Makomi
3 Nefi 30


Mokapo 30

Bapaganu ba mikolo mya nsuka batindami koyambola, koya epai ya Klisto, mpe kotangema elongo na ndako ya Yisalaele. Penepene na 34–35 ya Mobu mwa Mokonzi.

1 Yokemelani, O bino Bapaganu, mpe yokani maloba ma Yesu Klisto, Mwana Mobali wa Nzambe wa bomoi, maye atindi ngai ete naloba etali bino; mpo, tala, atindi ngai ete nakoma, kolobaka:

2 Balukani, bino Bapaganu banso, uta o nzela ya nkuna ya bino, mpe yambolani misala mibe mya bino, mpe lokuta mpe bokosi bwa bino, mpe pite ya bino, mpe bonsomo bwa nkuku bwa bino, mpe bosambeli bikeko bya bino, mpe bobomi bwa bino, mpe poloso ya banganga ya bino, mpe bilula bya bino, mpe songisongi ya bino, mpe uta na nkuna mpe bonsomo bonso bwa bino; mpe yakani epai ya ngai, mpe batisamani o nkombo ya ngai, ete bozwa bolimbisi boko bwa masumu ma bino, mpe botondisama na Molimo Mosantu, ete botangema elongo na bato ba ngai baye bazali ba ndako ya Yisalaele.