Makomi
Moziya 22


Mokapo 22

Miango misalemi mpo ya bato bakima bowumbu bwa Balamani—Balamani balangwisami—Bato bakimi, bazongi o Zalayemila, mpe bakomi bato ba Mokonzi Moziya. Penepene na 121–120 Yambo ya Klisto.

1 Mpe sikawa esalemaki ete Amona mpe mokonzi Limiyi babandaki kosolola elongo na bato boniboni bokomibikisa libanda lya bowumbu; mpe kutu basalaki ete bato banso basangisa bangomei elongo; mpe basalaki ete bakoka koyoka mokano mwa bato etali likambo lyango.

2 Mpe esalemaki ete bakokaki te komono nzela mpo ya komibikisa libanda lya bowumbu, longola se soko ezalaki mpo ya komeme basi ba bango mpe bana ba bango, mpe bibwele bya bango, mpe bitonga bya bango, mpe biema bya bango, mpe kokende o kati ya esobe; mpo ezalaki Balamani na motango monene mpenza, ekokaki te mpo ya bato ba Limiyi kowela na bango, kokanisaka mpo ya komibikisa libanda lya bowumbu na mopanga.

3 Mpe esalemaki ete Gideona abelemeki mpe atelemeki liboso lya mokonzi, mpe alobaki epai ya ye: Sikawa O mokonzi, kina sikawa oyokemelaki epai ya maloba ma ngai mbala mingi ezalaki biso kowela na bandeko ba biso, Balamani.

4 Mpe sikawa O mokonzi, soko omonoki nazalaki mosali wa mpamba, to soko kina sikawa oyokaki maloba ma ngai ata moke, mpe mango masalisaki yo, kaka boye nazali na mposa ete oyoka maloba ma ngai o ntango eye, mpe nakozala mosali wa yo mpe nakobikisa bato baye libanda lya bowumbu.

5 Mpe mokonzi apesaki ndingisa epai ya ye ete akoka koloba. Mpe Gideona alobaki epai ya ye:

6 Tala nzela ya nsima, o nzela ya efelo ya nsima, o mopanzi mwa nsima ya engumba. Balamani, to bakengeli ba Balamani, o butu balangwisami; yango wana tika totinda esakola yoko o ntei ya bato baye banso ete basangisa elongo bibwele mpe bitonga bya bango, ete bakoka kokumba bango o kati ya esobe o butu.

7 Mpe nakokende engebene na mitindo mya yo mpe nakofuta mpako ya nsuka ya vino na Balamani, mpe bakolangwa; mpe tokoleka o nzela ya nkuku o loboko la mwasi la molako ezali bango na molangwa mpe na mpongi.

8 Boye tokokende elongo na basi ba biso mpe bana ba biso, bibwele bya biso, mpe bitonga bya biso o kati ya esobe; mpe tokokende mobembo zingazinga na mboka ya Silomi.

9 Mpe esalemaki ete mokonzi ayokemelaki epai ya maloba ma Gideona.

10 Mpe mokonzi Limiyi asalaki ete bato ba ye basangisa bibwele bya bango elongo; mpe atindaki mpako ya vino na Balamani; mpe atindaki lisusu vino mingi koleka, lokola likabo lyoko epai ya bango; mpe bameleki lokola motema molingi vino eye mokonzi Limiyi atindaki epai ya bango.

11 Mpe esalemaki ete bato ba mokonzi Limiyi bakendeki o butu o kati ya esobe elongo na bibwele bya bango mpe bitonga bya bango, mpe bakendeki zingazinga mpembeni na mboka ya Silomi o esobe, mpe babukaki botamboli bwa bango ona mboka ya Zalayemila, kokambemaka na Amona mpe na bandeko ba ye.

12 Mpe bakamataka wolo, mpe mpauni ya bango inso, mpe biloko bya motuya bya bango, biye bakokaki komeme, mpe lisusu bisaka bya bango, o kati ya esobe; mpe balandaki mobembo mwa bango.

13 Mpe nsima ya kozalaka mikolo mingi o esobe bakomaki o mboka ya Zalayemila, mpe bakanganaki elongo na bato ba Moziya, mpe bakomaki bayangelami ba ye.

14 Mpe esalemaki ete Moziya ayambaki bango na bosepeli; mpe lisusu azwaki makundoli ma bango, mpe lisusu makundoli maye mazwamaki na bato ba Limiyi.

15 Mpe sikawa esalemaki ete emonoki Balamani ete bato ba Limiyi bakendeke libanda lya mboka o butu, ete batindaki limpinga lyoko o kati ya esobe mpo ya kolanda bango;

16 Mpe esilisaka bango kolanda bango mikolo mibale, bakokaki lisusu te kolanda matambe ma bango; yango wana babungaki o esobe.