ya nsomo mpenza epayi ya bandeko na bango, kutu na lolenge ete babandaki kotomboka na mokonzi na bango, na lolenge ete balingaki te ete azala mokonzi na bango; boye, bakamataki manduki mpo na kobundisa bato ya Anti-nefi-lehi.

3 Sikawa mokonzi apesaki bokonzi likolo ya mwana mobali na ye, mpe abiangaki nkombo na ye Anti-nefi-lehi.

4 Mpe mokonzi akufaki na mobu mona kaka oyo Balamani babandaki komilengela mpo na etumba na bato ya Nzambe.

5 Sikawa ntango Amona mpe bandeko na ye mpe bango nyonso oyo balandaki ye bamonaki bolengeli ya Balamani mpo na kobebisa bandeko na bango, bayaki liboso na mboka ya Midiana, mpe kuna Amona akutanaki na bandeko na ye nyonso; mpe uta kuna bayaki na mboka ya Yisamaele ete bakoka kosala likita elongo na Lamoni mpe lisusu elongo na ndeko na ye Anti-nefi-lehi, nini basengeli kosala mpo na komibatela na Balamani.

6 Sikawa ezalaki na moto moko te na kati ya bato oyo babongwanaki epayi ya Nkolo oyo alingaki kokamata manduki mpo na kobundisa bandeko na bango; te, balingaki te kutu komilengela mpo na etumba; iyo, mpe lisusu mokonzi na bango atindaki bango ete basala yango te.

7 Sikawa, oyo ezali maloba oyo alobelaki bato mpo na oyo etali likambo yango: Natondi Nzambe na ngai, bato balingami na ngai ete Nzambe monene na biso atindaki na bolamu bandeko na biso baye, Banefi, epayi na biso mpo na koteya epayi na biso, mpe mpo na kondimisa biso mimesano ya nkuna ya batata na biso.

8 Mpe tala, natondi Nzambe monene na ngai ete apesi biso ndambo ya Molimo na ye mpo na kolembisa mitema na biso, ete tofungolaki mikangano ya kozala baninga na bandeko na biso oyo, Banefi.

9 Mpe tala, natondi lisusu Nzambe na ngai, ete na kofungolaka mikangano ya kozala baninga oyo tondimisami na masumu na biso, mpe na bobomi mingi boye tosalaki.

10 Mpe natondi lisusu Nzambe na ngai, iyo, Nzambe monene na ngai, ete apesi epayi na biso ete tokokaki koyambola na makambo oyo, mpe lisusu ete alimbisi biso na masumu mingi wana na biso mpe bobomi boye tosalaki, mpe alongoli elindo na mitema na biso, na nzela ya makoki ya Mwana na ye.

11 Mpe sikawa tala, bandeko na ngai, mpamba te ezalaki nyonso oyo tokokaki kosala, (lokola tozalaki baoyo babunga koleka na bato nyonso) mpo na koyambola na masumu na biso nyonso mpe bobomi mingi boye tosalaki, mpe kozya Nzambe alongola yango uta na mitema na biso, mpo ezalaki nyonso tokokaki kosala mpo na koyambola na lolenge ya kokoka liboso ya Nzambe ete akoka kolongola mbindo na biso—

12 Sikawa, bandeko balingami na ngai ya malamu mingi koleka, mpamba te Nzambe alongolaki mbindo na biso, mpe mipanga na biso ekomi kongenga, nde totia lisusu te mbindo na mipanga na biso na makila ya bandeko na biso.

13 Tala, nalobi epayi na bino, Te, tokanga mipanga na biso ete mitiama mbindo te na makila ya bandeko na biso; mpo mbele, soki totii lisusu mbindo na mipanga na biso ekoki kosukwama mpembe na makila ya Mwana ya Nzambe monene na biso lisusu te, oyo ekosopama mpo na bomikabi ya masumu na biso.

14 Mpe Nzambe monene azali na boboto na biso, mpe asali ete makambo oyo eyebana epayi na biso ete tokoka kowa te; iyo, makambo oyo eyebana epayi na biso kala wana, mpo alingi milimo na biso lokola mpe alingi bana na biso; boye, na boboto na ye akobimela biso na banjelu na ye, ete mwango ya lobiko mokoka koyebisama epayi na biso lokola mpe epayi na nkola ekoya nsima.

15 O, lolenge boni Nzambe na biso atonda na boboto! Mpe sikawa tala, lokola ezali mpenza mingi oyo tokokaki kosala mpo ete mbindo na biso elongwa uta na biso, mpe mipanga na biso ekomisami kongenga, tika tobomba myango mosika ete mibatelama kongenga, lokola litatoli epayi ya Nzambe na biso na mokolo ya nsuka, soki te na mokolo oyo tokomemama kotelema liboso na ye mpo na kosambisama, ete totiaki mbindo na mipanga na biso te na makila ya bandeko na biso uta akabelaki biso liloba na ye mpe akomisi biso bato ya peto na nzela na yango.

16 Mpe sikawa, bandeko na ngai bandimi, soki bandeko na biso baluki kobebisa biso, tala, tokobomba mosika mipanga na biso, iyo, kutu tokokunda myango na mozindo ya mabele, ete mikoka kobatelama na bongengi, lokola litatoli ete tosaleli yangna mokolo moko te, na mokolo ya nsuka; mpe soki bandeko na biso babebisi biso, tala, tokokende epayi ya Nzambe na biso mpe tokobikisama.

17 Mpe sikawa esalemaki ete etiaka mokonzi nsuka na maloba oyo, mpe esilaki bato nyonso kosangana esika moko, bakamataki mipanga na bango, mpe bibundeli nyonso oyo bazalaki kosalela mpo na kosopa makila ya bato, mpe bakundaki yango mpenza na mozindo ya mabele.

18 Mpe oyo basalaki, mpo ezalaki na miso na bango yoko litatoli epayi ya Nzambe, mpe lisusu epayi ya bato, ete bakosalela mokolo moko te bibundeli mpo na kosopa makila ya bato; mpe oyo basalaki, kolapaka mpe kosalaka liyokani na Nzambe, ete na esika ya kosopa makila ya bandeko na bango bakotika nde bomoi na bango moko; mpe na esika ya kobotola uta na ndeko moko bakopesa epayi na ye; mpe na esika ya kolekisa mikolo na bango na goigoi bakosala mpenza na maboko na bango.

19 Mpe boye tomoni ete, ntango Balamani bamemamaki na kondima mpe na koyeba bosolo, bazalaki ngwi, mpe bandimaki kutu koyoka mpasi ya liwa na esika ya kosala lisumu; mpe boye tomoni ete bakundaki bibundeli na bango ya kimia, soki te bakundaki bibundeli na bango ya etumba, mpo na kimia.

20 Mpe esalemaki ete bandeko na bango, Balamani, bamilengelaki mpo na etumba, mpe bayaki na mboka ya Nefi mpo na ntina ya kobebisa mokonzi, mpe ya kotia mosusu na esika na ye, mpe lisusu kobebisa bato ya Anti-nefi-lehi libanda ya mboka.

21 Sikawa ntango bato bamonaki ete bazalaki koya mpo na kobunda na bango babimaki mpo na kokutana na bango, mpe bamilalisaki liboso na bango kino na mabele, mpe babandaki kobianga nkombo ya Nkolo; mpe boye bazalaki na ezalela oyo ntango Balamani babandaki kokweya likolo na bango, mpe babandaki koboma bango na mompanga.

22 Mpe boye lokola bakutanaki na bokasi te, babomaki nkoto yoko na mitano na bango; mpe toyebi ete bapambolami, mpo bakei kofanda na Nzambe na bango.

23 Sikawa ntango Balamani bamonaki ete bandeko na bango balingaki te kokima uta na mompanga, ezala kobaluka na loboko ya mobali soki na loboko ya mwasi mpe te, kasi bandimaki kolala na nse mpe kowa, mpe basanzolaki Nzambe kutu na ntango mpenza ya bowei na nse ya mompanga—

24 Sikawa ntango Balamani bamonaki likambo oyo batikaki koboma bango; mpe ezalaki na mingi baye mitema na bango mivimbanaki kati na bango mpo na baoyo ya bandeko na bango bakweyaki na nse ya mompanga, mpo bayambolaki uta na makambo oyo basalaki.

25 Mpe esalemaki ete babwakaki bibundeli na bango ya etumba na nse, mpe balingaki te kokamata yango lisusu, mpo baswamaki na mitema mpo na bobomi boye basalaki; mpe bakitaki na nse kutu lokola bandeko na bango, kotalelaka boboto ya baoyo kani manduki na bango matombolamaki mpo na koboma bango.

26 Mpe esalemaki ete bato ya Nzambe basanganaki mokolo wana mingi koleka motanga oyo mobomamaki; mpe bango oyo babomamaki bazalaki sembo, boye tozali na ntina te ya kotia ntembe ete babikisamaki.

27 Mpe ezalaki na moto moko ya nkuna te oyo babomaki na kati na bango; kasi ezalaki na mingi koleka nkoto yoko baoyo bamemamaki na boyebi ya bosolo; boye tomoni ete Nkolo asalaka na banzela mingi mpo na lobiko ya bato na ye.

28 Sikawa motango monene na bango Balamani baoyo babomaki mingi mpenza ya bandeko na bango bazalaki Baamaleki mpe Baamuloni, motango monene na bango ezalaki na molongo ya Banewolo.

29 Sikawa, na kati ya baye basanganaki na bato ya Nkolo, ezalaki na moto moko te oyo azalaki Moamaleki to Moamuloni, to oyo azalaki ya molongo ya Newolo, kasi bazalaki nyonso biboto ya solo ya Lamani mpe Lemuele.

30 Mpe boye tokoki kososola polele, ete soki bato basili kongengisama mbala moko na Molimo ya Nzambe, mpe kozwa boyebi monene ya makambo etali bosembo, mpe nde nsima bakwei mosika kati na masumu mpe bobuki mobeko, bakomaka mitema makasi koleka, mpe boye ezalela na bango ekomaka mabe koleka nyonso lokola soki bayebaki makambo oyo ata mokolo moko te.

Bimisa na lokasa