Makomi
3 Nefi 24


Mokapo 24

Ntoma wa Nkolo akolengele nzela mpo ya Boyei bwa Ibale—Klisto akofanda o bosambisi—Yisalaele atindami kofuta biteni bya zomi mpe mabonza—Buku ya bokundoli ebombami—Mekisani Malaki 3. Penepene na 34 ya Mobu mwa Mokonzi.

1 Mpe esalemaki ete atindaki bango ete bakoma maloba maye Tata apesaka epai ya Malaki, maye asengelaki kolobela epai ya bango. Mpe esalemaki ete esilisaki mango kokomama asembolaki mango. Mpe iye izali maloba maye alobelaki epai ya bango, kolobaka: Boye elobaki Tata epai ya Malaki—Tala, nakotinda ntoma wa ngai, mpe akolengele nzela liboso lya ngai, mpe Nkolo oyo boluki akoya na mbalakaka o tempelo ya ye, kutu ntoma wa boyokani, oyo bosepeli na ye, tala, akoya, elobi Nkolo wa Bibele.

2 Kasi nani akoki kotikala mokolo mwa boyei bwa ye, mpe nani akoteleme ekobima ye? Mpo azali bo moto mwa molambi, mpe lokola sabuni ya mosukoli.

3 Mpe akofanda lokola molambi mpe mopetoli wa mpauni; mpe akopetola bana babali ba Lewi mpe akosukola bango lokola wolo mpe mpauni, ete bakoka kobonza epai ya Nkolo libonza lya bosembo.

4 Nde libonza lya Yuda mpe Yelusaleme ekozala elengi epai ya Nkolo, lokola o mikolo mya kala, mpe lokola o mibu mya kalakala.

5 Mpe nakoya penepene na bino na bosambisi; mpe nakozala nzeneneke mpo ya mabe ma bandoki mpe bato ba ekobo, mpe mpo ya mabe ma balapi ndai ya lokuta, mpe mpo ya mabe ma bango baye baniokoli basali o lifuti lya bango, mozenge mpe mozangi tata, mpe baye babaluki mpembeni ya mopaya, mpe babangi ngai te, elobi Nkolo wa Bibele.

6 Mpo nazali Nkolo, nabongwani te; yango wana bino bana babali ba Yakobo bozikisami te.

7 Kutu uta mikolo mya batata ba bino bokendeki mosika uta na ya ngai makuli, mpe bobatelaki mango te. Zongani epai ya ngai mpe nakozonga epai ya bino, elobi Nkolo wa Bibele. Kasi bolobi: O nzela kani ekozonga biso?

8 Ekoyongolo moto Nzambe? Kasi boyongoli ngai. Kasi bolobi: O nzela kani toyongoli yo? Na biteni bya zomi mpe mabonza.

9 Bolakelami botutu na botutu boko, mpo boyongoli ngai, kutu ekolo eye mobimba.

10 Memeni biteni bya bino bya zomi o kati ya ebombelo, ete ekoka kozala bilei o ndako ya ngai; mpe mekani ngai sikawa na yango, elobi Nkolo wa Bibele, soko nakofungola bino te maninisa ma lola, mpe nakosopela bino lipamboli lyoko ete ekozala kisuku ekoka te mpo ya koyamba yango.

11 Mpe nakopamela modundi mpo ya ntina ya bino, mpe akobebisa te mbuma ya mabele ma bino; mpe vino ya bino ekobwaka te mbuma yambo ya ntango o bilanga bya bino, elobi Nkolo wa Bibele.

12 Bikolo binso bikobianga bino bapambolami, mpo bokozala mboka yoko ya elengi, elobi Nkolo wa Bibele.

13 Maloba ma bino mazali makasi na ngai, elobi Nkolo. Kasi bolobi: Nini tolobi mabe na yo?

14 Bolobi: Ezali mpamba kosalela Nzambe! Litomba kani ezali ete tobateli makuli ma ye mpe ete totamboli na kolela liboso lya Nkolo wa Bibele?

15 Mpe sikawa tobiangi bato ba lolendo bato ba esengo; iyo, bango baye basali nkuna batiami, iyo, bango baye bazali basenginii Nzambe kutu babikisami.

16 Nde bango baye babangaki Nkolo balobanaki mbala mingi bango na bango, mpe Nkolo ayokemelaki mpe ayokaki; Mpe buku ya bokundoli ekomamaki liboso lya ye mpo ya bango baye babangaki Nkolo, mpe bakanisaki likolo lya nkombo ya ye.

17 Mpe bakozala ba ngai, elobi Nkolo wa Bibele, o mokolo mona ntango nasangisi mpauni ya ngai; nakobatela bango lokola moto moko akobatelaka mwana mobali wa yemei oyo akosalelaka ye.

18 Nde bokozonga mpe bokososola o kati ya mosembo mpe moto wa nkuna, o kati ya ye oyo asaleli Nzambe mpe ye oyo asaleli ye te.