Makomi
3 Nefi 2


Mokapo 2

Nkuna mpe bonsomo bobakisami o ntei ya bato—Banefi mpe Balamani basali bomoko mpo ya komibatela na bayongoli ba Gadiatoni—Babongwani ba Balamani bakomi mpembe mpe babiangemi Banefi. Penepene na 5–16 ya Mobu mwa Mokonzi.

1 Mpe esalemaki ete boye elekaki mobu mwa tuku libwa na mitano. Mpe bato babandaki kobosana bilembo bina mpe makamwa maye bayokaka, mpe babandaki kokamwa moke moke na elembo yoko to likamwa lyoko uta o lola, mpenza ete babandaki kokoma bakasi na mitema mya bango, mpe bato ba lolanda na makanisi ma bango, babandaki kondima te na eye enso bayokaka mpe bamonoko—

2 Kokanisaka yoko likambo lya mpamba o mitema mya bango, ete esalemaki na bato mpe na nguya ya zabulu, mpo ya komeme mpe kokosa mitema mya bato, mpe boye Satana azwaki lisusu mitema mya bato, mpenza ete azipaki miso mya bango mpe akambaki bango mosika na kondima ete malongi ma Klisto mazalaki likambo lyoko lya ligboma mpe lya mpamba.

3 Mpe esalemaki ete bato bayikaki bokasi o nkuna mpe bonsomo; mpe bandimaki te ete ekopesama lisusu bilembo mpe makamwa; mpe Satana akendeki zingazinga, komememe mosika mitema mya bato, kosenginiaka bango mpe kosalaka bango ete basala nkuna enene o mboka.

4 Mpe boye elekaki mobu mwa tuku libwa na motoba; mpe lisusu mobu mwa tuku libwa na sambo, mpe lisusu mobu mwa tuku libwa na mwambe; mpe lisusu mobu mwa tuku libwa na libwa;

5 Mpe lisusu mibu nkama moko milekaki, uta o mikolo mya Moziya oyo azalaki mokonzi likolo lya bato banso ba Banefi.

6 Mpe mibu nkama motoba na libwa milekaki uta Lehi atikaki Yelusaleme.

7 Mpe mibu libwa milekaki uta o ntango epesamaki elembo, eye elobamaki na baprofeta, ete Klisto akoya o kati ya mokili.

8 Sikawa, Banefi babandaki kotanga ntango ya bango uta o eleko eye elembo epesamaki to uta o boyei bwa Klisto; yango wana mibu libwa milekaki.

9 Mpe Nefi, oyo azalaki tata wa Nefi, oyo azalaka na mokumba mwa makundoli, azongaki te o mboka ya Zalayemila, mpe akokaki komonono esika yoko te o mboka mobimba.

10 Mpe esalemaki ete bato bawumelaki kaka o nkuna, ata mateya mpe mabikuli maye matindamaki o ntei ya bango; mpe boye elekaki mobu mwa zomi lokola; mpe mobu mwa zomi na moko molekaki o bobe.

11 Mpe esalemaki ete o mobu mwa zomi na misato ebandaki kozala bitumba mpe boweli o ntaka ya mboka mobimba; mpo bayongoli ba Gadiatoni bakomaki mingi koleka, mpe babomaki boye mingi ya bato, mpe babebisaki boye bingumba mingi, mpe bapanzaki boye liwa liike mpe mobomano o ntaka ya mboka, ete elongobanaki ete bato banso, Banefi mpe Balamani lokola, bakamata mandoki mpo ya kobunda na bango.

12 Yango wana, Balamani baye bakomaki babongwani epai ya Nkolo basalaki bomoko na bandeko ba bango Banefi, basengisamaki, mpo ya bozangi likama lya bomoi bwa bango mpe basi ba bango mpe bana ba bango, na kokamata mandoki mpo ya kobunda na bayongoli bana ba Gadiatoni, iyo, mpe lisusu mpo ya kosimba, makoki ma bango, mpe matomba ma eklezia ya bango mpe ma bokumbami bwa bango, bonsomi bwa bango mpe lipanda lya bango.

13 Mpe esalemaki ete yambo mobu moye mwa zomi na misato moleka, Banefi bakanelamaki na bobebisami mpenza na ntina ya etumba eye, eye ekomaki nsomo mpenza.

14 Mpe esalemaki ete Balamani bana baye basalaki bomoko na Banefi batangemaki o ntei ya Banefi;

15 Mpe botutu bwa bango bolongwaki wa na bango mpe mposo ya bango ekomaki mpembe bo epai ya Banefi;

16 Mpe bilenge babali ba bango mpe bana basi ba bango bakomaki malonga mpenza, mpe batangemaki o ntei ya Banefi, mpe babiangemaki Banefi. Mpe boye esukaki mobu mwa zomi na misato.

17 Mpe esalemaki ete o ebandeli ya mobu mwa zomi na minei, etumba o kati ya bayongoli mpe bato ba Nefi ekobaki mpe ekomaki nsomo mpenza; nzokande bato ba Nefi balongaki yoko litomba lya bayongoli, mpenza ete babenganaki bango nsima libanda lya mboka ya bango o kati ya ngomba mpe o bisika bya bango bya nkuku.

18 Mpe boye esukaki mobu mwa zomi na minei. Mpe o mobu mwa zomi na mitano, bakendeki lisusu kobunda na bato ba Nefi; mpe na ntina ya nkuna ya bato ba Nefi, mpe boweli mingi mpe bokabwani bwa bango, bayongoli ba Gadiatoni balongaki matomba mingi likolo lya bango.

19 Mpe boye esukaki mobu mwa zomi na mitano, mpe boye ezalaki bato o bozali boko bwa matungisi mingi; mpe mopanga mwa bobebisami modiembelaki likolo lya bango, mpenza ete bazalaki mpembeni ya kokatama na yango, mpe eye na ntina ya bobe bwa bango.