Makomi
Moziya 21


Mokapo 21

Bato ba Limiyi babetemi mpe balongami na Balamani—Bato ba Limiyi bakutani na Amona mpe babongwani—Balobeli Amona etali ntuku mibale na minei ya palaki ya Bayelede. Penepene na 122–121 Yambo ya Klisto.

1 Mpe esalemaki ete Limiyi mpe bato ba ye bazongaki o engumba ya Nefi, mpe babandaki kofanda o mboka na kimia lisusu.

2 Mpe esalemaki ete nsima ya mikolo mingi Balamani babandaki lisusu kolamusama na nkanda na Banefi, mpe babandaki lisusu koya o kati ya ndelo ya mboka zingazinga mpembeni.

3 Sikawa bamekaki te koboma bango, na ntina ya ndai eye mokonzi wa bango alapaka epai ya Limiyi; kasi babeteki bango na matama ma bango, mpe basalelaki bokulaka likolo lya bango; mpe babandaki kotia bango mikumba mya bozito likolo lya mikongo mya bango, mpe komeme bango lokola bakosala mpunda yoko baba—

4 Iyo, enso eye esalemaki mpo ete liloba lya Nkolo likokisama.

5 Mpe sikawa matungisami ma Banefi mazalaki manene, mpe ezalaki nzela te eye bakokaki komibikisa libanda lya maboko ma bango, mpo Balamani bazingaki bango epai na epai.

6 Mpe esalemaki ete bato babandaki koyimayima na mokonzi na ntina ya matungisi ma bango; mpe babandaki kozala na mposa ya kokende likolo lya bango mpo ya kobunda. Mpe batungisaki mokonzi mpenza na boleli bwa bango; yango wana apesaki ndingisa epai ya bango ete basala engebene na mposa ya bango.

7 Mpe basanganaki lisusu bangomei elongo, mpe balataki ebundele ya bango, mpe bakendeki likolo lya Balamani mpo ya kobengana bango libanda lya mboka ya bango.

8 Mpe esalemaki ete Balamani babeteki bango, mpe bazongisaki bango nsima, mpe babomaki mingi ya bango.

9 Mpe sikawa ezalaki eleli mpe boleli bonene o ntei ya bato ba Limiyi, bazenge kolelaka mpo ya babali ba bango, bana babali mpe bana basi kolelaka mpo ya batata ba bango, mpe bandeko mpo ya bandeko ba bango.

10 Sikawa ezalaki bazenge mingi mpenza o mboka, mpe bazalaki kobelela na bokasi mokolo na mokolo, mpo ya bobangi bonene bwa Balamani boyaka likolo lya bango.

11 Mpe esalemaki ete eleli ya bango ya ntango inso elamusaki etikali ya bato banso ba Limiyi na nkanda na Balamani; mpe bakendeki lisusu mpo ya kobunda, kasi babenganamaki nsima lisusu, koyokaka mpasi ya bobungisi nzike.

12 Iyo, bakendeki lisusu mbala ya isato, mpe bayokaki mpasi na lolenge loko; mpe bango baye bakufaki te bazongaki lisusu o engumba ya Nefi.

13 Mpe bamikitisaki kutu o mputulu, na koyangelamaka bangomei na nkanga ya bowumbu, komitikaka bangomei mpo ya kobeteme, mpe kobenganama epai na epai, mpe komemisama mikumba, engebene na mposa ya bayini ba bango.

14 Mpe bamikitisaki kutu o bozindo bwa bosawa; mpe babelelaki makasi na Nzambe; iyo, kutu bolai bwa mokolo mobimba balelaki na Nzambe wa bango ete abikisa bango na matungisi ma bango.

15 Mpe sikawa Nkolo azalaki malembe na koyoka ebelela ya bango na ntina ya masumu ma bango; nzokande Nkolo ayokaki ebelela ya bango, mpe abandaki kolembisa mitema mya Balamani ete babandaki kokomisa pepele mikumba mya bango; nzokande Nkolo amonoki te elongobani kobikisa bango libanda lya bowumbu.

16 Mpe esalemaki ete babandaki kozwa bomengo moke moke o mboka, mpe babandaki lisusu kokolisa mboto mingi koleka, mpe bibwele, mpe bitonga, ete bayokaki te mpasi ya nzala.

17 Sikawa ezalaki motango monene mwa basi, mingi koleka moye mozalaki mwa babali; yango wana mokonzi Limiyi atindaki ete mobali moko na moko akaba eteni ya lisalisi na basi bazenge mpe bana ba bango, ete bakoka kowa te na nzala; mpe eye basalaki na ntina ya bonene bwa motango moye babomamaka.

18 Sikawa bato ba Limiyi bamibombaki elongo na lingomba lyoko lokola mpenza ekokaki, mpe babatelaki mboto ya bango mpe bibwele bya bango.

19 Mpe mokonzi yemei andimaki te bomoto bwa ye libanda lya bifelo bya engumba, longola se soko amemeki bakengeli ba ye elongo na ye, kobangaka ete akoka na lolenge loko to losusu kokweya o kati ya maboko ma Balamani.

20 Mpe asalaki ete bato ba ye basenzele mboka zingazinga mpembeni, ete na lolenge loko to losusu bakoka kokamata banganga baye bakimaki o kati ya esobe, baye bayibaki bana basi ba Balamani, mpe baye basalaka bobebisami bwa lolenge loye loya likolo lya bango.

21 Mpo bazalaki na mposa ya kakamata bango ete bakoka kotumbola bango; mpo bazalaka koya o kati ya mboka ya Nefi o butu, mpe komeme mosika mboto ya bango mpe mingi ya biloko bya motuya bya bango; yango wana babatamaki kozila bango.

22 Mpe esalemaki ete ezalaki mbilingambilinga lisusu te o kati ya Balamani mpe bato ba Limiyi, kutu kina o ntango Amona mpe bandeko ba ye bayaki o kati ya mboka ya bango.

23 Mpe mokonzi ezalaki ye libanda lya ekuke ya engumba elongo na mokengeli wa ye, abombolaki Amona mpe bandeko ba ye; mpe kobanzaka ete bango bazalaki banganga ba Noa yango wana asalaki ete bakamatama, mpe bakangema, mpe babwakama o kati ya boloko. Mpe ezalaka bango banganga ba Noa alingaki kosala ete bapesa bango liwa.

24 Kasi amonoki ete ezalaki bango te, kasi ete bazalaki bandeko ba ye, mpe bayaka uta o mboka ya Zalayemila, atondisamaki na bosepeli bonene mpenza.

25 Sikawa mokonzi Limiyi atindaki, yambo ya boyei bwa Amona, motango moke ya bato mpo ya koluka mboka ya Zalayemila; kasi bakokaki te komono yango, mpe babungaki o esobe.

26 Nzokande, bamonoki mboka yoko eye ezalaka na bato; iyo, mboka eye etondisamaki na mikuwa mikauka; iyo, mboka yoko eye ezalaka na bato mpe eye ebebisamaka; mpe bango, ebanzaki bango ezalaki mboka ya Zalayemila, bazongaki o mboka ya Nefi, ekomaki bango o ndelo ya mboka mikolo mingi te yambo ya boyei ya Amona.

27 Mpe bamemeki likundoli lyoko elongo na bango, kutu likundoli lyoko lya bato ya bango mikuwa bamonoko; mpe likomamaki likolo lya palaki ya makele.

28 Mpe sikawa Limiyi atondisamaki lisusu na bosepeli na koyokaka uta o monoko mwa Amona ete mokonzi Moziya azalaka na likabo lyoko uta na Nzambe, na wapi akokaki kolimbola minkoma mya lolenge loye; iyo, mpe Amona lisusu asepelaki.

29 Kasi Amona mpe bandeko ba ye batondisamaki na mawa zambi bandeko ba bango mpenza babomamaka;

30 Mpe lisusu ete mokonzi Noa mpe banganga ba ye basalaki ete bato basala masumu mpe mabe mpenza na Nzambe; mpe balelaki lisusu mpo ya liwa lya Abinadi; mpe lisusu mpo ya bokei bwa Alama mpe bato ba ye bakendeki elongo na ye, baye babongisaki eklezia ya Nzambe na makasi mpe nguya ya Nzambe, mpe bondimi na maloba maye Abinadi alobaka.

31 Iyo, balelaki mpo ya bokei bwa bango, mpo bayebaki te wapi bakimaka. Sikawa balingaki na bosepeli kokangana elongo na bango, mpo bangomei bakotaki o kati ya boyokani elongo na Nzambe mpo ya kosalela ye mpe kobatela mitindo mya ye.

32 Mpe sikawa uta o boyei bwa Amona, mokonzi Limiyi akotaki o kati ya boyokani elongo na Nzambe, mpe lokola mingi ya bato ba ye, mpo ya kosalela ye mpe kobatela mitindo mya ye.

33 Mpe esalemaki ete mokonzi Limiyi mpe mingi ya bato ba ye bazalaki na mposa ya kobatisama; kasi moko te azalaki o mboka oyo azalaka na bokulaka uta na Nzambe. Mpe Amona aboyaki kosala likambo liye, komaniolaka yemei ete azalaki mosali moko alongobani te.

34 Yango wana o ntango ena bamitiaki te o kati ya eklezia yoko, kozilaka Molimo mwa Nkolo. Sikawa bakomaki na mposa ya kokoma kutu lokola Alama mpe bandeko ba ye, baye bakimaki o kati ya esobe.

35 Bazalaki na mposa ya kobatisama lokola elembo mpe litatoli ete bazalaki kolingaka kosalela Nzambe na motema mwa bango mobimba; nzokande babendaki ntango elai; mpe nsango yoko ya libatisi lya bango likopesama nsima.

36 Mpe sikawa boyekoli bonso bwa Amona mpe bato ba ye, mpe mokonzi Limiyi mpe bato ba ye, bozalaki mpo ya komibikisa libanda lya maboko ma Balamani mpe uta o bowumbu.