Makomi
3 Nefi 12


Mokapo 12

Yesu abiangi mpe atindi bayekoli zomi na mibale—Apesi na Banefi lisukulu moko ekokani na Esakola likolo ya Ngomba—Alobeli Esengo ya bobongi nie—Mateya na ye ezali likolo mpe makeyi liboso ya mobeko ya Mose—Bato batindami kozala bato oyo babongi nie kutu lokola Ye mpe Tata na Ye bazali na bobongi nie—Meka na Matai 5. Penepene na 34 ya Mobu ya Nkolo.

1 Mpe esalemaki ete ntango Yesu asilisaki koloba maloba oyo epayi ya Nefi, mpe epayi na bango oyo babiangamaki (sikawa motango na bango oyo babiangamaki, mpe bazwaki nguya mpe likoki mpo na kobatisa, ezalaki zomi na mibale) mpe tala, asembolaki loboko na ye epayi na ebele ya bato yango, mpe agangaki epayi na bango, kolobaka: Bopambolami soki bokosala keba na maloba ya Bazomi na mibale baye naponi uta na kati na bino mpo na kosalela bino, mpe mpo na kozala basali na bino; mpe epayi na bango napesi nguya ete bakoka kobatisa bino na mai, mpe nsima soki bobatisami na mai, tala, nakobatisa bino na moto mpe na Molimo Mosantu; boye, bopambolami soki bokondima ngai mpe bokobatisama, nsima awa bomoni ngai mpe boyebi ete nazali.

2 Mpe lisusu, bapambolami mingi koleka bango oyo bakondima maloba na bino mpo bokotatola ete bomoni ngai mpe boyebi ete nazali. Iyo, bapambolami ezali bango oyo bakondima maloba na bino, mpe bakokita kati na bozindo ya bomikitisi mpe bakobatisama; mpo bakobimelama na moto mpe Molimo Mosantu, mpe bakozwa bolimbisi ya masumu na bango.

3 Iyo, bapambolami ezali babola na molimo oyo bayei epayi na ngai, mpo na bango ezali bokonzi ya lola;

4 Mpe lisusu, bapambolami ezali bango nyonso oyo bazali kolela, mpo bakobondisama.

5 Mpe bapambolami ezali basokemi, mpo bakosangola libula ya mabele.

6 Mpe bapambolami ezali bango nyonso oyo bazali na nzala mpe bazali na mposa ya boyengebene, mpo bakotondisama na Molimo Mosantu.

7 Mpe bapambolami ezali bato batonda na boboto, mpo bakozwa boboto.

8 Mpe bapambolami ezali nyonso oyo bazali peto na mitema, mpo bakomona Nzambe.

9 Mpe bapambolami ezali nyonso bapesi ya kimia, mpo bakobiangama bana ya Nzambe.

10 Mpe bapambolami ezali nyonso oyo baniokwami mpo na ntina ya nkombo na ngai, mpo bokonzi ya lola ezali ya bango.

11 Mpe bopambolami ntango bato bakofinga mpe bakonyokola bino, mpe bakoloba ndenge nyonso ya mabe ya lokuta na bino, na ntina na ngai.

12 Mpo bokozwa bosepeli monene mpe bokozala na nsai mingi koleka, mpo lifuta na bino ekozala monene na lola; mpo banyokolaki baprofeta oyo bazalaki liboso na bino se lolenge moko.

13 Solo, solo, nalobi epayi na bino, natindi bino kozala mongwa mpo na mabele; kasi soki mongwa ebungisi elengi na yango, lolenge nini ekozala elengi mpo na mabele? Mongwa ekozala bongo malamu mpo na eloko moko te, bobele mpo na kobwakama libanda mpe koniatama na nse ya makolo.

14 Solo, solo, nalobi epayi na bino, natindi bino kozala pole mpo na bato oyo. Engumba oyo etiami likolo ya ngomba ekoki kobombama te.

15 Tala, epelisaka bato buzi mpe ekotia bango yango na nse ya ekolo? Te, kasi likolo ya etembelo, mpe boye engengisi nyonso oyo bazali kati na ndako.

16 Boye, tika pole na bino engenga bongo liboso ya bato oyo, ete bamona misala malamu na bino mpe bakembela Tata na bino oyo azali na lola.

17 Bokanisa te ete nayei mpo na kobebisa mobeko mpe baprofeta. Nayei te mpo na kobebisa kasi mpo na kokokisa.

18 Mpo solo nalobi epayi na bino, nsonge moko te soki te elembo moko te ekolongwa uta na mobeko, kasi na ngai nyonso mokokisami.

19 Mpe tala, napesi bino mobeko mpe mitindo uta na Tata na ngai, ete bokondima na ngai, mpe ete bokoyambola uta na masumu na bino, mpe boya epayi na ngai, na motema moko mobukana mpe molimo moko ya mawa. Tala, bozali na mitindo liboso na bino, mpe mobeko mokokisami.

20 Boye boya epayi na ngai mpe bobikisama; mpo, solo, nalobi epayi na bino, ete longola se soki bobombi mitindo na ngai, oyo natindi bino na ntango oyo, bokoki ata moke te kokota kati na bokonzi ya lola.

21 Boyokaki ete elobami na bango ya ntango ya kala, mpe ekomami lisusu liboso na bino, ete okoboma te; ete moto nyonso oyo akoboma akozala na likama uta na bosambisi ya Nzambe.

22 Kasi nalobi epayi na bino ete moto nyonso oyo asiliki na ndeko na ye ya mobali akozala na likama ya bosambisi na ye. Mpe moto nyonso oyo akoloba epayi ya ndeko na ye ya mobali: Zoba, akozala na likama uta na likita; moto nyonso oyo akoloba, Yo moto ya liboma, akozala na likama uta na moto ya lifelo.

23 Boye, soki okoya epayi na ngai, soki te okozala na mposa ya koya epayi na ngai, mpe omikundoli ete ndeko na yo ya mobali azali na likambo songolo na yo—

24 Kende nzela na yo epayi ya ndeko na yo ya mobali, mpe zongisa yambo boyokani na ndeko na yo ya mobali, mpe nsima yaka epayi na ngai na mokano etonda ya motema, mpe nakoyamba yo.

25 Yokana noki na moyini na yo ntango ezali bino naino na nzela elongo na ye, na kobangaka ete na ntango moko akozwa yo, mpe okobwakama kati na boloko.

26 Solo, solo, nalobi epayi na yo, okobima kuna na lolenge moko te kino ofuti lomeya ya nsuka mpenza. Mpe wana ezali yo na boloko ekoki yo kofuta kutu senini moko? Solo, solo, nalobi epayi na bino, Te.

27 Tala, ekomami na bango ya ntango ya kala, ete okosala ekobo te.

28 Kasi nalobi epayi na bino ete, moto nyonso oyo atali mwasi, mpo na kolula ye, asili kosala ekobo na motema na ye.

29 Tala, napesi epayi na bino motindo moko, ete bopesa nzela moko te ete makambo oyo makota kati na mitema na bino.

30 Mpo ebongi malamu boboya makambo oyo, mpo na kosalaka oyo emonani ete bokamati ekulusu na bino, na esika ete bobwakama kati na lifelo.

31 Ekomamaki, ete moto nyonso oyo akolongola mwasi na ye, apesa mokanda ya bobomi libala.

32 Solo, solo, nalobi epayi na bino, ete moto nyonso oyo akolongola mwasi na ye, longola se mpo na ntina ya bondumba, atindi ye asala ekobo. Mpe moto nyonso oyo akobala ye oyo abomi libala asali ekobo.

33 Mpe lisusu ekomamaki, okolapa ndai te, kasi okokokisa ndai na yo epayi ya Nkolo.

34 Kasi solo, solo nalobi epayi na bino, bolapa ndai soki moke te; na lola te, mpo ezali kiti ya bokonzi ya Nzambe;

35 Na mabele mpe te, mpo ezali ebonga ya makolo na ye;

36 Okolapa ndai na moto na yo mpe te, mpo okoki kokomisa nsuki moko mwindo te soki mpembe mpe te;

37 Kasi tika ete liyebisi na yo ezala Iyo, iyo; Te, te; mpe nyonso oyo eyei mingi koleka oyo ezali mabe.

38 Mpe tala, ekomamaki, liso na liso, mpe lino na lino.

39 Kasi nalobi epayi na bino, ete bozongisa mabe na mabe te, kasi moto nyonso oyo akobete yo na litama ya mobali, balusela ye mpe litama mosusu.

40 Mpe soki moto afundi yo na mobeko mpe alongoli kazaka na yo; tika ye azwa nzambala na yo mpe lokola.

41 Mpe moto nyonso oyo asengisi yo mpo na kokende kilometele moko, kende elongo na ye bakilometele mibale.

42 Pesa na ye oyo asengi yo, mpe na ye oyo akodefa uta na yo kopekisa ye te.

43 Mpe tala ekomamaki lisusu, ete okolinga moto ya penepene na yo mpe okoyina monguna na yo.

44 Kasi tala nalobi epayi na bino, bolinga banguna na bino, pambola bango oyo balakelaka bino mabe, sala bolamu na bango oyo bayinaka bino, sambela mpo na bango oyo batalaka bino mpamba mpe banyokolaka bino.

45 Ete bokoka kozala bana ya Tata na bino oyo azali na lola, mpo ye asali ete moi na ye ebima likolo ya bato mabe mpe likolo ya bato malamu.

46 Boye makambo wana oyo ezalaki ya ntango ya kala, oyo ezalaki na nse ya mobeko, na ngai nyonso makokisami.

47 Makambo ya kala masili, mpe makambo nyonso makomi ya sika.

48 Boye nalingi ete bozala bato ya kobonga nie kutu lokola ngai to Tata na bino oyo azali na lola azali ya bobongi nie.

Bimisa na lokasa