Makomi
4 Nefi 1


Nefi ya Inei

Buku ya Nefi
Oyo azali mwana mobali wa Nefi—Moko wa Bayekoli ba Yesu Klisto

Nsango yoko ya bato ba Nefi, engebene na likundoli lya ye.

Mokapo 1

Banefi mpe Balamani babongwani epai ya Nkolo—Bazali na biloko binso na lisanga, basali makamwisi, mpe bazwi bomengo o mboka—Nsima ya nkama ibale ya mibu, bokabwani, mabe, biklezia bya lokuta, mpe boniokoli bobimi—Nsima ya mibu nkama misato Banefi mpe Balamani lokola bazali bato ba nkuna—Amaloni abombi palaki ya bule. Penepene na 35–321 ya Mobu mwa Mokonzi.

1 Mpe esalemaki ete mobu mwa tuku misato na minei molekaki, mpe lisusu tuku misato na mitano, mpe tala bayekoli ba Yesu basalaki eklezia yoko ya Klisto o mboka mobimba zingazinga mpembeni. Mpe mingi lokola bayaki epai ya bango, mpe solo bayambolaki masumu ma bango, babatisamaki o nkombo ya Yesu; mpe bazwaki Molimo Mosantu.

2 Mpe esalemaki ete o mobu mwa tuku misato na motoba, bato babongwanaki banso epai ya Nkolo, likolo lya etando ya mboka, Banefi mpe Balamani lokola, mpe ezalaki boweli mpe boswani te o ntei ya bango, mpe moto na moto asalaki na boyengebene elongo na mosusu.

3 Mpe bazalaka na biloko binso na lisanga o ntei ya bango; yango wana ezalaki te mozwi mpe mokeleli, mowumbu mpe monsomi, kasi bakomisamaki banso nsomi, mpe bakabolani ba mokabo mwa lola.

4 Mpe esalemaki ete mobu mwa tuku misato na nsambo molekaki lisusu, mpe ezalaki kaka kimia o mboka.

5 Mpe esalemaki misala minene mpe mya bokamwi na bayekoli ba Yesu, mpenza ete babikisaki bakoni, mpe basekwisaki bakufi, mpe basalaki batengoli batambola, mpe bato ba lolanda bazwa bomoni, mpe bakufa matoyi bayoka; mpe ndenge inso ya makamwisi esalaki bango o ntei ya bana ba bato; mpe na eloko te basalaki makamwisi longola se soko ezalaki o nkombo ya Yesu.

6 Nde boye mobu mwa tuku misato na mwambe molekaki, mpe lisusu tuku misato na libwa, mpe tuku minei na moko, mpe tuku minei na mibale, iyo, kutu kina mibu tuku minei na libwa milekaka, mpe lisusu tuku mitano na moko, mpe tuku mitano na mibale; iyo, kutu kina nsima ya mibu tuku mitano na libwa milekaka.

7 Mpe Nkolo apesaki bango bomengo mpenza o mboka; iyo, mpenza ete batongaki bingumba lisusu wapi ezikaka bingumba.

8 Iyo, kutu engumba eye enene Zalayemila basalaki etongema lisusu.

9 Kasi ezalaki bingumba mingi biye bizindaka, mpe mai makomaki o esika ya byango; yango wana bingumba biye bikokaki te kosalema bya sika.

10 Mpe sikawa, tala, esalemaki ete bato ba Nefi bayikaki bokasi, mpe bayikanaki mbangu mpenza, mpe bakomaki bato boko malonga mpe banzenga mpenza.

11 Mpe babalaki, mpe bapesamaki o libala, mpe bapambolamaki engebene na ebele ya bilako biye Nkolo asalaki epai ya bango.

12 Mpe batambokaki lisusu te nsima ya makokisi mpe makuli ma mobeko mwa Mose; kasi batambolaki nsima ya mitindo miye bazwaka uta na Nkolo wa bango mpe Nzambe wa bango, kokobaka na bokili mpe losambo, na kosanganaka elongo ntango inso mpo ya kosambela mpe mpo ya koyoka liloba lya Nkolo.

13 Mpe esalemaki ete ezalaki boswani te o ntei ya bato, o mboka mobimba; kasi esalemaki makamwisi makasi o ntei ya bayekoli ba Yesu.

14 Mpe esalemaki ete mobu mwa tuku nsambo na moko molekaki, mpe lisusu mobu mwa tuku nsambo na mibale, iyo, mpe o nsuka, kina o mobu tuku nsambo na libwa; iyo, kutu nkama ya mibu milekaka, mpe bayekoli ba Yesu, baye aponoko, banso bakendeke o paradizu ya Nzambe, longola se soko ezalaki misato baye basengelaki kotikala; mpe izalaki bayekoli basusu bakulisamaki o esika ya bango; mpe mingi ya nkola ena balekaka.

15 Mpe esalemaki ete ezalaki boswani te o mboka, na ntina ya bolingo bwa Nzambe boye bofandaki o mitema mya bato.

16 Mpe izalaki boluli te, to songisongi te, to bulubulu te, to pite te, to lokuta te, to bobomi te, to lolenge loko te la bosoni ; mpe ekokaki te kozala bato boko ba esengo mingi koleka bato banso baye bakelamaka na loboko la Nzambe.

17 Izalaki bayongoli te, to babomi te, mpe izalaki Balamani te, to lolenge loko te la ba-songolo; kasi bazalaki banso moko, bana ba Klisto, mpe basangoli o bokonzi bwa Nzambe.

18 Mpe boniboni epambolamaki bango! Mpo Nkolo apambolaki bango o misala mya bango minso; iyo, kutu bapambolamaki mpe bazwaki bomengo kina mibu nkama moko na zomi milekaki; mpe nkola ya yambo uta na Klisto elekaka, mpe ezalaki boswani te o mboka mobimba.

19 Mpe esalemaki ete Nefi, oyo abombaki likundoli liye lya nsuka, (mpe abombaki lyango likolo lya palaki ya Nefi) akufaki, mpe mwana mobali wa ye Amosa abombaki lyango o esika ya ye; mpe abombaki lyango likolo lya palaki ya Nefi lokola.

20 Mpe abombaki lyango mibu tuku mwambe na minei, mpe ezalaki kaka kimia o mboka, longola se soko ezalaki eteni yoko eke ya bato batombokaka uta na eklezia mpe bakamataka likolo lya bango nkombo ya Balamani; bongo ebandaki kozala Balamani lisusu o mboka.

21 Mpe esalemaki ete Amosa akufaki lokola, (mpe ezalaki mibu nkama moko na tuku libwa na minei uta o boyei bwa Klisto) mpe mwana mobali wa ye Amosa abombaki likundoli o esika ya ye; mpe abombaki lyango likolo lya palaki ya Nefi lokola; mpe lisusu likomamaki o buku ya Nefi, eye ezali buku eye.

22 Mpe esalemaki ete mibu nkama mibale milekaka; mpe nkola enso ya ibale elekaka longola se soko ezalaki mwa ndambo.

23 Mpe sikawa ngai, Molomoni, nalingi ete boyeba ete bato bayikanaka, mpenza ete bapanzanaki likolo lya etando mobimba ya mboka, ete bakomaki na bozwi mpenza, na ntina ya bomengo bwa bango na Klisto.

24 Mpe sikawa, o mobu moye mwa nkama mibale na moko ebandaki kozala bango baye batombwanaki o lolendo, lokola bolati bwa monzele mwa ntalo, mpe ndenge inso ya mayaka malonga, mpe biloko malonga bya mokili.

25 Mpe uta o ntango ena bazalaki na misolo mya bango mpe biloko bya bango lisusu te na lisanga o ntei ya bango.

26 Mpe babandaki kokabwana o kati ya nkondo; mpe babandaki kotonga biklezia mpo ya bangomei mpo ya kozwa matabisi, mpe babandaki kowangana eklezia ya solo ya Klisto.

27 Mpe esalemaki ete elekaka mibu nkama mibale na zomi, izalaki biklezia o mboka; iyo, izalaki biklezia mingi biye bilakisaki koyeba Klisto, mpe kasi bawangani biteni bileki binene bya nsango elamu ya ye, mpenza ete bayambaki ndenge inso ya nkuna, mpe basalelaki ena eye ezali bule epai ya ye oyo epekisamaka na ntina ya bozangi bolongobani.

28 Mpe eklezia eye eyikanaki mpenza na ntina ya bobe, mpe na ntina ya nguya ya Satana oyo otiaki nkanga likolo lya mitema mya bango.

29 Mpe lisusu, ezalaki eklezia esusu eye ewanganaki Klisto; mpe baniokolaki eklezia ya solo ya Klisto, na ntina ya bosawa bwa bango mpe boyambi bwa bango na Klisto; mpe batiolaki bango na ntina ya makamwisi mingi miye misalemaki o ntei ya bango.

30 Bongo basalelaki nguya mpe bokulaka likolo lya bayekoli ba Yesu baye batikalaki elongo na bango, mpe babwakaki bango o kati ya boloko; kasi na nguya ya liloba lya Nzambe, liye lizalaki na bango, boloko bopasukaki na biteni bibale, mpe bakendeki kosalaka makamwisi makasi o ntei ya bango.

31 Nzokande, mpe ata makamwisi maye manso, bato bayeisaki mitema mya bango mikasi, mpe balukaki koboma bango, kutu lokola ndenge Bayuda o Yelusaleme balukaki koboma Yesu, engebene na liloba lya ye.

32 Mpe babwakaki bango o kati ya fulu ya moto, kasi bayaki kozwaka mpasi te.

33 Mpe babwakaki lisusu bango o kati ya mabulu ma niama ya zamba, mpe basakanaki elongo na niama ya zamba kutu lokola mwana moke moko elongo na mwana moko ya mpate; mpe bayaki uta o ntei ya bango, kozwaka mpasi te.

34 Nzokande, bato bayeisaki mitema mya bango mikasi, mpo bakambamaki na banganga mingi mpe baprofeta ba lokuta mpo ya kotonga biklezia mingi, mpe mpo ya kosala ndenge inso ya bobe. Mpe babeteki likolo lya bato ba Yesu; kasi bato ba Yesu babeteki te lokola. Mpe boye bakulumwaki o bozangi bondimi mpe nkuna, mobu na mobu, kutu kina mibu nkama mibale na tuku misato milekaka.

35 Mpe sikawa esalemaki ete o mobu moye, iyo, o mobu mwa nkama mibale na tuku misato na moko, ezalaki bokabwani boko bonene o ntei ya bato.

36 Mpe esalemaki ete o mobu moye ebimaki bato boko baye babiangemaki Banefi, mpe bazalaki bandimi ba solo na Klisto; mpe o ntei ya bango izalaki bango baye babiangemaki na Balamani—Bayakobi, mpe Bayosefe, mpe Bazolami;

37 Bongo bandimi ba solo ba Klisto, mpe bakumbameli ba solo ba Klisto, (o ntei ya baye ezalaki bayekoli basato ba Yesu baye basengelaki kotikala) babiangemaki Banefi, mpe Bayakobi, mpe Bayosefe, mpe Bazolami.

38 Mpe esalemaki ete bango baye babwakaki nsango elamu babiangemaki Balamani, mpe Balemweli, mpe Bayisamaele; mpe bakulumwaki te o bozangi bondimi, kasi na bolingi batombokaki na nsango elamu ya Klisto; mpe balakisaki bana ba bango ete bandima te, kutu lokola batata ba bango, uta o ebandeli, bakulumwaki.

39 Mpe ezalaki na ntina ya nkuna mpe bonsomo bwa batata ba bango, kutu lokola ezalaki o ebandeli. Mpe bateyamaki koyina bana ba Nzambe, kutu lokola Balamani bateyamaki koyina bana ba Nefi uta o ebandeli.

40 Mpe esalemaki ete mibu nkama mibale na tuku minei na minei milekaki, mpe boye ezalaki makambo ma bato. Mpe eteni ya nkuna eleki mingi ya bato eyikaki bokasi, mpe bakomaki na motango mingi koleka bato ba Nzambe.

41 Mpe bakobaki kaka kotonga biklezia mpo ya bangomei, mpe bakembisaki byango na ndenge inso ya biloko bya motuya. Mpe boye mibu nkama mibale na tuku mitano milekaki, mpe lisusu mibu nkama mibale na tuku motoba.

42 Mpe esalemaki ete eteni eleki ya bato ebandaki lisusu kotonga ndai mpe likelemba lya nkuku lya Gadiatoni.

43 Mpe lisusu bato baye babiangemaki bato ba Nefi babandaki kozala na lolendo o mitema mya bango, na ntina ya bozwi boluti bwa bango, mpe bakomaki mpamba lokola epai ya bandeko na bango, Balamani.

44 Mpe uta o ntango eye bayekoli ba Yesu babandaki koyoka mawa mpo ya masumu ma mokili.

45 Mpe esalemaki ete elekaka mibu nkama misato, bato ba Nefi mpe Balamani lokola bakomaki mpenza ba nkuna bango na bango.

46 Mpe esalemaki ete bayongoli ba Gadiatoni bapanzanaki likolo lya etando mobimba ya mboka; mpe ezalaki boko te baye bazalaki sembo longola se soko ezalaki bayekoli ba Yesu. Mpe wolo mpe mpauni etiaki bango beboo o ebombelo, mpe basalaki mombongo na ndenge inso ya mombongo.

47 Mpe esalemaki ete esilaka mibu nkama misato na mitano koleka, (mpe bato batikalaki kaka na nkuna) Amosa akufaki; mpe ndeko mobali wa ye, Amaloni, abombaki likundoli o esika ya ye.

48 Mpe esalemaki ete elekaka mibu nkama misato na tuku mibale, Amaloni kosengisamaka na Molimo Mosantu, abombaki makundoli maye mazalaki ma bule—iyo, kutu makundoli manso maye makitanisamaki uta nkola o nkola, maye mazalaki ma bule—kutu kina o mobu mwa nkama misato na tuku mibale uta o boyei bwa Klisto.

49 Mpe abombaki mango epai ya Nkolo, ete makoka koya lisusu epai ya montika mwa ndako ya Yakobo, engebene na mabikuli mpe bilako bya Nkolo. Mpe boye ezali nsuka ya likundoli lya Amaloni.