Yisamaele, Mwana mobali ya Abalayama Tala lisusu Abalayama; Agala Kati na Boyokani ya Kala, mwana mobali moko ya Abalayama mpe Agala, mwasi mosali ya Salai (Gen. 16:11–16). Nkolo alakelaki na banso mibale Abalayama mpe Agala ete Yisamaele akokoma tata ya ekolo moko ya monene (Gen. 21:8–21). Liyokani eyaki na nzela ya Yisaka na esika ya Yisamaele, Gen. 17:19–21 (Gal. 4:22–5:1). Nzambe apambolaki Yisamaele ete akofuluka, Gen. 17:20. Yisamaele asalisaki mpo na kokunda Abalayama, Gen. 25:8–9. Bana mibali zomi na mibale ya Yisamaele batangamaki nkombo, Gen. 25:12–16. Yisamaele akufaki, Gen. 25:17–18. Esau akamataki mwana mwasi ya Yisamaele, Mahalata, kozala mwasi na ye, Gen. 28:9.