Makomi
3 Nefi 21


Mokapo 21

Yisalaele ekosangisama, ekoya Buku ya Molomoni—Bapaganu bakotiama lokola bato boko nsomi o mboka ya Amerika—Bakobikisama soko bandimi mpe batosi; soko te, bakokatama mosika mpe bakobebisama—Yisalaele akotonga Yelusaleme ya Sika, mpe mabota mabunga, makozonga. Penepene na 34 ya Mobu mwa Mokonzi.

1 Mpe solo nalobi epai ya bino, napesi epai ya bino lokola elembo yoko, ete bokoka koyeba ntango kani makambo maye makokoma mpembeni ya kosalema—Mpe nakosangisa o kati, uta o bopanzani bolai bwa bango, bato baye ba ngai, O ndako ya Yisalaele, mpe nakotia lisusu o ntei ya bango Siona ya ngai;

2 Mpe tala, eye ezali likambo liye nakopesa epai ya bino lokola elembo—mpo solo nalobi epai ya bino ete ekoya makambo maye, maye nalobi epai ya bino, mpe maye nakosakola epai ya bino na ngaimei nsima, mpe na nguya ya Molimo Mosantu oyo akopesama epai ya bino na Tata, likoyebana epai ya Bapaganu, ete bakoka koyeba etali bato baye, baye bazali montika moko mwa ndako ya Yakobo, mpe etali bato ba ngai baye bakopalanganisama na bango.

3 Solo, solo, nalobi epai ya bino, ekosala eyebana makambo maye epai ya bango na Tata, mpe makoya na Tata, uta na bango epai ya bino.

4 Mpo ezali bwania na Tata ete bakotiama o mboka, mpe bakotiama lokola bato boko nsomi na nguya ya Tata, ete makambo maye makoka koya uta na bango epai ya montika moko ya nkona ya yo, ete boyokani bwa Tata bokoka kokokisama boye ayokanaki elongo na bato ba ngai, O ndako ya Yisalaele.

5 Yango wana, ekoya misala miye mpe misala miye mikosalema o ntei ya bino uta na Bapaganu, epai ya nkona ya bino eye ekokulumwa o bozangi bondimi na ntina ya bobe bwa bango.

6 Mpo boye elongobani Tata ete ekokoma uta na Bapaganu, ete bakoka kolakisa nguya ya ye epai ya Bapaganu; mpo ya ntina eye ete Bapaganu, soko bayeisi mitema mya bango mikasi te, bakoka koyambola mpe koya epai ya ngai mpe kobatisama o nkombo ya ngai mpe koyeba biteni bya solo bya malongi ma ngai, ete bakoka kotangema o ntei ya bato ba ngai, O ndako ya Yisalaele.

7 Mpe ekosalema makambo maye ete nkona ya yo ekobanda koyeba makambo maye—ekozala elembo yoko epai ya bango, ete bakoka koyeba ete mosala mwa Tata mosili mobandi mpo ya bokokisi bwa boyokani asalaki epai ya bato baye bazali ba ndako ya Yisalaele.

8 Mpe ekoya mokolo mona, ekosalema ete bakonzi bakokanga minoko mya bango; mpo ena eye elobelamaka bango te bakomono, mpe ena eye eyokaka bango te bakomaniola.

9 Mpo o mokolo mona, mpo ya ntina ya ngai Tata akosala mosala moko, moye mokozala mosala moko monene mwa bokamwi o ntei ya bango; mpe ekozala o ntei ya bango, bango baye bakondima yango te, ata moto moko akosakola yango epai ya bango.

10 Kasi tala, bomoi bwa mosali wa ngai bokozala o loboko la ngai; yango wana bakosala ye mpasi te, ata abebisamaki na ntina ya bango. Nzokande nakobikisa ye, mpo nakolakisa epai ya bango ete bwania bwa ngai bozali bonene koleka mayele mabe ma zabulu.

11 Yango wana ekosalema ete onso oyo akondima te maloba ma ngai, oyo nazali Yesu Klisto, maye Tata akosala ye ameme epai ya Bapaganu, mpe akopesa epai ya ye nguya ete ameme mango epai ya Bapaganu (ekosalema kutu lokola Mose alobaki) bakokatama mosika uta o ntei ya bato ba ngai baye bazali ba boyokani.

12 Mpe bato ba ngai baye bazali montika moko mwa Yakobo bakozala o ntei ya Bapaganu, iyo, o katikati ya bango lokola nkosi moko o ntei ya niama ya zamba, lokola mwana ya nkosi moko o ntei ya bitonga bya mpate, oyo soko akei o kati aniati o nse, mpe apasoli na biteni, mpe moto te akoki kobikisa.

13 Loboko la bango lokotombwana likolo lya banguna ba bango mpe bayini ba bango banso bakokatama mosika.

14 Iyo, lisuma epai ya Bapaganu longola se soko bayamboli; mpo ekosalema o mokolo mona, elobi Tata, ete nakokata mosika farasa libanda lya ntei ya yo mpe nakobebisa makalo ma yo.

15 Mpe nakokata mosika bingumba bya mboka ya yo, mpe nakobwaka o nse bisika bikasi bya yo.

16 Mpe nakokata mosika nkisi ya yo libanda lya mboka ya yo mpe okozala na banganga nkisi lisusu te.

17 Bilili biniangwa bya yo nakokata mosika lokola, mpe bilili bitelema bya yo libanda lya ntei ya yo, mpe okokumbamela lisusu te misala mya maboko ma yo.

18 Mpe nakopikola bikeko libanda lya ntei ya yo; boye nakobebisa bingumba bya yo.

19 Mpe ekosalema ete lokuta, mpe bokosi, mpe boluli, mpe songisongi, mpe poloso ya banganga, mpe pite ekosilisama.

20 Mpo ekosalema, elobi Tata, ete o mokolo mona, banso baye bakoyambola te mpe bakoya te epai ya Mwana Mobali Molingami wa ngai, bango nakokata mosika uta o ntei ya bato ba ngai, O ndako ya Yisalaele;

21 Mpe nakosala bobekoli mpe nkanda likolo lya bango, kutu lokola likolo lya bapaganu bazangi kondima na lolenge loko lokola bayoka te.

22 Kasi soko bakoyambola, mpe bakoyokemela epai ya maloba ma ngai, mpe bakoyeisa mitema mya bango mikasi te, nakotia eklezia ya ngai o ntei bango, mpe bakokota o kati ya boyokani bwa ngai, mpe bakotangema o ntei ya montika mwa Yakobo, epai ya bango napesi mboka eye mpo ya lisango lya bango.

23 Mpe bakosalisa bato ba ngai, montika mwa Yakobo, mpe lisusu mingi ba ndako ya Yisalaele lokola bakoya, ete bakoka kotonga engumba yoko, eye ekobiangema Yelusaleme ya Sika.

24 Mpe nde bakosalisa bato ba ngai ete bakoka kosangisama o kati, baye bapalanganisami likolo lya etando mobimba ya mboka, o kati ya epai ya Yelusaleme ya Sika.

25 Mpe nde nguya ya lola ekokita o ntei bango; nde nakozala o katikati lokola.

26 Mpe nde mosala mwa Tata mokobanda o mokolo mona, kutu ekoteyama nsango elamu o ntei ya montika mwa bato baye. Solo nalobi epai ya bino, o mokolo mona, mosala mwa Tata mokobanda o ntei ya bapanzani ba bato ba ngai; iyo, kutu mabota maye mabunga, maye Tata akambaki libanda lya Yelusaleme.

27 Iyo, mosala mokobanda o ntei ya bapanzani ba bato ba ngai, elongo na Tata mpo ya kolengele nzela na wapi bakoka koya epai ya ngai, ete bakoka kobianga likolo lya Tata o nkombo ya ngai.

28 Iyo, nde ekobanda mosala, elongo na Tata o ntei ya bikolo binso mpo ya kolengele nzela na wapi bato ba ye bakoka kosangisama o ndako o mboka ya lisango lya bango.

29 Mpe bakobima uta o bikolo binso; mpe bakobima na mbangu te, to na kokima te, nakozala liboso lya bango, elobi Tata, mpe nakozala nsima ya bango.