Makomi
3 Nefi 7


Mokapo 7

Mosambisi mokonzi abomami, boyangeli bobebisami, mpe bato bakabwani na mabota—Yakobo, motelemeli Klisto akomi mokonzi wa likelemba lyoko lya nkuku—Nefi ateyi boyamboli mpe bondimi na Klisto—Banzelu basali na ye mokolo na mokolo, mpe asekwisi ndeko mobali wa ye uta na bakufi—Mingi bayamboli mpe babatisami. Penepene na 30–33 ya Mobu mwa Mokonzi.

1 Sikawa tala, nakolakisa epai ya bino ete batiaki te mokonzi moko likolo lya mboka; kasi o mobu mona kaka, iyo, mobu mwa tuku misato, babebisaki likolo lya kiti ya bosambisi, iyo, babomaki mosambisi mokonzi wa mboka.

2 Mpe bato bakabwanaki bango na bango; mpe bakeseneki bango na bango na mabota, moto na moto engebene na libota lya ye mpe bandeko ba ye mpe baninga ba ye; mpe boye babebisaki boyangeli bwa mboka.

3 Mpe libota na libota liponoki mokonzi moko to mokambi moko likolo lya bango; mpe boye bakomaki mabota mpe bakambi ba mabota.

4 Sikawa tala, ezalaki moto te o ntei ya bango longola se soko azalaka na libota liike mpe bandeko mpe baninga mingi; yango wana mabota ma bango makomaki manene mpenza.

5 Sikawa eye enso esalemaki, mpe izalaki bitumba naino te o ntei ya bango; mpe bobe boye bonso boyaka likolo lya bato zambi bamitikaki epai ya nguya ya Satana.

6 Mpe mabongisi ma boyangeli mabebisamaki, na ntina ya likelemba lya nkuku lya baninga mpe bandeko ba bango baye babomaki baprofeta.

7 Mpe babimisaki boweli boko bonene o mboka, mpenza ete eteni eleki sembo ya bato ekomaki enso penepene na kokoma bato ba nkuna, iyo, ezalaki bato sembo bake o ntei ya bango.

8 Mpe boye mibu motoba milekaki te uta eteni eleki mingi ya bato ebalukaki uta o bosembo bwa bango, bo mbwa o esanzi ya ye, to bo ngulu o bopotoni bwa ye o potopoto.

9 Sikawa likelemba lya nkuku, liye limemeki bobe bonene likolo lya bato, basangisaki bangomei elongo, mpe batiaki o moto mwa bango moto moko oyo babiangaki Yakobo;

10 Mpe babiangaki ye mokonzi wa bango; yango wana akomaki mokonzi likolo lya lingomba liye lya nkuna; mpe azalaki moko wa bakonzi oyo apesaki mokana mwa ye mpo ya koboma baprofeta baye batatolaki mpo ya Yesu.

11 Mpe esalemaki ete bazalaki bakasi te na motango lokola mabota ma bato, baye basalaki bomoko elongo longola se soko ezalaki bakambi ba bango batiaki mibeko mya bango, moko na moko engebene na libota lya ye; nzokande bazalaki bayini; ata bazalaki te bato boko sembo, kasi basalaki bomoko o boyini bwa bango baye bakotaki o kati ya boyokani boko mpo ya kobebisa boyangeli.

12 Yango wana, Yakobo komonoko ete bayini ba bango bazalaki na motango monene koleka bango, ye kozalaka mokonzi wa lingomba, yango wana atindaki bato ba ye ete bakima o kati ya eteni ya nordi mpenza ya mboka, mpe kuna batongaki mpo ya bangomei bokonzi boko, kina basanganamaki na bakabwani, (mpo aleteke bango ete ezala bakabwani mingi) mpe bakomaki na bakasi bakoka mpo ya kowela na mabota ma bato; mpe basalaki boye.

13 Mpe boye mbangu ezalaki botamboli bwa bango ete ekokaki kopekisama te kina bakendeki mosika ete bakanga bango te na bato. Mpe boye esukaki mobu mwa tuku misato; mpe boye ezalaki makambo ma bato ba Nefi.

14 Mpe esalemaki ete o mobu mwa tuku misato na moko bakabwanaki na mabota, moto na moto engebene na libota, bandeko mpe baninga ba ye; nzokande bakomaki na boyokani ete bakokende te kobunda bango na bango; kasi basalaki bomoko te lokola na mibeko mya bango, mpe lolenge la bango la boyangeli, mpo botiamaki engebene na makanisi ma bango baye bazalaki bakonzi ba bango mpe bakambi ba bango. Kasi batiaki mibeko mya sikisiki ete libota lyoko likosala na lisusu mabe te, mpenza ete na yoko ndelo bazalaka na kimia o mboka; nzokande, mitema mya bango mibalukaki mosika na Nkolo Nzambe wa bango, mpe babambaki baprofeta mabanga mpe babwakaki bango libanda uta o ntei ya bango.

15 Mpe esalemaki ete Nefi—ebimelamaki ye na banzelu mpe lisusu mongongo mwa Nkolo, yango wana emonoki ye banzelu, mpe ezalaki ye nzeneneke ya komono na miso, mpe nguya epesamaka epai ye ete akoka koyeba etali mosala mya Klisto, mpe lisusu ezalaki ye nzeneneke ya komono na miso ya bozongi bwa bango noki uta o bosembo epai ya nkuna mpe bonsomo bwa bango;

16 Yango wana, eyokaki ye mpasi mpo ya bokasi bwa mitema mya bango mpe lolanda la mayele ma bango—akendeki o ntei ya bango o mobu mona kaka, mpe abandaki kotatola, na mpiko, boyamboli mpe bolimbisi bwa masumu na nzela ya bondimi likolo lya Nkolo Yesu Klisto.

17 Mpe ateyaki bango makambo mingi; mpe manso makoki te kokomama, mpe eteni yoko ya mango makokoka te, yango wana makomama te o monkanda moye. Mpe Nefi ateyaki bango na nguya mpe na bokulaka bonene.

18 Mpe esalemaki ete basilikaki na ye, kutu zambi azalaki na nguya mingi koleka bango, mpo bakokaki te kosalema ete bandima te maloba ma ye, mpo enene boye ezalaki bondimi bwa ye likolo lya Nkolo Yesu Klisto ete banzelu basalaki epai ya ye mikolo minso.

19 Mpe o nkombo ya Yesu abwakaki libanda bazabulu mpe milimo mya mbindo; mpe kutu asekwisaki ndeko mobali wa ye, esilaka ye kobambama mabanga, mpe kozwa mpasi ya liwa na bato.

20 Mpe bato bamonoki yango, mpe batatolaki yango mpe basilikaki na ye na ntina ya nguya ya ye, mpe lisusu asalaki makamwisi mingi koleka, liboso lya miso mya bato, o nkombo ya Yesu.

21 Mpe esalemaki ete mobu mwa tuku misato na moko molekaki, mpe ezalaki bake baye babongwanaki epai ya Nkolo; mingi lokola babongwanaki balakisaki solo epai ya bato ete babimelamaki na nguya mpe Molimo mwa Nzambe oyo ezalaki na Yesu Klisto, na ye bandimaki.

22 Mpe mingi lokola babwakamaki bazabulu libanda lya bango, mpe babikisamaki na malali ma bango mpe bokono bwa bango, bamonisaki solo epai ya bato ete bakitelamaka na Molimo mwa Nzambe, mpe babikisamaka na bokono bwa bango; mpe balakisaki lisusu bilembo mpe basalaki yoko makamwisi o ntei ya bato.

23 Boye elekelaki mobu mwa tuku misato na mibale. Mpe Nefi abelelaki epai ya bato o ebandeli ya mobu mwa tuku misato na misato, mpe ateyaki epai ya bango boyamboli mpe bolimbisi bwa masumu.

24 Sikawa nalingi bino bomikundola lisusu, ete ezali moko te oyo amememeki epai ya boyamboli oyo abatisamaki te na mai.

25 Yango wana, bakulisamaki na Nefi, bato mpo ya mosala moye, ete banso lokola baye bakoya epai ya bango babatisama na mai, mpe eye lokola litatoli lyoko mpe ndakisa liboso lya Nzambe, mpe epai ya bato, ete bayambolaka mpe bazwaka bolimbisi boko bwa masumu ma bango.

26 Mpe izalaki mingi o ebandeli ya mobu moye baye babatisamaki mpo ya boyamboli; mpe boye eteni eleki mingi ya mobu elekaki.