Makomi
Mosiya 16


Mokapo 16

Nzambe asikoli bato uta na ezalela na bango ya libunga mpe ya bokwei—Bango oyo bazali bato ya mosuni bakotikala lokola soki bosikoli ezalaki te—Klisto akokokisa bosekwi mpo na kozwa bomoi bozanga nsuka to bokweisami bozanga nsuka. Penepene na mobu 148 Liboso na mbotama ya Klisto.

1 Mpe sikawa, esalemaki ete esilaki Abinadi koloba makambo oyo, asembolaki loboko na ye mpe alobaki: Ntango ekoya wapi bato nyonso bakomona lobiko ya Nkolo; ntango wapi ekolo na ekolo, libota na libota, monoko na monoko, mpe bato na bato bakomona miso na miso mpe bakondima liboso ya Nzambe ete masambisi na ye ezali alima.

2 Mpe nde bato ya nkuna bakobwakama libanda, mpe bakozala na ntina ya koganga, mpe ya kolela-lela, mpe ya komilela-lela, mpe ya koliana mino na bango; mpe oyo mpo balingi te koyokela mongongo ya Nkolo; boye Nkolo akosikola bango te.

3 Mpo bazali bato ya mosuni mpe bato ya zabulu, mpe zabulu azali na nguya likolo na bango; iyo, kutu nioka oyo ya kala oyo akosaki baboti na biso ya yambo, oyo azalaki ntina ya bokwei na bango; oyo asalaki ete bato nyonso bakoma bato ya mosuni, bayokeli bilengi, ya zabulu, koyebaka bolamu mpe mabe, komiyangelaka bango moko na zabulu.

4 Boye bato nyonso babungaki; mpe tala, balingaki kobunga libela soki ezalaka te ete Nzambe asikolaki bato na ye uta na ezalela na bango ya libunga mpe bokwei.

5 Kasi bomikundola ete ye oyo akolenda na ezalela na ye ya mosuni, mpe azali kokoba na banzela ya masumu mpe botomboki na Nzambe, akotikala na ezalela na ye ya bokwei mpe zabulu akozala na nguya nyonso likolo na ye. Boye azali lokola soki bosikoli esalemaki te, kozalaka monguna ya Nzambe; mpe lokola ezali zabulu monguna ya Nzambe.

6 Mpe sikawa soki Klisto ayaki te kati na mokili, kolobaka makambo ekoya lokola soki esilaki koya, ekokaki kozala na bosikoli te.

7 Mpe soki Klisto asekwaki te uta na bakufi, to soki akataki singa ya liwa te ete lilita ezala na elonga te, mpe ete liwa ezala na esweli te, bosekwi ekokaki kozala te.

8 Kasi ezali na bosekwi, boye lilita ezali na elonga te, mpe esweli ya liwa emelami nie na Klisto.

9 Azali pole mpe bomoi ya mokili; iyo, pole oyo ezanga nsuka, oyo ekoki kokoma molili ata mokolo moko te; iyo, mpe lisusu bomoi oyo ezanga nsuka, ete liwa ekoka kozala lisusu te.

10 Kutu nzoto oyo ya kufa ekolata bozangi kufa, mpe bopoli ekolata bozangi kopola, mpe bakomemama mpo na kotelema liboso ya esambiselo ya Nzambe, mpo na kosambisama na ye engebene na misala na bango soki ezali malamu to soki ezali mabe—

11 Soki ezali malamu, na bosekwi ya bomoi mpe esengo ezanga nsuka; mpe soki ezali mabe, mpo na bosekwi ya bokweisami ezanga nsuka, mpe bapesami na zabulu, oyo ayangelaki bango, oyo ezali bokweisami—

12 Ekendaki bango engebene na bolingi mpe mposa ya mosuni na bango moko; kobelelaka Nkolo ata mokolo moko te wana etandamaki maboko ya boboto epayi na bango; mpo maboko ya boboto etandamaki epayi na bango, mpe balingaki te; lokola bakebisamaki na mabe na bango mpe nzokande balingaki te kokabwana na yango; mpe batindamaki koyambola mpe nzokande balingaki koyambola te.

13 Mpe sikawa, esengeli bino te kolenga mpe koyambola masumu na bino, mpe komikundola ete bobele kati na Klisto mpe na nzela ya Klisto nde bokoki kobikisama?

14 Boye, soki boteyi mobeko ya Mose, boteya lisusu ete mozali elilingi ya makambo wana esengeli koya—

15 Teya bango ete bosikoli ekoya na nzela ya Klisto Nkolo, oyo azali mpenza Tata ya Seko. Amene.

Bimisa na lokasa