Makomi
3 Nefi 1


Nefi ya Isato

Buku ya Nefi
Mwana mobali wa Nefi, oyo azalaki mwana mobali wa Elamani

Mpe Elamani azalaki mwana mobali wa Elamani, oyo azalaki mwana mobali wa Alama, oyo azalaki mwana mobali wa Alama, kozalaka eboto moko ya Nefi oyo azalaki mwana mobali wa Lehi, oyo ayaki uta o Yelusaleme, o mobu mwa yambo mwa bokonzi bwa Sidikiya, mokonzi wa Yuda.

Mokapo 1

Nefi, mwana mobali wa Elamani, akeyi libanda lya mboka, mpe mwana mobali wa ye Nefi abombi makundoli—Ata bilembo mpe makamwa mazali beboo, babe bakani koboma basembo—Butu ya mbotama ya Klisto ekomi—Elembo epesami mpe monzoto mwa sika mobimi. Lokuta mpe bobubi bobakisami, mpe bayongoli ba Gadiatoni babomi mingi. Penepene na 1–4 ya Mobu mwa Mokonzi.

1 Sikawa esalamaki ete mobu tuku libwa na moko elekaka mpe ezalaka mibu nkama motoba uta Lehi atikaki Yelusaleme; mpe ezalaki o mobu moye Lakonusi azalaki mosambisi mokonzi mpe moyangeli likolo lya mboka.

2 Mpe Nefi, mwana mobali wa Elamani, akendeki libanda lya mboka ya Zalayemila, kopesaka mokumba epai ya mwana mobali wa ye Nefi, oyo azalaki mwana mobali wa ye wa nkulutu, etali palaki ya motako mpe makundoli manso mabombamaki, mpe biloko bina binso biye bibombamaki bule uta o bokei bwa Lehi libanda lya Yelusaleme.

3 Nde Nefi akendeki libanda lya mboka, mpe wapi akendeki moto te ayebi, mpe mwana mobali wa ye Nefi abombaki makundoli esika ya ye, iyo, likundoli lya bato baye.

4 Mpe esalemaki ete o ebandeli ya mobu tuku libwa na mibale, tala, mabikuli ma baprofeta mabandaki kosalema mpenza; mpo ebandaki kozala bilembo bileki binene mpe makamwisi maleki manene o ntei ya bato.

5 Kasi, izalaki boko baye babandaki koloba ete ntango elekaki mpo ya maloba makokisama, maye malobamaki na Samwele, Molamani.

6 Mpe babandaki kosepela likolo lya bandeko ba bango, kolobaka: Tala, ntango eleki; mpe maloba ma Samwele makokisami te; yango wana, bosepeli mpe bondimi botali likambo liye bozali mpamba.

7 Mpe esalemaki ete basalaki mosukusuku monene o ntaka ya mboka; mpe bato baye bandimaki babandaki kozala na mawa mingi, mbele na yoko nzela makambo mana maye malobamaki makoka te kosalema.

8 Kasi tala, bakengeki na sikisiki mpo ya mokolo mona mpe butu ena mpe mokolo mona moye mokozala lokola mokolo moko lokola soko izalaki butu te, ete bakoka koyeba ete bondimi bwa bango bozalaka te mpamba.

9 Sikawa esalemaki ete ezalaki mokolo moko motiamaki mpembeni na bazangi bondimi, ete bango banso baye bandimaki na mimeseno mina batiama na liwa longola se soko bilembo bikosalema, biye bipesamaki na profeta Samwele.

10 Sikawa esalemaki ete emonoki Nefi, mwana mobali wa Nefi, nkuna ya bato ba ye, motema mwa ye mozalaki na mawa mpenza.

11 Mpe esalemaki ete akendeki libanda mpe amingumbaki likolo lya mabele, mpe abelelaki makasi na Nzambe mpo ya litomba lya bato ba ye, iyo, bango baye bazalaki mpembeni mpo ya kobebisama na ntina ya bondimi bwa bango na momeseno mwa batata ba bango.

12 Mpe esalemaki ete abelelaki makasi epai ya Nkolo mokolo mona mobimba, mpe tala mongongo mwa Nkolo moyaki epai ya ye, kolobaka:

13 Tombola moto mwa yo, mpe zala na bosepeli; mpo, tala, ntango ezali penepene, mpe o butu eye ekopesama elembo, mpe o mokolo mwa nsima ekoya ngai o kati ya mokili, mpo ya kolakisa epai ya mokili ete nakokokisa enso nasalaki elobama na monoko mya baprofeta basantu ba ngai.

14 Tala, nayei epai ya bato ba ngai, mpo ya kokokisa makambo manso maye nasalaki eyebana epai ya bana ba bato uta o bokelami bwa mokili, mpe mpo ya kosala bolingi bwa Tata mpe bwa Mwana Mobali—bwa Tata na ntina ya ngai, bwa Mwana Mobali na ntina ya mosuni mwa ngai. Mpe, tala ntango ezali penepene, mpe butu eye ekopesama elembo.

15 Mpe esalemaki ete maloba maye mayaki epai ya Nefi makokisamaki, engebene lokola malobamaki; mpo tala, o bokiti bwa moi, molili mozalaki te; mpe bato babandaki kokamwa zambi ezalaki te molili ntango butu eyaki.

16 Mpe izalaki mingi, baye bandimaka te maloba ma baprofeta, baye bakweyaki o mabele mpe bakomaki lokola soko bato bakufi, mpo bayebaki ete mwango monene mwa bobebisami boye botiamaki mpo ya bango baye bandimaki o maloba ma baprofeta mobebisamaki; mpo elembo eye epesamaki esilaki kozalaka penepene.

17 Mpe babandaki koyeba ete Mwana Mobali wa Nzambe asengeli mosika te kobima; iyo, o nsuka bato banso likolo lya etando ya mabele mobimba uta westi o esti, o mboka ya nordi mpe o mboka ya sudi lokola, bakamwaki mpenza boye ete bakweyaki o mabele.

18 Mpo bayebaki ete baprofeta batatolaki makambo maye mpo ya mibu mingi, mpe ete elembo eye epesamaki esilaki kozala penepene; mpe babandaki kobanga na ntina ya bobe bwa bango mpe bozangi bondimi bwa bango.

19 Mpe esalemaki ete ezalaki te molili o butu ena mobimba, kasi ezalaki moi lokola soko ezalaki midi. Mpe esalemaki ete moi mobimaki lisusu o ntongo, engebene na molongo mwa mwango mpenza, mpe bayebaki ete ezalaki mokolo moye Nkolo akobotama, na ntina ya elembo eye epesamaki.

20 Mpe esalemaka, iyo, makambo manso, eteni na eteni, engebene na maloba ma baprofeta.

21 Mpe esalemaki lisusu ete monzoto moko mwa sika mobimaki, engebene na liloba.

22 Mpe esalemaki ete uta o ntango eye, ebandaki kozala bokosi botindamaki o ntei ya bato, na Satana, mpo ya koyeisa mitema mya bango mikasi, na ntina ete bakoka te kondima na bilembo mpe makamwa mana maye bamonoko; kasi ata lokuta mpe bobubi boye eteni eleki mingi ya bato bandimaki, mpe babongwanaki epai ya Nkolo.

23 Mpe esalemaki ete Nefi akendeki o ntei ya bato, mpe lisusu mingi basusu, kobatisaka mpo ya boyamboli, na bwango ezalaki bolimbisi boko bonene bwa masumu. Mpe boye bato babandaki lisusu kozala na kimia o mboka.

24 Mpe izalaki boweli te, longola se ezalaki mwa moke oyo babandaki koteya, mpe kosala makasi mpo ya kolakisa na nkoma ete elongobanaki lisusu te kotosa kobatela mobeko mwa Mose. Sikawa na likambo liye babungaki, esosolaki bango te nkoma.

25 Kasi, esalemaki ete bakomaki noki babongwani, mpe bandimisamaki na libosani liye bazalaki na lyango, mpo eyebisamaki epai ya bango ete mobeko mokisamaki naino te, mpe ete esengeli mokokisama eteni na eteni; iyo, liloba liyaki epai ya bango ete esengeli kokokisama; iyo, ete nsonge to elembo yoko ekoleka te kina enso ekokokisama. Yango wana o mobu moye kaka bamememeki o boyebi boko bwa libosani lya bango mpe batubelaki miko mya bango.

26 Mpe boye mobu tuku libwa na mibale molekaki, komemeke nsango ya nsai epai ya bato na ntina ya bilembo biye bisalemaki, engebene na maloba ma bobikuli bwa baprofeta basantu.

27 Mpe esalemaki ete mobu mwa tuku libwa na misato molekaki lisusu na kimia, longola se soko ezalaki bayongoli ba Gadiatoni, baye bazalaki kofanda likolo lya ngomba, baye bafulusaki mboka; mpo boye ekasi ezalaki bisika bikasi bya bango mpe bisika bya nkuku bya bango ete bato bakokaki te kolonga bango; yango wana basalaki bobomi mingi, mpe bobomibomi boike o ntei ya bato.

28 Mpe esalemaki ete o mobu tuku libwa na minei babandaki kobakisama na lolenge loko lonene, zambi izalaki bakabwani mingi ba Banefi baye bakimaki epai ya bango, eye esalaki mawa maike epai ya Banefi bana baye batikalaki o mboka.

29 Mpe ezalaki ntina lisusu ya mawa maike o ntei ya Balamani; mpo tala, bazalaki na bana mingi baye bakolaki mpe babandaki koyika bokasi o mibu, ete bakomaki mpo ya bangomei, mpe bakambemaki mpembeni na boko Bazolami, na lokuta la bango mpe maloba makolete ma bango, mpo ya basangana na bayongoli bana ba Gadiatoni.

30 Mpe boye etungisamaki lisusu Balamani, mpe babandaki kokita na bondimi mpe bosembo bwa bango, na ntina ya nkuna ya nkola ya mbuta.