Makomi
Alama 36


Mitindo mya Alama na mwana mobali wa ye Elamani.

Kokwaka mikapo 36 mpe 37.

Mokapo 36

Alama atatoli na Elamani mbongwana ya ye nsima ya komono anzelu—Ayoki mpasi ya bolozi bwa bozo botumbolami; abiangaki likolo lya nkombo ya Yesu, mpe abotamaki na Nzambe—Bosepeli bwa sukali botondisi bozo bwa ye—Amonoki lingomba lya banzelu kokumisaka Nzambe—Babongwani mingi bameki mpe bamoni lokola amekaki mpe amonoki. Penepene na 74 Yambo ya Klisto.

1 Mwana mobali wa ngai, pesa litoyi na maloba ma ngai; mpo nalapi epai ya yo, ete mbala nzike lokola ekobatela yo mitindo mya Nzambe okozwa bomengo o mboka.

2 Nalingi ete osala lokola nasali, na komikundolaka bowumbu bwa batata ba biso; mpo bazalaki o bowumbu, mpe moko te akokaki kobika bango longola se soko ezalaki Nzambe wa Abalayama, mpe Nzambe wa Yisaka, mpe Nzambe wa Yakobo; mpe solo abikisaki bango o matungisi ma bango.

3 Mpe sikawa, O mwana mobali wa ngai Elamani, tala, ozali o bolenge bwa yo, mpe yango wana, nabondeli yo ete olinga koyoka maloba ma ngai mpe koyekola na ngai; mpo nayebi ete baye banso bakotia elikia ya bango na Nzambe bakosalisama o mikakatano mya bango, mpe mobulu mwa bango, mpe matungisi ma bango, mpe bakotombolama likolo o mokolo mwa nsuka.

4 Mpe ngai nalingi te ete okanisa ete nayebi na ngaimei—na ya ntango te kasi ya molimo, na ya mosuni te kasi ya Nzambe.

5 Sikawa, tala, nalobi epai ya yo ete, soko nabotamaki te na Nzambe nalingaki koyeba te makambo maye; kasi Nzambe, na monoko mwa anzelu mosantu wa ye, asali makambo maye mayebana epai ya ngai, na bolongobani bwa ngai ata moko te;

6 Mpo nakendeki zingazinga elongo na bana babali ba Moziya, kolukaka kobebisa eklezia ya Nzambe; kasi tala, Nzambe atindaki anzelu mosantu wa ye kokanga biso na nzela.

7 Mpe tala, alobaki epai ya biso, lokola ezalaki mongongo mwa nkake, mpe mabele mobimba maninganaki o nse ya makolo ma biso; mpe biso banso tokweyaki o mabele, mpo bobangi bwa Nkolo boyaki likolo lya biso.

8 Kasi tala, mongongo molobaki epai ya ngai: Teleme. Mpe nalamukaki mpe natelemeki, mpe namonoki anzelu.

9 Mpe alobaki epai ya ngai: Soko olingi na yomei kobebisama, koluka lisusu te kobebisa eklezia ya Nzambe.

10 Mpe esalemaki ete nakweyaki o mabele; mpe ezalaki mpo ya ntaka ya mikolo misato mpe butu isato ete nakokaki te kofungola monoko mwa ngai, mpe kosalela te binama bya ngai.

11 Mpe anzelu alobaki makambo mingi epai ya ngai, maye mayokanaki na bandeko ba ngai, kasi nayokaki mango te; mpo eyokaki ngai maloba—soko olingi obebisama na yomei, luka lisusu te kobebisa eklezia ya Nzambe—nabetemeki na bobangi mpe bokamwi bonene bwa lolenge loye mbele ntano esusu nakobebisama, ete nakweyaki o mabele mpe nayokaki lisusu te.

12 Kasi naniongamaki na monioko mwa seko, mpo bozo bwa ngai bopasolamaki na ndelo eleki mpe boniongamaki mpo ya masumu ma ngai manso.

13 Iyo, namikundolaki masumu mpe mabe ma ngai manso, mpo ya mango naniokwamaki na bolozi bwa limfelo; iyo, namonoki ete natombokaki na Nzambe wa ngai, mpe ete nabatelaka te mitindo misantu mya ye.

14 Iyo, mpe nabomaki mingi ya bana ba ye, to kutu nakambaki bango mosika epai ya bobebisami; iyo, mpe o nsuka, boye enene ezalaki masumu ma ngai, ete likanisi mpenza lya boyei o kati ya miso mya Nzambe wa ngai liniokolaki bozo bwa ngai na nsomo ya kolimbola te.

15 O, ekanisaki ngai, ete nakoka kobenganama mpe kolimwa nzoto mpe bozo lokola, ete nakoka te komememe mpo ya koteleme o miso mya Nzambe wa ngai, mpo ya kosambisama na misala mya ngai.

16 Mpe sikawa, mpo ya mikolo misato mpe butu isato naniokwamaki, kutu na bolozi bwa bozo botumbolami.

17 Mpe esalemaki ete lokola naniongamaki boye na monioko, ntango epasolamaki ngai motema o bokundoli bwa masumu ma ngai mingi, tala, namikundolaki lisusu koyoka tata wa ngai kobikula epai ya bato etali boyei bwa Yesu Klisto moko, Mwana Mobali wa Nzambe, mpo ya kotumbolama mpo ya masumu ma mokili.

18 Sikawa, lokola mayele ma ngai masimbaki likolo lya likanisi liye, nabelelaki o kati ya motema mwa ngai: O Yesu, Mwana Mobali wa Nzambe, yoka ngolu likolo lya ngai, oyo nazali na matiti ma bololo, mpe nazingami mpembeni na miniololo mya liwa.

19 Mpe sikawa, tala, ekanisaki ngai eye, nakokaki komikundola bolozi bwa ngai lisusu te; iyo, napasolamaki o bokundoli bwa masumu ma ngai lisusu te.

20 Mpe o, bosepeli kani, mpe mwinda mwa bokamwi kani namonoki; iyo, bozo bwa ngai botondaki na bosepeli boluti lokola ezalaki bolozi bwa ngai!

21 Iyo, nalobi epai ya yo, mwana mobali wa ngai, ete ekokaki kozala eloko te eluti ndelo boye mpe bololo boye lokola ezalaki bolozi bwa ngai. Iyo, nalobi lisusu epai ya yo, mwana wa ngai, ete ekoki kozala eloko te eluti ndelo mpe sukali lokola ezalaki bosepeli bwa ngai.

22 Iyo, nakanisaki namonoki, kutu lokola tata wa biso Lehi amonoki, Nzambe kofandaka likolo lya kiti ya ye, ezingami ye na mangomba meke meke ma banzelu, na ezalela ya koyembelaka mpe kosanzolaka Nzambe wa bango; iyo, mpe bozo bwa ngai bozalaki na mposa ya kozala kuna.

23 Kasi tala, binama bya ngai bizwaki bokasi lisusu, mpe natelemeki likolo lya makolo ma ngai, mpe namonisaki epai ya bato ete ngai nabotamaki na Nzambe.

24 Iyo, mpe uta ntango ena kutu kina sikawa, nasali na kolembe te, ete nakoka komeme babozo epai ya boyamboli; ete nakoka komeme bango na komeka bosepeli boluti boye namekaki; ete bakoka lokola kobotama na Nzambe, mpe kotondisama na Molimo Mosantu.

25 Iyo, mpe sikawa tala, O mwana mobali wa ngai, Nkolo apesi ngai bosepeli mpenza na mbuma ya misala mya ngai;

26 Mpo na ntina ya liloba liye akabaki epai ya ngai, tala, mingi babotami na Nzambe, mpe bameki lokola namekaki, mpe bamoni miso na miso lokola namonaki; yango wana bayebi makambo maye nalobi, lokola nayebi; mpe boyebi boye nazwi bozali bwa Nzambe.

27 Mpe nasalisami o nse ya mimekano mpe mobulu mwa ngai mwa lolenge na lolenge, iyo, mpe ndenge inso ya matungisi ma ngai; iyo, Nzambe abimisi ngai uta o boloko, mpe uta o bowumbu, mpe uta o liwa; iyo, mpe natii elikia ya ngai na ye, mpe akobikisa ngai lisusu.

28 Mpe nayebi ete akosekwisa ngai o mokolo mwa nsuka, mpo ya kofanda elongo na ye o nkembo; iyo, mpe nakosanzola ye libela, mpo abimisi batata ba biso libanda lya Ejipito, mpe amini Baejipito o mbu etane; mpe akambaki bango na nguya ya ye o kati ya mboka elakelama; iyo, mpe abikisi bango libanda lya bowumbu mpe bokangemi mbala na mbala.

29 Iyo, lisusu amemi batata ba biso libanda lya mboka ya Yelusaleme, mpe lisusu, na nguya ya ye ya libela, abikisi bango libanda lya bowumbu mpe bokangemi mbala na mbala kina o mokolo mwa lelo; mpe nasimbi ntango inso bokundoli bokangemi bwa bango; iyo, osengelaki lokola kosimba bokundoli, lokola ngai nasali, bokangami bwa bango.

30 Kasi tala, mwana mobali wa ngai, eye ezali enso te; mpo osengelaki koyeba lokola ngai nayebi, ete mbala nzike lokola ekobatela yo mitindo mya Nzambe okozwa bomengo o mboka; mpe osengelaki koyeba lisusu, ete mbala nzike lokola ekobatela yo te mitindo mya Nzambe okobwakama mosika uta o miso mya ye. Sikawa eye ezali engebene na liloba lya ye.