Botangoli ezali etumbu moko ya makasi koleka ya Eklezia. Moto oyo batangoli azali lisusu mondimi ya Eklezia te. Bakambi ya Eklezia batangolaka moto uta na Eklezia bobele soki asili kopona kotambwisa bomoi na ye na lilanga to kotelemelaka mitindo ya Nkolo mpe boye amilongoli ye moko mpo na kokoba kozala mondimi kati na Eklezia.