Makambo to mayele ya mosala oyo Nzambe azali kopesa na bato mpo na kolakisa ete eloko moko ya motuya na mosala na Ye esili kosalema to ekosalema kala mingi te. Na mikolo ya nsuka, bilembo mingi esili kosakolama mpo na Boyei ya Mibale ya Mobikisi. Bilembo oyo ezali kopesa nzela na bandimi ya sembo koyeba mwango ya Nzambe, kokebisama, mpe komilengela.
Ngomba ya ndako ya Nkolo ekotiama na nsonge ya bangomba, Yis. 2:2–3 .
Nkolo akotombola elembo mpe akosangisa Yisalaele, Yis. 5:26 (2 Nef. 15:26–30 ).
Moi mokozala molili mpe sanza ekobimisa pole te mpo na kongenga, Yis. 13:10 (Yoele 3:15 ; Mal&May 29:14 ).
Bato bakobuka mobeko mpe bakobuka liyokani ya libela, Yis. 24:5 .
Banefi bakoloba lokola mongongo moko uta na putulu, Yis. 29:4 (2Â Nef. 27 ).
Yisalaele ekosangisama na nguya, Yis. 49:22–23 (1 Nef. 21:22–23 ; 3 Nef. 20–21 ).
Nzambe akotia bokonzi moko oyo ekobebisama te, Dan. 2:44 (Mal&May 65:2 ).
Etumba, bandoto, mpe mamoni ekoya liboso ya Boyei ya Mibale, Yoele 2 .
Bikolo nyonso ekosangana mpo na kobunda na Yelusaleme, Zek. 14:2 (Ejek. 38–39 ).
Mokolo ezali koya oyo ekozika lokola fulu, Mki. 4:1 (3 Nef. 25:1 ; Mal&May 133:64 ; JS—Mambi ya Kala 1:37 ).
Makama minene makoya liboso ya Boyei ya Mibale, Mat. 24 (JS—Mat. 1 ).
Paulo alimbolaki bopengwi mpe ntango ya makama ya mikolo ya nsuka, 2 Tim. 3–4 .
Baprofeta mibale bakobomama mpe kosekwisama na Yelusaleme, Emon. 11 (Mal&May 77:15 ).
Nsango malamu ekozongisama na mikolo ya nsuka na lisalisi ya banjelu, Emon. 14:6–7 (Mal&May 13 ; 27 ; 110:11–16 ; 128:8–24 ).
Babiloni ekotiama mpe ekokweya, Emon. 17–18 .