Makomi
3 Nefi 22


Mokapo 22

O mikolo mya nsuka, Siona mpe makonzi ma yango makotiama, mpe Yisalaele ekosangisama na ngolu mpe bolingo—Bakolonga—Mekisani Yisaya 54. Penepene na 34 ya Mobu mwa Mokonzi.

1 Mpe nde ekosalema ena eye ekomami: Yemba, O ekomba, yo oyo obotaki te, bukana o boyembi, ganga makasi, yo oyo oyoka mpasi ya mwana te; mpo bazali mingi bana ba mwasi wa mpamba koleka bana ba mwasi abala; elobi Nkolo.

2 Tandola esika ya ema ya yo, tika bango basembola lido ya ndako ya yo; tika te, yeisa nsinga ya yo molai mpe lendisa makonzi ma yo.

3 Mpo okobukana o loboko la mobali mpe o loboko la mwasi, mpe nkona ya yo ekosangola Bapaganu, mpe bakoyeisa mpamba bingumba mpo ya kofandama.

4 Banga te, mpo okoyokisama nsoni te; mpe okobulunganisama te, mpo okosambwisama te; mpo okobosana nsoni ya bolenge bwa yo, mpe okomikundola te mpamela ya bolenge bwa yo mpe okomikundola mpamela ya bozenge bwa yo lisusu te.

5 Mpo mokeli wa yo, mobali wa yo, Nkolo wa Bibele ezali nkombo ya ye; mpe Mosikoli wa yo, Mosantu Moko wa Yisalaele—Nzambe wa mokili mobimba ekobiangema ye.

6 Mpo Nkolo abiangi yo lokola mwasi oyo asundolama mpe ayokisama mpasi na molimo, mwasi moko wa bolenge, ebwakamaki ye, elobi Nzambe wa yo.

7 Mpo ya ngonga eke nasundolaki yo, kasi na ngolu enene nakosanganisa yo.

8 Na nkanda eke nabombaki elongi ya ngai uta na yo mpo ya ngonga eke; kasi na boboto bwa libela nakoyoka ngolu likolo lya yo; elobi Nkolo Mosikoli wa yo.

9 Mpo eye, mai ma Noa mpo ya ngai, mpo lokola nalapaki ndai ete mai ma Noa makokende likolo lya mokili lisusu te, boye nalapi ndai ete nakozala te na nkanda na yo.

10 Mpo ngomba ikokende mpe ngomba patatalu ikolongwa, kasi boboto bwa ngai bokokende te uta na yo; mpe boyokani bwa kimia bwa ngai bokolongolama te. Elobi Nkolo, oyo azali na ngolu likolo lya yo.

11 O yo motungisami, obetemi na moketi, mpe obondisami te! Tala, na kolalisa mabanga ma yo na langi la malonga, mpe nakolalisa nse ya yo na safili;

12 Mpe nakosala maninisa ma yo na agata mpe bikuke bya yo na balekete; mpe ndelo ya yo inso na mabanga ma elengi.

13 Mpe bana ba yo banso bakolakisama na Nkolo; mpe enene ekozala kimia ya bana ba yo.

14 Na bosembo ekotiama yo, okozala mosika uta na boniokwami mpo okobanga te, mpe uta o nsomo mpo ekoya te penepene na yo.

15 Tala, na ntembe te bakosanganela elongo likolo lya yo, kasi na ngai te; banso baye bakosanganela elongo likolo lya yo bakokweya na ntina ya yo.

16 Tala, nakelaki motuli oyo akofula makala o moto, mpe akomeme esalele yoko mpo ya mosala mwa ye; nakelaki mopanzi mpo ya kobebisa.

17 Ebundele te eye esalemi mpo ya kobundisa yo ekolonga; mpe lolemo lonso loye lokotiola yo o bosambisi lokokweyisama. Eye ezali lisango lya basali ba Nkolo, mpe bosembo bwa bango bozali na ngai, elobi Nkolo.