Makomi
Alma 54


Mokapo 54

Amoloni mpe Moroni basololi mpo na bokabolani ya bato ya boloko—Moroni asengi ete Balamani balongwa mpe batika bitumba na bango ya kobomaboma—Amoloni asengi ete Banefi balalisa na nse manduki na bango mpe bakoma bayangelami na Balamani. Penepene na mobu 63 Liboso na mbotama ya Klisto.

1 Mpe sikawa esalemaki ete na ebandeli ya mobu ya ntuku mibale na libwa ya basambisi, ete Amoloni atindaki moto epayi ya Moroni mpo azalaki na mposa ete basombitinia bato ya boloko.

2 Mpe esalemaki ete Moroni ayokaki bosepeli mingi koleka na bosenga oyo, mpo azalaki na mposa ya bilei oyo ekabamaki mpo na lisungi ya Balamani na boloko ete bisunga bato na ye moko; mpe lisusu azalaki na mposa ya bato na ye mpo na kolendisa limpinga na ye.

3 Sikawa Balamani bakamataki basi mpe bana mingi, mpe ezalaki te na mwasi moko soki te mwana moke moko na kati ya bato ya boloko ya Moroni, to bato ya boloko baye Moroni akamataki; boye Moroni akanisaki mokano ya mayele ete akoka kozwa bato ya boloko mingi ya Banefi uta na Balamani lokola ekokaki.

4 Boye akomaki mokanda, mpe atindaki yango na mosali ya Amoloni, oyo se moko wana amemaki mokanda na Moroni. Sikawa oyo ezali maloba oyo akomaki epayi ya Amoloni, kolobaka:

5 Tala, Amoloni, nakomi epayi na yo mwa makambo moke mpo na oyo etali etumba oyo obundaki na bato na ngai, to kutu oyo ndeko na yo ya mobali abundaki na bango, mpe oyo ozali naino na mokano ya kokoba nsima ya liwa na ye.

6 Tala, nalingi kolobela yo mwa moke mpo na oyo etali boyengebene ya Nzambe, mpe mompanga ya nkele na ye ya bokasi nyonso, oyo ezali kodiembela likolo na yo longola se soki oyamboli mpe olongoli mampinga na yo mpo na komema kati na mboka na yo moko, na mboka ya bozwi na yo, oyo ezali mboka ya Nefi.

7 Iyo, nalingi kolobela yo makambo oyo soki okokaki koyoka yango; iyo, nalingi kolobela yo mpo na oyo etali lifelo wana ya nsomo oyo ezali kozela mpo na koyamba babomi ya lolenge oyo lokola ezalaki yo mpe ndeko na yo, longola se soki oyamboli mpe olongoli mikano na yo ya kobomaboma, mpe bozongi elongo na mampinga na bino epayi na mboka na bino moko.

8 Kasi lokola obwakaki kala makambo oyo, mpe obundaki na bato ya Nkolo, kutu bongo nakoki kozela ozongela yango lisusu.

9 Mpe sikawa tala, tomilengeli mpo na koyamba yo; iyo, mpe longola se soki olongoli bantina na yo, tala, okobenda na nse likolo na nkele ya Nzambe oyo wana obwaki, kutu kino na bobebisami na yo mobimba.

10 Kasi, lokola Nkolo azali na bomoi, mampinga na biso ekoya likolo na yo longola se soki bolongwe, mpe bokobimelama kala mingi te na liwa, mpo tokosimba bingumba na biso mpe mboka na biso; iyo, mpe tokosimba eyamba na biso mpe ntina ya Nzambe na biso.

11 Kasi tala, emonani epayi na ngai ete nazali kolobela yo mpo na oyo etali makambo oyo na mpamba; soki te emonani epayi na ngai ete ozali mwana ya lifelo; boye nakokanga mokanda na ngai na koyebisaka yo ete nakokabolana bato ya boloko te, longola se soki ezali na masengami ete okotika mobali moko mpe mwasi na ye mpe bana na ye, mpo na moto ya boloko moko; soki ezali bongo ete okosala yango, nakokabolana.

12 Mpe tala, soki osali oyo te, nakoya kobunda na yo elongo na mampinga na ngai; iyo, kutu nakopesa manduki na basi na ngai mpe bana na ngai, mpe nakoya kobunda na yo, mpe nakolanda yo kutu kati na mboka na yo moko, oyo ezali mboka ya bosangoli libula na biso ya yambo; iyo, mpe ekozala makila mpo na makila, iyo, bomoi mpo na bomoi; mpe nakobundisa bino etumba kutu kino bokobebisama uta na etando ya mabele.

13 Tala, nazali na nkanda na ngai, bato na ngai mpe lokola; bolukaki koboma biso, mpe biso tozalaki bobele komibatela. Kasi tala, soki boluki kobebisa biso tokoluka kobebisa bino mingi koleka; iyo, mpe tokoluka mboka na biso, mboka ya yambo ya bosangoli libula na biso.

14 Sikawa nakangi mokanda na ngai. Nazali Moroni; nazali mokambi ya bato nyonso ya Banefi.

15 Sikawa esalemaki ete Amoloni, ntango ezwaki ye mokanda oyo, asilikaki; mpe akomaki mokanda mosusu epayi ya Moroni, mpe oyo ezali maloba akomaki, kolobaka:

16 Nazali Amoloni, mokonzi ya Balamani; nazali ndeko ya Amalikia ya mobali oyo bobomaki. Tala, nakobekola makila na ye likolo na bino, iyo, mpe nakoya epayi na bino elongo na mampinga na ngai mpo nazali kobanga bokaneli na yo te.

17 Mpo tala, batata na bino basalaki mabe na bandeko na bango, na lolenge ete bayibelaki bango ekoki na bango ya kozala bayangeli na mbulamatari nzokande ezalaki ekoki na bango na kolandaka mobeko.

18 Mpe sikawa tala, soki bokokitisa manduki na bino na nse, mpe bomitiki mpo na koyangelama na bango oyo kani bibonga ya mbulamatari ezali ya bango na kolandaka mobeko, soki bongo nde nakosala ete bato na ngai bakitisa bibundeli na bango na nse mpe bakozala na etumba lisusu te.

19 Tala, obimisi bokaneli mingi epayi na ngai mpe bato na ngai; kasi tala, tozali kobanga bokaneli na yo te.

20 Nzokande, nakondima kokabolana bato ya boloko, engebene na bosenga na yo, na bosepeli, ete nakoka kobatela bilei na ngai mpo na bato na ngai ya etumba; mpe tokobunda etumba moko oyo ekozala seko, ezala mpo na koyangela Banefi na likoki na biso soki te mpo na kosilisa bango seko.

21 Mpe mpo na oyo etali Nzambe oyo bolobi ete tobwaki, tala, toyebi ezali moko ya lolenge wana te; bino mpe lokola; kasi soki ezali ete ezali moko ya lolenge wana azali, tokanisi ekoki kozala ete asalaki biso mpe bino mpe lokola.

22 Mpe soki ezali ete ezali na zabulu moko mpe lifelo, tala ekotinda ye yo kuna kofanda elongo na ndeko na ngai ya mobali oyo obomaki, oyo olobi ete akeyi na esika ya lolenge oyo? Kasi tala makambo oyo ezali na ntina te.

23 Nazali Amoloni, mpe eboto moko ya Zolami, oyo batata na yo bazwaki na makasi mpe bamemaki uta na Yelusaleme.

24 Mpe tala sikawa, nazali Molamani moko ya mpiko; tala, etumba oyo esalemaki mpo na kobekola mabe na bango, mpe mpo na kosimba mpe mpo na kozwa makoki na bango mpo na kozala bankolo ebonga ya mbulamatari; mpe nakangi mokanda na ngai na Moroni.

Bimisa na lokasa