Makomi
Moziya 9


Likundoli lya Zenifi—Nsango ya bato ba ye, uta o ntango batikaki mboka ya Zalayemila kina o ntango babikisamaki libanda lya maboko ma Balamani.

Kokwaka mikapo 9 o 22 eye o kati.

Mokapo 9

Zenifi akambi lingomba lyoko uta o Zalayemila mpo ya kozwa mboka ya Lehi-Nefi—Mokonzi wa Balamani apesi bango ndingisa ya kosangola mboka—Ezali etumba o kati ya Balamani mpe bato ba Zenifi. Penepene na 200–187 Yambo ya Klisto.

1 Ngai, Zenifi, elakisamaki ngai o nkota enso ya Banefi, mpe ezwaki ngai boyebi bwa mboka ya Nefi, to mboka ya lisango lya yambo lya batata ba biso, mpe etindamaki ngai lokola monongi o ntei ya Balamani ete nakoka konongo makasi ma bango, ete limpinga lya biso likoka koya likolo lya bango mpe kobebisa bango—kasi emonoki ngai bolamu boye bozali o ntei ya bango nazakalaki te na mposa ete babebisama.

2 Yango wana, naswanaki na bandeko ba ngai o esobe, mpo nalingaki ete moyangeli wa biso asala boyokani elongo na bango; kasi ye kozalaka moto wa monkete mpe wa mposa-ya-makila atindaki ete nabomama; kasi nabikisamaki na bosopi bwa makila maike; mpo tata abundaki na tata, mpe ndeko mobali na ndeko mobali, kina motango monene mwa limpinga lya biso libebisamaki o esobe; mpe tozongaki, baye ba biso baye babikisamaki, o mboka ya Zalayemila, mpo ya kosangela lisapo lina na basi ba bango mpe bana ba bango.

3 Mpe nzokande, ngai kozalaka na mpila mingi koleka mpo ya kosangola mboka ya batata ba biso, nasangisaki mingi lokola bazalaki na mposa ya kokende kokamata mboka yango, mpe tobandaki lisusu mobembo mwa biso o kati ya esobe mpo ya kokende o mboka; kasi tobetemeki na nzala mpe matungisi ma nsomo; mpo tozalaki malembe na komikundola Nkolo Nzambe wa biso.

4 Nzokande, nsima ya mikolo mingi ya koyengayengaka o esobe totelemisaki biema bya biso o esika eye bandeko ba biso babomamaki, eye ezalaki penepene na mboka ya batata ba biso.

5 Mpe esalemaki ete nakendeki lisusu elongo na inei ya bato ba ngai o kati ya engumba, o kati epai ya mokonzi, ete nakoka koyeba meko ya mokonzi, mpe ete nakoka koyeba soko nakokaki kokota elongo na bato ba ngai mpe kokamata mboka na kimia.

6 Mpe nakotaki epai ya mokonzi, mpe ayokanaki elongo na ngai ete nakoka kozwa mboka ya Lehi-Nefi, mpe engumba ya Silomi.

7 Mpe lisusu atindaki ete bato ba ye bakende libanda lya mboka, mpe ngai mpe bato ba ngai tokendeki o kati ya mboka ete tokoka kokamata yango.

8 Mpe tobandaki kotonga ndako, mpe kobongisa bifelo bya engumba, iyo, kutu bifelo bya engumba ya Lehi-Nefi, mpe ya engumba ya Silomi.

9 Mpe tobandaki kokona bilanga, iyo, kutu na lolenge na lolenge ya nkona, na nkona ya masangu, mpe ya seboloni, mpe ya loso, mpe na neya, mpe na seumi, mpe na nkona ya mbuma ya lolenge na lolenge; mpe tobandaki koyikana mpe kozwa bomengo o mboka.

10 Sikawa ezalaki mayele mabe mpe angile ya mokonzi Lamani, mpo ya komeme bato ba ngai o kati ya bowumbu, ete atika mboka ete tokoka kozwa yango.

11 Yango wana esalemaki ete, esilaki biso kofanda o mboka mpo ya ntaka ya mibu zomi na mibale mokonzi Lamani abandaki kokoma mingi na nkaka, mbele o lolenge loko to losusu bato ba ngai bayika bokasi o mboka, mpe ete bakoka te kolonga bango mpe komeme bango o kati ya bowumbu.

12 Sikawa bazalaki bato ba goigoi mpe basambeli bikeko; yango wana bazalaki na mposa ya komeme biso o kati ya bowumbu, ete bakoka komitondisa mabumu na misala mya maboko ma biso; iyo, ete bakoka komisalela limpati na bibwele bya bilanga bya biso.

13 Yango wana esalemaki ete mokonzi Lamani abandaki kolamusa bato ba ye ete baswana na bato ba ngai; yango wana ezalaki bitumba mpe boweli o mboka.

14 Mpo, o mobu mwa zomi na misato ya bokonzi bwa ngai o mboka ya Nefi, mosika o sudi ya mboka ya Silomi, ezalaki bato ba ngai komelisa mpe koleisa bibwele bya bango, mpe kokona bilanga bya bango, limpinga linene lya Balamani liyaki likolo lya bango mpe babandaki koboma bango, mpe kobotola bibwele bya bango, mpe masangu ma bilanga bya bango.

15 Iyo, mpe esalemaki ete bakimaki, baye banso bakangemaki te, kutu o kati ya mboka ya Nefi, mpe babiangaki ngai mpo ya bobatelami.

16 Mpe esalemaki ete nalatisaki bango mandoki na matimbo, mpe na makula, na mipanga, mpe na nsendo, mpe na nzete, mpe na bilingongo, mpe mandoki ma lolenge na lolenge maye tokokaki kosala, mpe ngai mpe bato ba ngai tokendeki kobunda na Balamani.

17 Iyo, o makasi ma Nkolo tokendeki kobunda na Balamani; mpo ngai mpe bato ba ngai tobelelaki na bokasi na Nkolo ete abikisa biso libanda lya maboko ma bayini ba biso, mpo tolamusamaki o bokundoli bwa libiki lya batata ba biso.

18 Mpe Nzambe ayokaki ebelela ya biso mpe ayanolaki nsambo ya biso; mpe tokendeki na nguya ya ye; iyo, tokendeki kobunda na Balamani, mpe o mokolo moko mpe butu yoko tobomaki nkoto isato na ntuku inei na isato; tobomaki bango kutu kina tobenganaki bango libanda lya mboka ya biso.

19 Mpe ngai, ngaimei, na maboko ma ngaimei, nasalisaki mpo ya kokunda bakufi ba bango. Mpe tala, na mawa manene mpe boleli bwa biso, nkama ibale mpe ntuku sambo na libwa ya bandeko ba biso babomamaki.