Makomi
3 Nefi 6


Mokapo 6

Banefi bazwi bomengo—Lolendo, bomengo, bokeseni bwa nkondo bobimi—Eklezia epasuki na bokabwani—Satana akambi bato na botomboki bwa polele—Baprofeta mingi babeleli boyamboli mpe babomami—Babomi ba bango basali ekokolo mpo ya kokamata boyangeli. Penepene na 26–30 ya Mobu mwa Mokonzi.

1 Mpe sikawa esalemaki ete bato banso ba Banefi bazongaki banso o mboka ya bangomei o mobu mwa tuku mibale na motoba, moto na moto, elongo na libota lya ye, bibwele bya ye, mpe bitonga bya ye, farasa ya ye, mpe niama ya ye ya kobokolo, mpe biloko binso biye bizalaki na bango.

2 Mpe esalemaki ete baliaka te bilei binso bya bango; yango wana bakamataki elongo na bango eye enso badundaka te, mboto inso ya bango ya lolenge na lolenge, wolo ya bango, mpe mpauni ya bango, mpe biloko binso bya bango bya motuya, mpe bazongaki o mboka ya bangomei, mpe bozwi bwa bango, o nordi mpe o sudi lokola, mpe o mboka ya nordi mpe o mboka ya sudi lokola.

3 Mpe bapesaki epai ya bayongoli bana baye bakotaki o kati ya boyokani boko mpo ya kobatela kimia ya mboka, baye bazalaki na mposa ya kotikala Balamani, mboka, engebene na mitango mya bango, ete bakoka kozwa, na misala mya bango, nini bakowumela na yango; mpe boye batiaki kimia o mboka mobimba.

4 Mpe babandaki lisusu kozwa bomengo mpe kokoma banene; mpe mibu mya tuku mibale na motoba mpe na sambo milekaki, mpe ezalaki malonga mpenza o mboka; mpe basalaki mibeko mya bango engebene na alima mpe boyengebene.

5 Sikawa ezalaki eloko te o mboka mobimba mpo ya kopekisa bato na bozwi bomengo ntango inso, longola se soko bakokweya o kati ya bobuki mabeko.

6 Mpe sikawa ezalaki Gidigidoni, mpe mosambisi, Lakonusi, mpe bango baye baponomoki bakambi, baye batiaka kimia eye enene o mboka.

7 Mpe esalemaki ete ezalaki bingumba mingi bitongamaki lisusu, mpe bigumba mingi bibongisamaki lisusu.

8 Mpe nzela inene mingi itongamaki, mpe nzela mingi isalemaki, iye ikambaki uta engumba na engumba, mpe uta mboka na mboka, mpe uta esika na esika.

9 Mpe boye elekaki mobu mwa tuku mibale na mwambe, mpe bato bazalaka na kimia ya ntango inso.

10 Kasi esalemaki ete o mobu mwa tuku mibale na libwa ebandaki kozala yoko boswani o ntei ya bato; mpe boko batombwanaki o lolendo mpe bifundeli na ntina ya bozwi bonene bwa bango, iyo, kutu kina o boniokoli bonene;

11 Mpo ezalaki bato ba nkita mingi o mboka, mpe lisusu basambi mingi mpe bapolisi mingi.

12 Bato babandaki kozala na bokeseni na nkondo, engebene na bomengo bwa bango, na mayele ma bango; iyo, boko bazangaki mayele na ntina ya bozangi bwa bango, mpe basusu bazwaki boyekoli bonene na ntina ya bozwi bwa bango.

13 Boko batombwanaki o lolendo, mpe basusu bazalaki basawa mpenza; boko bazongisaki bofingi na bofingi, nzokande basusu bazwaki bofingi mpe boniokwami mpe ndenge inso ya matungisi, mpe balingaki te kozongisa mpe kofinga, kasi bazalaki basawa mpe bayamboli liboso lya Nzambe.

14 Mpe boye ekomaki bokeseni bonene o mboka mobimba, mpenza ete eklezia ebandaki kobukana, iyo, mpenza ete o mobu mwa tuku misato eklezia ebukanaki o mboka mobimba longola se o ntei ya ndambo ya Balamani baye babongwanaki epai ya bondimi bwa solo; mpe balingaki te kolongwa uta o bwango, mpo bazalaki sikisiki, mpe nkonzo, mpe molende, kolingaka na etingia enso kobatela mitindo mya Nkolo.

15 Sikawa ntina ya bobe bwa bato bozalaki boye—Satana azalaki na nguya enene, mpo ya kolamusa bato mpo ya kosala ndenge inso ya bobe, mpe mpo ya kovimbisa bango ololendo, kosenginiaka bango mpo ya koluka nguya, mpe bokulaka, mpe bozwi, mpe biloko mpamba bya mokili.

16 Mpe boye Satana akambaki mitema mya bato mpo ya kosala ndenge inso ya bobe; yango wana basepelaka na kimia kasi mibu mike.

17 Mpe boye, o ebandeli ya mobu mwa tuku misato na moko—bato komitikaka mpo ya ntango yoko elai mpo ya komememe na masenginia ma zabulu wapi epai azalaki na mposa ya komeme bango, mpe kosala bobe nini azalaki na mposa basala—mpe boye o ebandeli ya eye, mobu mwa tuku misato, bakomaki na bozali boko bwa nkuna ya nsomo.

18 Sikawa basumukaki te na bozangi boyebi, ete bayebaki bolingi bwa Nzambe etali bango, mpo eteyamaka epai ya bango; yango wana batombokaki na mbe na bolingi.

19 Mpe sikawa ezalaki o ntango ya Lakonusi, mwana mobali wa Lakonusi, mpo Lakonusi akamataki kiti ya tata wa ye mpe ayangelaki bato mobu mona.

20 Mpe ebandaki kozala bato bafulamaki uta o lola, mpe batindamaki, kotelemeke o ntei ya bato o mboka mobimba, koteyaka mpe kotatolaka na mpiko masumu mpe mabe ma bato, mpe kotatolaka epai ya bango etali bosikoli boye Nkolo akosala mpo ya bato ba ye, to na maloba masusu, bosekwi bwa Klisto; mpe batatolaki na mpiko liwa mpe mpasi ya ye.

21 Sikawa ezalaki mingi ya bato baye basilikaki mpenza na ntina ya bango baye batatolaki makambo maye; mpe bango baye basilikaki bazalaki mingi basambisi bakonzi, mpe bango baye bazalaka banganga banene mpe basambi; iyo; bango banso baye bazalaki basambi basilikaki na bango baye batatolaki makambo maye.

22 Kasi ezalaki mosambi te to mosambisi te to nganga monene te oyo akokaki kozala na nguya mpo ya kokatela moto etumbu ya liwa longola se soko etumbu ekatamaki na moyangeli wa mboka.

23 Sikawa ezalaki mingi ya bango baye batatolaki makambo matali Klisto, baye batatolaki na mpiko, baye bakamatamaki mpe batiamaki o liwa na nkuku na basambisi, ete boyebi bwa liwa lya bango ekomaki te epai ya moyangeli wa mboka kina nsima ya liwa lya bango.

24 Sikawa tala, eye ezalaki ekeseni na mibeko mya mboka, ete moto abomama longola se soko bazalaka na nguya uta na moyangeli wa mboka—

25 Yango wana bofundi boko bomataki uta epai ya mboka ya Zalayemila, na moyangeli wa mboka, likolo lya basambisi baye bakatelaki etumbu baprofeta ba Nkolo mpo ya liwa, engebene te na mobeko.

26 Sikawa esalemaki ete bakamatamaki mpe bamememeki liboso lya mosambisi, mpo ya kosambisama na bobe boye basalaka, engebene na mobeko moye mopesamaka na bato.

27 Sikawa esalemaki ete basambisi bana bazalaki na baninga mpe bandeko mingi; mpe batikali, iyo, kutu penepene na basambi banso mpe banganga banene, basanganaki bangomei elongo, mpe basalaki bomoko elongo na bandeko ba basambisi bana baye basengelaki kosambisama engebene na mobeko.

28 Mpe bakotaki o kati ya boyokani bango na bango, iyo, kutu o kati ya boyokani boye bopesamaki na bango ba kala, boyokani boye bopesamaki mpe bosalemaki na zabulu, mpo ya kosanganela bosembo bonso.

29 Yango wana basanganelaki bato ba Nkolo, mpe bakotaki o kati ya boyokani boko mpo ya kobebisa bango, mpe kobikisa bango baye bazalaki na elindo ya bobomi uta o maboko ma boyengebene, boye bozalaki penepene na kosalema engebene na mobeko.

30 Mpe batiaki ntembe na mobeko mpe makoki ma ekolo ya bango; mpe basalaki boyokani bango na bango mpo ya kobebisa moyangeli, mpe kotia mokonzi moko likolo lya mboka, ete mboka ezala lisusu te na lipanda kasi eyangelama epai ya bakonzi.