Makomi
3 Nefi 29


Mokapo 29

Boyei bwa Buku ya Molomoni bozali elembo ete Nkolo abandi kosangisa Yisalaele mpe kokokisa mayokani ma ye—Bango baye bakobwaka mabimisi mpe makabo ma mokolo mwa nsuka bakolakelama botutu. Penepene na 34–35 ya Mobu mwa Mokonzi.

1 Mpe sikawa tala, nalobi epai ya bino ete, ekomono Nkolo elongobani na bwania bwa ye ete maloba maye maya epai ya Bapaganu, engebene na liloba lya ye, nde bokoyeba ete boyokani boye Tata asalaki elongo na bana ba Yisalaele, etali bozongisi o mboka ya lisango bosili bobandi kokokisama.

2 Mpe bokoki koyeba ete maloba ma Nkolo maye alobaki na baprofeta basantu, makokokisama manso; mpe bosengeli te koloba ete Nkolo azelisi boyei bwa ye epai ya bana ba Yisalaele.

3 Mpe bosengeli te kokanisa o mitema mya bino ete maloba maye malobami mazali mpamba; mpo tala, Nkolo akomikundola boyokani bwa ye boye asalaki epai ya bato ba ndako ya Yisalaele.

4 Mpe ekomono bino maloba maye koyaka o ntei ya bino, nde bosengeli lisusu te koboya misala mya Nkolo, mpo mopanga mwa boyengebene bwa ye mozali o loboko la ye la mobali; mpe tala, o mokolo mwa nsuka, soko boboyi misala mya ye, akosala ete mikamata bino noki.

5 Lisuma epai ya ye oyo aboyaki misala mya Nkolo; iyo, lisuma epai ya ye oyo akowangana Klisto mpe misala mya ye.

6 Iyo lisuma epai ya ye oyo akowangana mabimisi ma Nkolo, mpe oyo akoloba ete Nkolo asali lisusu te na bobimisi, to na mabikuli, to na makabo, to na minoko, to na bobikisi, to na nguya ya Molimo Mosantu.

7 Mpe lisusu epai ya ye oyo akoloba o mokolo mona, mpo ya kozwa matabisi, ete ekoki kosalema likamwisi te na Yesu Klisto; mpo ye oyo asali eye, akokoma bo mpo ya mwana mobali wa libomi, mpo ya nani ngolu ezali te, engebene na liloba lya Klisto!

8 Iyo, mpe bosengeli lisusu te kotiola, to koboya, to koseke Bayuda, to montika mwa ndako ya Yisalaele; mpo tala, Nkolo amikundoli boyokani bwa ye epai ya bango, mpe akosala epai ya bango engebene na eye alaki.

9 Yango wana, bosengeli te kobanza ete bokoki kobalola loboko la mobali la Nkolo epai ya mwasi, ete akoki te kosala bosambisi mpo ya bokokisi bwa boyokani boye asali epai ya ndako ya Yisalaele.