Makomi
3 Nefi 25


Mokapo 25

O Boyei bwa Ibale, bato ba lolendo mpe nkuna bakozika lokola matiti ma zamba—Eliya akozonga liboso lya mokolo mona monene mpe mwa nsomo—Mekisani Malaki 4. Penepene na 34 ya Mobu mwa Mokonzi.

1 Mpo tala, mokolo mokoya moye mokopela lokola fulu; mpe bato banso ba lolendo, iyo, mpe baye basali na nkuna, bakozala lokola mpumbulu; mpe mokolo moye mokoya mokozikisa bango mpenza, elobi Nkolo wa Bibele, ete ekotika bango na mosisa te to na etape te.

2 Kasi epai ya bino baye bokobanga nkombo ya ngai, Mwana Mobali wa Bosembo akobima na bobikisi o mapapu ma ye, mpe bokokende liboso lya ye mpo bokokola lokola bana ba ngombe o ntei ya ndako ya bibwele.

3 Bokoniata o nse bato ba nkuna; ete bakozala mputulu o nse ya makolo ma bino o mokolo moye nakosala eye, elobi Nkolo wa Bibele.

4 Bomikundola mobeko mwa Mose, mosali wa ngai, oyo natindaki epai ya ye o Holebe na ntina ya Yisalaele mobimba, elongo na meko mpe masambisi.

5 Tala, nakotindela bino profeta Eliya yambo ya boyei bwa mokolo monene mpe mwa nsomo mwa Nkolo.

6 Akobongola mitema mya batata epai ya bana mpe mitema mya bana epai ya batata ba bango, mbele nakoya mpe nabete mabele na botutu boko.