Makomi
Alama 60


Mokapo 60

Moloni amilela na Pawolani mpo ya botali mpamba bwa boyangeli bwa mampinga—Nkolo akotikaka mosembo abomama—Banefi basengeli kosalela nguya mpe nzela inso ya bango mpo ya komibikisa na bayini ba bango—Moloni akaneli kobunda na boyangeli longola se soko lisalisi libakisami na mampinga ma ye. Penepene na 62 Yambo ya Klisto.

1 Mpe esalemaki ete akomaki lisusu na moyangeli wa mboka, oyo azalaki Pawolani, mpe iye izali maloba maye akomaki, kolobaka: Tala, natindi monkanda mwa ngai na Pawolani, o engumba ya Zalayemila, oyo azali mosambisi mokonzi mpe moyangeli likolo lya mboka, mpe lisusu na banso baye baponomoki na bato baye mpo ya koyangela mpe kotambolisa makambo ma etumba eye.

2 Mpo tala, nazali na mwa moke ya koloba epai ya bango na nzela ya bokweisi; mpo tala, yomei oyebi ete oponomoki mpo ya kosangisa elongo bato, mpe kopesa bango mandoki ma mipanga, mpe ma nsendo, mpe ndenge inso ya mandoki ma etumba ma lolenge na lolenge, mpe kotinda mpo ya kobunda na Balamani, na biteni binso wapi bakoya o kati ya mboka ya biso.

3 Mpe sikawa tala, nalobi epai ya yo ete ngaimei, mpe lisusu bato ba ngai, mpe lisusu Elamani mpe bato ba ye, toyoki mpasi mpenza; iyo, kutu nzala, mposa ya mai, mpe bolembi, mpe ndenge inso ya matungisi ma lolenge na lolenge.

4 Kasi tala, soko eye enso toyokaka mpasi tolingaki te koyimayima to komilela.

5 Kasi tala, enene ezali bobomi o ntei ya bato ba biso; iyo, nkoto na nkoto bakweyi na mopanga, ntango elingaki kozala lolenge losusu soko otindaki epai ya mampinga ma biso bokasi mpe lisalisi likoki mpo ya bango. Iyo, enene ezali botali mpamba bwa yo ona biso.

6 Mpe sikawa tala, tozali na mposa ya koyeba ntina ya botali mpamba mpenza boye; iyo, tozali na mposa ya koyeba ntina ya bozali bwa yo bwa bozangi makanisi.

7 Ekoki yo kokanisa kofanda likolo lya ngbende ya yo o bozali boko bolole bwa bozangi makanisi, na ntango ezali bayini ba yo kopanzaka mosala mwa liwa zingazinga na yo? Iyo, ntango ezali bango kobomaka nkoto na nkoto ya bandeko ba yo—

8 Iyo, kutu baye batalelaki yo mpo ya bobatelami, iyo, batiaki yo o esika ete okoka kosalisa bango, iyo, okokaki kotinda mampinga epai ya bango, mpo ya kolendisa bango, mpe kobikisa nkoto na nkoto ya bango na kokweya na mopanga.

9 Kasi tala, eye ezali enso te—olongolaki bilei bya yo na bango, mpenza ete mingi babundaki mpe babimisaki makila libanda lya bomoi bwa bango na ntina ya mposa enene iye bazalaka na yango mpo ya bolamu bwa bato baye; iyo, mpe eye basalaka ezalaki bango penepene na kowa na nzala, na ntina ya botali mpamba bonene mpenza bwa yo ona bango.

10 Mpe sikawa, bandeko balingami ba ngai—mpo bosengelaki kolingama; iyo, mpe bosengelaki komilamusa na etingia mingi koleka mpo ya bolamu mpe bonsomi bwa bato baye; kasi tala, otali bango mpamba mpenza ete makila ma nkoto na nkoto makoya likolo lya mito mya bino mpo ya bobekoli; iyo, mpo eyebani epai ya Nzambe ebelela ya bango, mpe mpasi inso ya bango—

11 Tala, ekoki yo kobanza ete okoki kofanda likolo lya kiti ya yo ya bokonzi, mpe na ntina ya bolamu boluti bwa Nzambe okokaki kosala eloko te mpe alingaki kobikisa yo? Tala, soko obanzi eye obanzi na mpamba.

12 Ebanzi yo ete, zambi mingi boye ya bandeko ba yo babomami ezali na ntina ya nkuna ya bango? Nalobi epai ya yo, soko obanzi eye, obanzi na mpamba; mpo nalobi epai ya yo, ezali mingi bakwei na mopanga; mpe tala ezali mpo ya bokwei bwa yo;

13 Mpo Nkolo akotikaka mosembo abomama ete boyengebene mpe bosambisi bokoka koya likolo lya moto wa nkuna; yango wana osengeli te kobanza ete basembo babungi zambi babomami; kasi tala, bakoti o kati ya bopemi bwa Nkolo Nzambe wa bango.

14 Mpe sikawa tala, nalobi epai ya yo, nakobanga mpenza ete bosambisi bwa Nzambe boya likolo lya bato baye, na ntina ya goigoi mpenza ya bango, iyo, kutu goigoi ya boyangeli bwa biso, mpe botali mpamba bonene mpenza wa bango ona bandeko ba bango, iyo, ona bango baye babomamaki.

15 Mpo, ezalaka te mpo ya nkuna eye yambo ebandaki o moto mwa biso, tokokaki kotelemela bayini ba biso ete bakokaki te kolonga nguya likolo lya biso.

16 Iyo, ezalaka te mpo ya etumba ebimaki o ntei ya biso; iyo, ezalaka te mpo ya bato ba mokonzi, baye basalaki bosopi makila maike boye o ntei ya bisomei; iyo, o ntango tozalaki kowelaka o ntei ya bisomei, soko tosalaka bomoko bwa makasi ma biso lokola kina sikawa tosali; iyo, ezalaka te mpo ya mposa ya nguya mpe bokulaka boye bato bana ba mokonzi bazalaka na yango likolo lya biso; ezalaka bango solo na likambo lya bonsomi bwa biso, mpe esalaka bango bomoko elongo na biso, mpe ekendeke bango kobunda na bayini ba biso, esika ya kokamata mipanga mya bango mpo ya kobunda na biso, eye ezalaka ntina ya bosopi makila maike boye o ntei ya bisomei; iyo, soko tokendeke kobunda na bango na makasi ma Nkolo, tolingaki kopanza bayini ba biso, mpo elingaki kosalema, engebene na bokokisi bwa liloba lya ye.

17 Kasi tala, sikawa Balamani bazali koyaka likolo lya biso, kokamataka mboka ya biso, mpe bazali kobomaka bato ba biso na mopanga, iyo, basi ba biso mpe bana ba biso, mpe lisusu komemeke bango mosika o bowumbu, kosalaka bango ete bayoka mpasi ya ndenge inso ya matungisi, mpe eye na ntina ya nkuna enene ya bango baye bazali kolukaka nguya mpe bokulaka, iyo, kutu bato bana ba mokonzi.

18 Kasi ntina nini nazali koloba nzike etali likambo lyango? Mpo toyebi te soko binomei bozali kolukaka bokulaka. Toyebi te soko bozali lokola bakabi ba ekolo ya biso.

19 To ezali ete botali biso mpamba zambi bozali o motema mwa ekolo ya biso mpe bozingami na bozangi likama, ete bosali te bilei bitindama epai ya biso, mpe lisusu bato mpo ya koyeisa makasi mampinga ma biso?

20 Ebosani bino mitindo mya Nkolo Nzambe wa bino? Iyo, ebosani bino bokangemi bwa batata ba biso? Ebosani bino mbala mingi tobikisami libanda lya maboko ma bayini ba biso?

21 To ebanzi bino ete Nkolo akobikisa kaka biso, ntango tofandi likolo lya ngbende ya biso mpe tosaleli te mayele Nkolo apesaki epai ya biso?

22 Iyo, ekofanda bino na goigoi ntango ezingami bino na nkoto na nkoto ya bango, iyo, mpe zomi na zomi ya nkoto na nkoto ya bato, baye bafandi kaka na goigoi, ntango izali nkoto na nkoto zingazinga mpembeni o ndelo ya mboka baye bazali kokweyaka na mopanga, iyo, bazoki mpe batangi makila?

23 Ebanzi bino ete Nzambe akotala likolo lya bino lokola bozangi elindo ntango efandi bino nie mpe etali bino makambo maye? Tala nalobi epai ya bino Te. Sikawa nalingi ete bomikundola ete Nzambe alobaki ete kati ya sani ekosukwama yambo, mpe nde libanda ya sani likosukwama lokola.

24 Mpe sikawa, longola se soko boyamboli eye bosali, mpe bobandi koteleme mpe kosalaka, mpe kotinda bilei mpe bato epai ya biso, mpe lokola epai ya Elamani ete akoka kosalisa biteni bina bya ekolo ya biso biye tolongi lisusu, mpe ete tokoka lokola kokamata lisusu etikali ya bozwi bwa biso o biteni biye, tala, ekolongobana ete towela lisusu te na Balamani kina tosukoli yambo kati ya sani ya biso, iyo, kutu moto monene mwa boyangeli bwa biso.

25 Mpe longola se soko osaleli monkanda mwa ngai, mpe obimi mpe olakisi epai ya ngai molimo moko mwa bonsomi bwa solo, mpe obundi mpo ya koyeisa makasi mampinga ma biso, mpe kopesa epai ya bango bilei mpo ya lisalisi lya bango, tala nakotika eteni yoko ya bato nsomi ba ngai mpo ya kosimba eteni eye ya mboka ya biso, mpe nakotika makasi mpe mapamboli ma Nzambe likolo lya bango, ete nguya mosusu te ekoka kosala likolo lya bango—

26 Mpe eye na ntina ya bondimi boluti bwa bango, mpe bompikiliki bwa bango o mikakatano mya bango—

27 Mpe nakoya epai ya bino, mpe soko ezali moko o ntei ya bino oyo azali na mposa moko mpo ya bonsomi, iyo, soko etikali montentei moko mwa bonsomi, tala nakolamusa botomboki o ntei ya bino, kutu kina bango baye bazali na mposa ya nguya mpe bokulaka bakosila.

28 Iyo, tala nakobanga te nguya ya bino to bokulaka bwa bino, kasi ezali Nzambe wa ngai nakobanga; mpe ezali engebene na mitindo mya ye nakokamata mopanga mwa ngai mpo ya kobatela likambo lya ekolo ya ngai, mpe ezali na ntina ya bobe bwa bino ete toyoki mpasi ya bobungisi boike.

29 Tala ezali ntango, iyo, ntango ezali sikawa penepene, ete longola se soko boningani binomei o bobateli bwa ekolo ya bino mpe bana bake ba bino, mopanga mwa boyengebene modiembeli likolo lya bino; iyo, mpe mokokweya likolo lya bino mpe mokobimela bino kutu o bobebisami nie bwa bino.

30 Tala, nakozela mpo ya lisalisi uta na bino; mpe, longola se soko bosali mpo ya libondisi lya biso, tala, nakoya epai ya bino, kutu o mboka ya Zalayemila, mpe nakobete bino na mopanga, mpenza ete bokoka kozala lisusu te na nguya mpo ya kopekisa bokoli bwa bato baye o likambo lya bonsomi bwa biso.

31 Mpo tala, Nkolo akolinga te ete bozala na bomoi mpe boyika bokasi o mabe ma bino mpo ya kobebisa bato sembo ba ye.

32 Tala, bokoki kokanisa ete Nkolo akobikisa bino mpe akoya kosambisa Balamani, ntango ezali mimeseno mya batata ba bango bisalaki boyini bwa bango, iyo, mpe ebakisamaki mbala ibale na baye bakabwanaki na biso, na ntango mabe ma bino mazali mpo ya ntina ya bolingo bwa bino bwa nkembo mpe biloko bya mpamba bya mokili?

33 Boyebi ete bozali kobuka mibeko mya Nzambe, mpe boyebi ete boniati myango o nse ya makolo ma bino. Tala, Nkolo alobi epai ya ngai: Soko bango baye boponomi bayangeli ba bino bayamboli te masumu ma bango mpe mabe ma bango, bokomata mpo ya kobunda na bango.

34 Mpe sikawa tala, ngai, Moloni, nasengisami, engebene na boyokani boye nasali mpo ya kobatela mitindo mya Nzambe wa ngai; yango wana nalingi ete botingama na liloba lya Nzambe, mpe botinda noki epai ya ngai bilei bya bino mpe bato ba bino, mpe na Elamani lokola.

35 Mpe tala, soko bosali eye te nakoya epai ya bino noki; mpo tala, Nzambe akolinga te ete towa na nzala; yango wana akopesa epai ya biso bilei bya bino, kutu soko esengeli kozala na mopanga. Sikawa tala ete bokokisa liloba lya Nzambe.

36 Tala, nazali Moloni, kapiteni mokonzi wa bino. Nakoluka te mpo ya nguya, kasi kobenda yango o nse. Nakoluka te mpo ya lokumu la mokili, kasi mpo ya nkembo ya Nzambe wa ngai, mpe bonsomi mpe bolamu bwa ekolo ya ngai. Mpe boye nakangi monkanda mwa ngai.