Makomi
3 Nefi 14


Mokapo 14

Yesu atindi: Sambisani te; Sengeni na Nzambe; kebani na baprofeta ba lokuta—Alaki lobiko na bango baye bakosalaka bolingi bwa Tata—Mekisani Matai 7. Penepene na 34 ya Mobu mwa Mokonzi.

1 Mpe sikawa esalemaki ete elobaka Yesu maloba maye, abalukaki lisusu na ebele mpe afungolaki monoko mwa ye epai ya bango lisusu, kolobaka: Solo, solo, nalobi epai ya bino, sambisani te, ete bosambisama te lokola.

2 Mpo na bosambisi kani bokosambisi, bokosambisama; mpe na lomeko kani bomeki, ekomekisama na bino lisusu.

3 Ntina nini omoni lititi liye lizali o liso lya ndeko wa yo, kasi otali te libaya lizali o liso lya yomei

4 To boniboni ekoki yo koloba epai ya ndeko wa yo: Tika ngai nabenda lititi libanda lya liso lya yo, mpe tala, libaya lizali o liso lya yomei?

5 Yo mokibisi, yambo bwaka libaya libanda lya liso lya yo; mpe nde okomono polele mpo ya kobwaka lititi libanda lya liso lya ndeko wa yo.

6 Pesani te ena eye ezali esantu epai ya mbwa; mpe bwakani te mayaka ma bino liboso lya ngulu, mbele baniata mango o nse ya makolo ma bango mpe babaluka lisusu mpe bapasola bino.

7 Sengeni mpe ekopesama epai ya bino; lukani, mpe bokokuta; beteni, mpe ekofungolama epai ya bino.

8 Mpo moko onso oyo asengi, akozwa; mpe ye oyo aluki akokuta; na ye oyo abeti, ekofungolama.

9 To ezali moto kani ya bino, oyo, soko mwana mobali wa ye asengi ye limpa, akopesa ye libanga?

10 To soko asengi mbisi, akopesa ye nioka?

11 Soko bino nde, kozalaka babe, boyebi boniboni kopesa makabo malamu epai ya bana ba bino, boniboni nzike koleka Tata wa bino oyo azali o lola akopesa biloko bilamu na bango baye basengi ye?

12 Yango wana, makambo manso kani bolingi ete bato basala na bino yango, salani lokola na bango, mpo eye ezali mobeko mpe baprofeta.

13 Kotani o ekuke eke; mpo enene ezali ekuke, mpe ya etando ezali nzela, eye ekambi na bobebisami, mingi ezali baye bakei kuna.

14 Zambi eke ezali ekuke, mpe nkaka ezali nzela, eye ekambi epai ya bomoi, mpe bake bazali baye bakuti yango.

15 Kebani na baprofeta ba lokuta, baye bayei na bino na elamba ya mpate, kasi o kati bazali mbwa ya zamba ya nkanda.

16 Bokoyeba bango na mbuma ya bango. Ekosangisaka bato mbuma ya vino na nzube, to mbuma ya misuke na mibwe?

17 Kutu boye nzete elamu enso ekomemeke mbuma elamu, kasi nzete yoko ebeba ekomemeke mbuma ebe.

18 Nzete yoko elamu ekoki komeme mbuma ebe te, mpe nzete ebeba komeme mbuma elamu te.

19 Nzete enso eye ememi te mbuma elamu ekatami o nse, mpe ebwakami o kati ya moto.

20 Yango wana, na mbuma ya bango bokoyeba bango.

21 Moko onso oyo alobi epai ya ngai, Nkolo, Nkolo, akokota te o kati ya bokonzi bwa lola; kasi ye oyo asali bolingi bwa Tata wa ngai oyo azali o lola.

22 Mingi bakoloba na ngai o mokolo mona, Nkolo, Nkolo, ebikulaki biso te o nkombo ya yo mpe o nkombo ya yo ebwakaki biso te libanda zabulu, mpe o nkombo ya yo esali biso te misala mya bokamwi?

23 Mpe nde nakosakola epai ya bango, mokolo moko te nayebaki bino; longwani mosika na ngai, bino baye bosali bobe.

24 Yango wana, onso oyo ayoki maloba ma ngai mpe asali mango, nakokokisa ye na moto wa bwania, oyo atongi ndako ya ye likolo lya libanga lyoko—

25 Mpe mvula ekitaki, mpe mpela eyaki, mpe mipepe mifulaki, mpe mibeti likolo lya ndako ena; mpe ekweyaki te, mpo etongamaki likolo lya libanga lyoko.

26 Mpe moko onso oyo ayoki maloba maye ma ngai mpe asali mango te akokokisama na moto wa ligboma, oyo atongi ndako ya ye likolo lya zelo—

27 Mvula ekitaki mpe mpela eyaki, mpe mipepe mifulaki, mpe mibeti likolo lya ndako ena; mpe ekweyaki, enene ezalaki bokwei bwa yango.