Makomi
Mosiya 24


Mokapo 24

Amuloni anyokoli Alma mpe bato na ye—Basengeli kopesama liwa soki basambeli—Nkolo asali ete mokumba na bango momonana pepele—Akangoli bango uta na boumbu, mpe bazongi na Zalayemila. Penepene na mibu 145–120 Liboso na mbotama ya Klisto.

1 Mpe esalemaki ete Amuloni azwaki lisungi na miso ya mokonzi na Balamani; boye, mokonzi ya Balamani apesaki ndingisa epayi na ye mpe bandeko na ye ete baponama balakisi likolo ya bato na ye, iyo, kutu likolo ya bato oyo bazalaki na mboka ya Semiloni, mpe na mboka ya Silomi, mpe na mboka ya Amuloni.

2 Mpo Balamani bazwaki mboka oyo nyonso; boye, mokonzi ya Balamani aponaki bakonzi likolo ya bamboka oyo nyonso.

3 Mpe sikawa nkombo ya mokonzi ya Balamani ezalaki Lamani, abiangamaki na nkombo ya tata na ye; mpe boye abiangamaki mokonzi Lamani. Mpe azalaki mokonzi likolo ya bato ya motango monene.

4 Mpe aponaki balakisi uta na kati ya bandeko ya Amuloni na mboka na mboka oyo ezwamaki na bato na ye; mpe boye lokota ya Nefi ebandaki koteyama na kati ya bato nyonso ya Balamani.

5 Mpe bazalaki bato boko balingaka baninga basusu; nzokande bayebaki Nzambe te; mpe bandeko ya Amuloni balakisaki bango eloko te mpo na ntina ya Nkolo Nzambe na bango, mpe mobeko ya Mose mpe te; balakisaki bango maloba ya Abinadi mpe te;

6 Kasi balakisaki bango ete basengeli kobomba masolo ya makomi na bango, mpe ete bakoka kokoma moko na mosusu.

7 Mpe boye Balamani babandaki kokoma na bozwi mingi, mpe babandaki kosala mombongo moko na mosusu mpe kokoma bato banene, mpe babandaki kozala bato ya mayele mabe mpe bato ya bwania, na kotalaka bwania ya mokili, iyo, bato ya mayele mabe mpenza, kosepelaka na ndenge nyonso ya nkuna mpe bopunzi, longola se soki ezalaki na kati ya bandeko na bango moko.

8 Mpe sikawa esalemaki ete Amuloni abandaki kosalela likoki likolo ya Alma mpe bandeko na ye, mpe abandaki konyokola ye, mpe asalaki ete bana na ye banyokola bana na bango.

9 Mpo Amuloni ayebaki Alma, ete azalaki moko ya banganganzambe ya mokonzi, mpe ete ezalaki ye oyo andimaki maloba ya Abinadi mpe abenganamaki liboso ya mokonzi, mpe boye azalaki na nkanda na ye; mpo ayangelamaki na mokonzi Lamani, kasi asalelaki likoki likolo na bango, mpe atiaki misala likolo na bango, mpe atiaki bakapita likolo na bango.

10 Mpe esalemaki ete mitungisi na bango ezalaki mpenza minene ete babandaki kobelela na bokasi epayi ya Nzambe.

11 Mpe Amuloni atindaki bango ete basukisa kolela na bango; mpe atiaki bakengeli likolo na bango, ete nyonso oyo akozwama kobelelaka epayi ya Nzambe, esengeli baboma ye.

12 Mpe Alma mpe bato na ye batombolaki te mingongo na bango epayi ya Nkolo Nzambe na bango, kasi basopaki mitema na bango epayi na ye; mpe ayebaki makanisi ya mitema na bango.

13 Mpe esalemaki ete mongongo ya Nkolo eyaki epayi na bango kati na mitungisi na bango, kolobaka: botombola mitu na bino mpe bozala na bosepeli, mpo nayebi liyokani oyo bosalaki na ngai; mpe nakosala liyokani na bato na ngai mpe nakokangola bango uta na boumbu.

14 Mpe nakokomisa lisusu pepele mikumba oyo etiami likolo ya mapeka na bino, ete kutu bokoka koyoka yango te likolo ya mikongo na bino, kutu wana ezali bino na boumbu; mpe nakosala ete bokoka kotelema lokola banzeneneke mpo na ngai nsima na awa, mpe ete bokoka koyeba na ntembe te ete ngai, Nkolo Nzambe, nabimelaka bato na ngai na mitungisi na bango.

15 Mpe sikawa esalemaki ete mikumba oyo mitiamaki likolo ya Alma mpe bandeko na ye ekomaki pepele; iyo, Nkolo apesaki bango bokasi ete bakoka komema mikumba na bango na pete, mpe batosaki na bosepeli mpe bompikiliki bolingi ya Nkolo.

16 Mpe esalemaki ete bondimi mpe bompikiliki na bango ezalaki monene ete mongongo ya Nkolo eyaki epayi na bango lisusu, kolobaka: Zala na bosepeli, mpo na mokolo ya nsima nakokangola bino uta na boumbu.

17 Mpe alobaki epayi ya Alma: Okokende liboso ya bato oyo, mpe nakokende elongo na yo mpe nakokangola bato oyo uta na boumbu.

18 Sikawa esalemaki ete Alma mpe bato oyo na ntango ya butu basangisaki bibwele na bango elongo, mpe lisusu mboto na bango; iyo, kutu ntango nyonso ya butu bazalaki se kosangisa bibwele na bango esika moko.

19 Mpe na ntongo Nkolo asalaki ete mpongi ya mozindo eya likolo ya Balamani, iyo, mpe bakapita na bango nyonso bazalaki na mpongi ya mozindo.

20 Mpe Alma mpe bato na ye bakendaki kati na esobe; mpe ntango basalaki mobembo mokolo mobimba batelemisaki biema na bango na lobwaku moko, mpe babiangaki lobwaku yango ya Alma, mpo akambaki nzela na bango na esobe.

21 Iyo, mpe na lobwaku ya Alma basopaki matondi na bango epayi ya Nzambe mpo atondisamaki na boboto mpo na bango, mpe akomisaki mikumba na bango pepele, mpe akangolaki bango uta na boumbu; mpo bazalaki na boumbu, mpe moto moko te akokaki kokangola bango longola se Nkolo Nzambe na bango.

22 Mpe bapesaki matondi na Nzambe, iyo, mibali na bango nyonso mpe basi na bango nyonso mpe bana na bango nyonso oyo bakokaki koloba batombolaki mingongo na bango na kosanzolaka Nzambe na bango.

23 Mpe sikawa Nkolo alobaki epayi ya Alma: Sala noki mpe kende yo mpe bato oyo uta na mboka oyo, mpo Balamani balamuki mpe bazali kolanda bino; boye kende uta na mboka oyo, mpe nakosukisa Balamani na lobwaku oyo ete bakoya mosika te na kolandaka bato oyo.

24 Mpe esalemaki ete bakendaki uta na lobwaku yango, mpe basalaki mobembo na bango kati na esobe.

25 Mpe esilaki bango kozala na esobe mikolo zomi na mibale bakomaki na mboka ya Zalayemila; mpe mokonzi Mosiya ayambaki bango na bosepeli.

Bimisa na lokasa