Makomi
Mosiya 26


Mokapo 26

Bandimi mingi ya Eklezia bakambami kati na masumu na bato bazangi bondimi—Alma apesami elaka ya bomoi ya seko—Bango oyo bayamboli mpe babatisami bakozwa bolimbisi—Bandimi ya Eklezia baoyo bazali kati na masumu baoyo bayamboli mpe batubeli epayi ya Alma mpe epayi ya Nkolo bakolimbisama; soki te bakotangama te na kati ya bato ya Eklezia. Penepene na mibu 120–100 Liboso na mbotama ya Klisto.

1 Sikawa esalemaki ete ezalaki na mingi ya nkola oyo ezali komata baoyo bakokaki te kososola maloba ya mokonzi Benyamina, mpo bazalaki bana mike na ntango alobelaki bato na ye; mpe bandimaki te mimesano ya batata na bango.

2 Bandimaki te nini balobaki mpo na oyo etali bosekwi ya bakufi, mpe bandimaki te mpo na oyo etali boyei ya Klisto.

3 Mpe sikawa na ntina ya bozangi boyambi na bango bakokaki kososola liloba ya Nzambe te; mpe mitema na bango eyeisamaki makasi.

4 Mpe balingaki te kobatisama; mpe balingaki te kokangana elongo na eklezia. Mpe bazalaki bato boko bakeseni na kotalaka bondimi na bango, mpe batikalaki bongo libela nsima, kutu na ezalela na bango ya mosuni mpe ya lisumu; mpo balingaki te kobelela Nkolo Nzambe na bango.

5 Mpe sikawa na boyangeli ya Mosiya bazalaki ata ndambo ya katikati te na motango monene lokola bato ya Nzambe; kasi na ntina ya bokabwani na kati ya bandeko bandimi bango bakomaki na motango monene koleka.

6 Mpo esalemaki ete bakosaki mingi baoyo bazalaki na eklezia, na maloba na bango ya malete, mpe basalaki ete basumuka mingi; boye esengelaki ete bango oyo basalaki masumu, baoyo bazalaki na eklezia, bakebisama na eklezia.

7 Mpe esalemaki ete bamemamaki liboso ya banganganzambe, mpe bapesamaki epayi ya banganganzambe na bateyi; mpe banganganzambe bamemaki bango liboso ya Alma, oyo azalaki nganganzambe monene.

8 Sikawa mokonzi Mosiya apesaki Alma likoki likolo ya eklezia.

9 Mpe esalemaki ete Alma ayebaki te nini akosala na bango; kasi ezalaki na banzeneneke mingi kotelemelaka bango; iyo, bato batelemaki mpe batatolaki mabe na bango mingi koleka.

10 Sikawa eloko moko te ya lolenge oyo esalemaki yambo na eklezia; boye Alma azalaki na mobulu kati na molimo na ye, mpe asalaki ete bamemama liboso ya mokonzi.

11 Mpe alobaki epayi ya mokonzi: Tala, awa ezali na mingi baye tomemi liboso na yo, baye bafundami na bandeko na bango bandimi; iyo, mpe bazwamaki na masumu ya ndenge na ndenge. Mpe bayamboli masumu na bango te; boye tomemi bango liboso na yo, ete okoka kosambisa bango engebene na mabe na bango.

12 Kasi mokonzi Mosiya alobaki epayi ya Alma: Tala, nakosambisa bango te; boye napesi bango na maboko na yo mpo ete basambisama.

13 Mpe sikawa molimo ya Alma ezwamaki lisusu kati na mobulu; mpe akendaki mpe atunaki Nkolo nini asengeli kosala mpo na oyo etali likambo oyo, mpo abangaki ete asala mbeba na miso ya Nzambe.

14 Mpe esalemaki ete esilaki ye kosopa motema na ye mobimba na Nzambe, mongongo ya Nkolo eyaki na ye, kolobaka:

15 Opambolami, Alma, mpe bapambolami baoyo babatisamaki na mai ya Mormon. Opambolami na ntina ya bondimi koleka na yo bobele na maloba ya mosali na ngai Abinadi.

16 Mpe bapambolami na ntina ya bondimi koleka na bango bobele na maloba oyo olobaki epayi na bango.

17 Mpe opambolami mpo otie eklezia na kati ya bato oyo; mpe bakotiama, mpe bakozala bato na ngai.

18 Iyo, bapambolami bato oyo balingi bakomema nkombo na ngai; mpo bakobiangama na nkombo na ngai; mpe bazali na ngai.

19 Mpe lokola otunaki ngai mpo na oyo etali mobuki mobeko, opambolami.

20 Ozali mosali na ngai; mpe nasali liyokani elongo na yo ete okozwa bomoi ya seko; mpe okosalela ngai mpe okokende na nkombo na ngai, mpe okosangisa mpate na ngai esika moko.

21 Mpe ye oyo akoyoka mongongo na ngai akozala mpate na ngai; mpe ye nde okoyamba kati na eklezia, mpe ye nde nakoyamba mpe lokola.

22 Mpo tala, oyo ezali eklezia na ngai; oyo nyonso abatisami akobatisama mpo na boyamboli. Mpe oyo nyonso oyambi akondima na nkombo na ngai; mpe ye nde nakolimbisa na motema moko.

23 Mpo ezali ngai oyo nakamataka likolo na ngai masumu ya mokili; mpo ezali ngai oyo nakelaki bango; mpe ezali ngai oyo napesaki epayi na ye oyo akondima kino na nsuka esika na loboko na ngai ya mobali.

24 Mpo tala, babiangami na nkombo na ngai; mpe soki bayebi ngai bakoya, mpe bakozala na esika na loboko na ngai ya mobali seko.

25 Mpe ekosalema ete ntango kelelo ya mibale ekobeta na ntango wana nde baoyo bayebaki ngai soki moke te bakoya mpe bakotelema liboso na ngai.

26 Mpe na ntango wana bakoyeba ete nazali Nkolo Nzambe na bango, ete nazali Mosikoli na bango; kasi bakosikolama te.

27 Mpe na ntango wana nakosakola epayi na bango ete nayebi bango soki moke te; mpe bakokende kati na moto ya libela oyo molengelamaki mpo na zabulu mpe banjelu na ye.

28 Boye nalobi epayi na yo, ete ye oyo akoyoka mongongo na ngai te, se ye moko wana okoyamba te kati na eklezia na ngai, mpo nakoyamba ye te na mokolo ya nsuka.

29 Boye nalobi epayi na yo: Kende; mpe nyonso oyo akobuka mobeko na ngai, ye nde okosambisa engebene na masumu oyo asalaki; mpe soki atubeli masumu na ye liboso na yo mpe liboso na ngai, mpe ayamboli na bosolo ya motema na ye, ye nde okolimbisa, mpe ngai nakolimbisa ye mpe lokola.

30 Iyo, mpe mbala mingi lokola ekoyambola bato na ngai nakolimbisa bango mabe basali ngai.

31 Mpe bino mpe lokola bolimbisana moko mpe mosusu mabe na bino; mpo solo nalobi epayi na bino, oyo akolimbisa masumu ya moto ya penepene na ye te, ntango alobi ete ayamboli, se ye wana nde amimemi na nse ya bokweisami.

32 Sikawa nakoloba epayi na yo, Kende; mpe nyonso oyo akoyambola te uta na masumu ya se ye wana akotangama te na kati ya bato na ngai; mpe oyo esengeli kotosama uta na ntango oyo mpe kokende liboso.

33 Mpe esalemaki ete ntango Alma ayokaki maloba oyo akomaki yango ete akoka kozala na yango, mpe ete akoka kosambisa bato ya eklezia wana engebene na mitindo ya Nzambe.

34 Mpe esalemaki ete Alma akendaki mpe asambisaki baoyo bazwamaki na mabe, engebene na liloba ya Nkolo.

35 Mpe nyonso oyo bayambolaki masumu na bango mpe batubelaki yango, atangaki bango na kati ya bato ya eklezia;

36 Mpe bango oyo balingaki te kotubela masumu na bango mpe koyambola mabe na bango, se bango wana batangamaki te na kati ya bato ya eklezia, mpe nkombo na bango elongolamaki.

37 Mpe esalemaki ete Alma abongisaki makambo nyonso ya eklezia; mpe babandaki lisusu kozala na kimia mpe kofuluka koleka mpenza na makambo ya eklezia, kotambolaka na bokebi liboso ya Nzambe, koyambaka mingi, mpe kobatisaka mingi.

38 Mpe sikawa makambo oyo nyonso nde esalaki Alma mpe baninga na ye basali baoyo bazalaki likolo ya eklezia, kotambolaka na molende, kolakisaka liloba ya Nzambe na makambo nyonso, koyokaka ndenge nyonso ya mitungisi, konyokwamaka na bango oyo bazalaki ya eklezia ya Nzambe te.

39 Mpe bakebisaki bandeko na bango bandimi; mpe lisusu bakebisamaki, moto na moto na liloba ya Nzambe, engebene na masumu na ye, soki te na masumu oyo asalaki, kotindamaka na Nzambe mpo na kosambela na kolemba te, mpe mpo na kopesa matondi na makambo nyonso.

Bimisa na lokasa