Makomi
Moziya 7


Mokapo 7

Amona akuti mboka ya Lehi-Nefi esika Limiyi azali mokonzi—Bato ba Limiyi bazali o kati ya bowumbu na Balamani—Limiyi asangeli mambi ma bango—Profeta moko (Abinadi) atatolaki ete Klisto azali Nzambe mpe Tata wa biloko binso—Bango Baye bakoni bosoto bakobuka ekumbaki, mpe baye batii elikia ya bango na Nkolo bakobikisama. Penepene na 121 Yambo ya Klisto.

1 Mpe sikawa, esalemaki ete esilaka mokonzi Moziya kozala na kimia ya ntango inso mpo ya ntaka ya mibu misato, azalaki na mposo ya koyeba etali bato baye bakendeki kofanda o mboka ya Lehi-Nefi, to o engumba ya Lehi-Nefi; mpo bato ba ye bayokaka likambo te uta o ntango batikaki mboka ya Zalayemila; yango wana, balembisaki ye na matungisi ma bango.

2 Mpe esalemaki ete mokonzi Moziya apesaki ndingisa ete zomi na motoba ya babali bakasi ba bango bakoka komata o mboka ya Lehi-Nefi, mpo ya koluka etali bandeko ba bango.

3 Mpe esalemaki ete o mokolo mwa nsima babandaki komata, ezalaki elongo na bango Amona moko, ye kozakaka moto moko mokasi mpe wa nguya, mpe eboto moko ya Zalayemila; mpe azalaki lisusu mokambi wa bango.

4 Mpe sikawa, bayebaki te botamboli kani bakolanda o esobe mpo ya komata o mboka ya Lehi-Nefi; yango wana bayengayengaki mikolo mingi o esobe, kutu mikolo ntuku minei bayengayengaki.

5 Mpe eyengayengaka bango mikolo ntuku minei bakomaki o ngomba patalalu yoko, eye ezali o nordi ya mboka ya Silomi, mpe kuna batelemisaki biema bya bango.

6 Mpe Amona akamataki bandeko ba ye basato, mpe nkombo ya bango ezalaki Amaleki, Heleme, mpe Emi, mpe bakitaki o mboka ya Nefi.

7 Mpe tala, bakutanaki na mokonzi wa bato baye bazalaki o mboka ya Nefi, mpe o mboka ya Silomi; mpe bazingamaki na bakengeli ba mokonzi, mpe bakamatamaki, mpe bakangemaki, mpe batiamaki o boloko.

8 Mpe esalemaki ete ezalaki bango o boloko mikolo mibale bamememeki lisusu liboso lya mokonzi, mpe nkanga ya bango ekangolamaki; mpe batelemeki liboso lya mokonzi, mpe bazwaki ndingisa, to nde batindamaki, ete bayanola mituna miye akotuna bango.

9 Mpe alobaki epai ya bango: Tala, nazali Limiyi, mwana wa Noa, oyo azalaki mwana mobali wa Zenifi, oyo awutaki o mboka ya Zalayemila mpo ya kosangola mboka eye, eye ezalaki mboka ya batata ba bango, oyo aponomoki mokonzi na mokano mwa bato.

10 Mpe sikawa, nazali na mposa ya koyeba ntina na yango bozalaki boye na bobangi te na koya mpembeni ya bifelo bya engumba eye, ezalaki, ngaimei, elongo na bakengeli ba ngai libanda lya ekuke?

11 Mpe sikawa, mpo ya ntina eye natikaki ete bobatelama, ete nakoka kotuna na bino, soko te nalingaki kosala ete bakengeli ba ngai baboma bino. Bozali na ndingisa ya koloba.

12 Mpe sikawa, emonoki Amona ete azalaki na ndingisa ya koloba, abelemeki mpe agumbamaki liboso lya mokonzi; mpe kotelemeke lisusu alobaki: O mokonzi, natondi yo mingi liboso lya Nzambe mokolo moye ete nazali naino na bomoi, mpe nazali na ndingisa mpo ya koloba; mpe nakosala makasi mpo ya koloba na mpiko mpenza;

13 Mpo nayebi na ntembe te ete soko oyebaka ngai olingaki kondima te nalata nkanga iye. Mpo nazali Amona, mpe nazali eboto moko ya Zalayemila, mpe namataki libanda lya mboka ya Zalayemila mpo ya koluka etali bandeko ba biso, baye Zenifi amemeki libanda lya mboka ena.

14 Mpe sikawa, esalemaki ete esilaka Limiyi koyoka maloba ma Amona, azalaka na bosepeli mpenza, mpe alobaki: Sikawa, nayebi na ntembe te ete bandeko ba ngai baye bazalaki o mboka ya Zalayemila bazali naino na bomoi. Mpe sikawa, nakosepela; mpe o mokolo mwa nsima nakosala ete bato ba ngai basepela lokola.

15 Mpo tala, tozali o bowumbu na Balamani, mpe bakateli biso mpako yoko eye ezali mpasi na komeme. Mpe sikawa, tala, bandeko ba biso bakobikisa biso libanda lya bowumbu boye, to libanda lya maboko ma Balamani, mpe tokozala bawumbu ba bango; mpo eleki bolamu mingi ete tozala bawumbu ba Banefi o esika ya kofuta mpako na mokonzi wa Balamani.

16 Mpe sikawa, mokonzi Limiyi atindaki bakengeli ba ye ete bakanga lisusu Amona to bandeko ba ye te, kasi asalaki ete bakende o ngomba patalalu eye ezalaki o nordi ya Silomi, mpe bameme bandeko ba bango o kati ya engumba, ete kuna bakoka kolia, mpe komele, mpe komipemisa o misala mpe mobembo mwa bango; mpo bayokaki mpasi ya makambo mingi; bayokaki mpasi ya nzala, mposa ya mai, mpe bolembi.

17 Mpe sikawa, esalemaki ete o mokolo mwa nsima mokonzi Limiyi atindaki esakola yoko o ntei ya bato ba ye banso, ete na yango bakoka kosangana bangomei elongo o tempelo, mpo ya koyoka maloba maye akoloba epai ya bango.

18 Mpe esalemaki ete esanganaki bangomei elongo alobaki epai ya bango o lolenge loye, kolobaka: O bino, bato ba ngai, tombolani mito mya bino mpe bondisamani; mpo tala, ntango ezali mosika te, to ezali penepene, ekozala biso lisusu te o boyangelami bwa bayini ba biso, ata bitumba mingi bya biso, biye bizalaki na mpamba; nzokande nalikii etikali etumba yoko elamu ya kosala.

19 Yango wana, tombolani mito mya bino, mpe sepelani, mpe tiani elikia ya bino na Nzambe, na Nzambe ona oyo azalaki Nzambe wa Abalayama, mpe Yisaka, mpe Yakobo; mpe lisusu, Nzambe ona oyo amemeki bana ba Yisalaele libanda lya mboka ya Ejipito, mpe asalaki ete batambola o katikati ya Mbu Etane o mabele makauka, mpe aleisaki bango na mana ete bakoka kokufa te o esobe; mpe makambo mingi lisusu asalaki mpo ya bango.

20 Mpe lisusu, Nzambe ona kaka amemeki batata ba biso libanda lya mboka ya Yelusaleme, mpe abombaki mpe abateli bato ba ye kina sikawa; mpe tala, ezali na ntina ya mabe mpe bonsomo bwa biso ete amemeki biso o kati ya bowumbu.

21 Mpe bino banso bozali banzeneneke mokolo moye, ete Zenifi, oyo aponomoki mokonzi likolo lya bato baye, ye kozalaka na mpila koleka mpo ya kozwa mboka ya batata ba ye, yango wana ekosamaki ye na mayele mabe mpe angile ya mokonzi Lamani, oyo akotaki o kati ya boyokani elongo na mokonzi Zenifi, mpe atikaki o kati ya maboko ma ye bozwi bwa eteni yoko ya mboka, to kutu engumba ya Lehi-Nefi, mpe engumba ya Silomi; mpe mboka ya zingazinga mpembeni—

22 Mpe enso eye asalaki, bobele mpo ya mwango mwa komeme bato baye o kati ya boyangelami to bowumbu. Mpe tala, o ntango eye tozali kofuta mpako na mokonzi wa Balamani, na motuya mwa katikati yoko ya masangu ma biso, mpe loso la biso, mpe kutu mboto ya biso inso ya lolenge na lolenge, mpe katikati yoko ya ebakisi ya bibwele mpe bitonga bya biso; mpe kutu katikati yoko ya enso eye tozali na yango to tozwi, mokonzi wa Balamani asengi biso, to bomoi bwa biso.

23 Mpe sikawa, ezali eye mpasi te mpo ya komeme? Mpe ezali eye te, matungisi ma biso manene? Sikawa tala, boniboni enene tozali na ntina mpo ya kolela.

24 Iyo, nalobi epai ya bino, enene ezali ntina tozali na yango mpo ya kolela; mpo tala boniboni mingi ya bandeko ba biso babomami, mpe makila ma bango masopanaki na mpamba, mpe enso na ntina ya bobe.

25 Mpo soko bato baye bakweyaki te o kati ya bobuki mobeko Nkolo alingaki kotika te ete mabe maye manene maya likolo lya bango. Kasi tala, balingaki te koyokemela epai ya maloba ma ye; kasi babimisaki boweli o ntei ya bango, kutu boye nzike ete basopaki makila o ntei ya bangomei.

26 Mpe profeta moko wa Nzambe babomaki; iyo, moto moko aponomo na Nzambe, oyo alobelaki epai ya bango nkuna mpe bonsomo bwa bango, mpe abikulaki makambo mingi maye makoya, iyo, kutu boyei bwa Klisto.

27 Mpe mpo alobaki epai ya bango ete Klisto azalaki Nzambe, Tata wa biloko binso, mpe alobaki ete akokamata elili ya bomoto, mpe ekozala elili nsima ya yango moto akelamaki na ebandeli; to na elobeli esusu, alobaki ete moto akelamaki na elili ya Nzambe, mpe ete Nzambe akokita o ntei ya bana ba bato, mpe akolata nzoto ya mosuni mpe makila, mpe akotambola likolo lya etando ya mabele—

28 Mpe sikawa, zambi alobaki eye, babomaki ye; mpe makambo mingi lisusu basalaki maye mamemeki o nse nkele ya Nzambe likolo lya bango. Yango wana, nani akokamwa ete bazali o kati ya bowumbu, mpe ete babetemi na matungisi ma nsomo?

29 Mpo tala, Nkolo alobaki: Nakosalisa bato ba ngai te o mokolo mwa bobuki mobeko bwa bango; kasi nakokanga nzela ya bango ete bazwa bomengo te; mpe misala mya bango mikozala lokola libanga lya libaku liboso lya bango.

30 Mpe lisusu, alobaki: Soko bato ba ngai bakoni bosoto bakobuka mpumbulu o ekumbaki; mpe ekomi ya yango ezali ngenge.

31 Mpe lisusu alobaki: Soko bato ba ngai bakoni bosoto bakobuka mopepe mwa esti, moye mokomeme bobebisami bwa sasaipi.

32 Mpe sikawa, tala, elako ya Nkolo ekokisami, mpe bobetemi mpe botungisami.

33 Kasi soko bozongi o Nkolo na mokano motonda mwa motema, mpe botii elikia ya bino na ye, mpe bosaleli ye na etingia enso ya makanisi, soko bosali eye, engebene na bolingi bwa yemei mpe elengi ya yemei, akobikisa bino libanda lya bowumbu.