Na elobeli ya kolimbola, Yesu Klisto mpe nsango malamu na Ye, oyo bazali moboko mpe likonzi (Mal&May 11:24 ; 33:12–13 ). Libanga ekoki lisusu kolobela emoniseli, na nzela ya oyo Nzambe asalaka ete nsango malamu eyebana na moto (Mat. 16:15–18 ).
Azali libanga, mosala na ye mozali ya bobongi nie, Dut. 32:4 .
Nkolo azali libanga na ngai; nakotiela ye motema, 2 Sam. 22:2–3 .
Libanga moko likatamaki na maboko te, Dan. 2:34–35 .
Etongamaki likolo ya libanga, Mat. 7:25 (3Â Nef. 14:25 ).
Yesu Klisto azali libanga oyo etiolamaki, Mis. 4:10–11 .
Libanga lina ezalaki Klisto, 1 Kol. 10:1–4 (Esod. 17:6 ).
Ye oyo atongami likolo ya libanga akozwa bosolo, 2Â Nef. 28:28 .
Bayuda bakobwaka libanga [Klisto] likolo ya oyo bakokaki kotonga, Yako. 4:15–17 .
Ezali likolo ya libanga ya Mosikoli na biso ete tosengeli kotonga moboko na biso, Elam. 5:12 .
Onso oyo atongi likolo ya malongi ya Klisto atongi likolo ya libanga na ye mpe akokweya te ntango ekoya mpela, 3 Nef. 11:39–40 (Mat. 7:24–27 ; 3 Nef. 18:12–13 ).
Moto ya bwania atongaki ndako na ye likolo ya libanga, 3Â Nef. 14:24 .
Soki otongami likolo ya libanga na ngai, mabele mpe lifelo ekolonga te, Mal&May 6:34 .
Ye oyo atongi likolo ya libanga akokweya soki moke te, Mal&May 50:44 .