Makomi
Moziya 10


Mokapo 10

Mokonzi Lamani akufi—Bato ba ye bazali bato ba nkei mpe ba loma mpe bazali kondima mimeseno mya lokuta—Zenifi na bato ba ye balongi bango. Penepene na 187–160 Yambo ya Klisto.

1 Mpe esalemaki ete tobandaki lisusu kotia bokonzi mpe tobandaki lisusu kozwa mboka na kimia. Mpe nasalaki ete esalema mandoki ma lolenge na lolenge, ete na yango nakokaki kozwa mandoki mpo ya bato ba ngai na ntango Balamani bakomata lisusu mpo ya kobunda na bato ba ngai.

2 Mpe natiaki bakengeli zingazinga mpembeni na mboka, ete Balamani bakoka koya lisusu te epai ya biso kpakasa mpe babebia biso; mpe boye nakengeleki bato ba ngai mpe bibwele bya ngai, mpe nabatelaki bango na bokwei o kati ya maboko ma bayini ba biso.

3 Mpe esalemaki ete tosangolaki mboka ya batata ba biso mpo ya ntaka ya mibu mingi, iyo, mpo ya ntaka ya mibu ntuku mibale na mibale.

4 Mpe nasalaki ete mibali bakona bilanga, mpe bakolisa ndenge inso ya nkona mpe ndenge inso ya mbuma ya lolenge na lolenge.

5 Mpe nasalaki ete basi batonga, mpe basala na makasi, mpe basala, mpe bakela lolenge na lolenge ya lino ya malonga, iyo, mpe bilamba bya lolenge na lolenge, ete tokoka kolatisa bolumbu bwa biso; mpe boye tozwaki bomengo o mboka—boye tozalaki na kimia ya ntango inso o mboka mpo ya ntaka ya mibu ntuku mibale na mibale.

6 Mpe esalemaki ete mokonzi Lamani akufaki, mpe mwana mobali wa ye abandaki kokonza o esika ya ye. Mpe abandaki kolamusa bato ba ye o botomboki na bato ba ngai; yango wana babandaki kolengele mpo ya etumba, mpe koya kobunda na bato ba ngai.

7 Kasi natindaka banongi ba ngai zingazinga mpembeni ya mboka ya Semiloni, ete nakoka koyeba bolengeli bwa bango, ete nakoka komikengele na bango, ete bakoka te koya likolo lya bato ba ngai mpe kobebisa bango.

8 Mpe esalemaki ete bamataki likolo lya nordi ya mboka ya Silomi, elongo na mampinga ma motango monene mwa bango, bato balataki mandoki na matimbo, mpe na makula, mpe na mipanga, mpe na nsendo, mpe na mabanga, mpe na bilingongo; mpe bazalaka na mito mya bango kolokolo ete mizalaki bolumbu; mpe bazingamaki na mikaba mya mposo penepene na nketo ya bango.

9 Mpe esalemaki ete nasalaki ete basi mpe bana ba bato ba ngai babombanaki o esobe; mpe nasalaki lisusu ete bampaka banso ba ngai baye bakokaki komeme mandoki, mpe lisusu bilenge bibali binso bya ngai biye bikokaki komeme mandoki, bimisangisa elongo mpo ya kokende kobunda na Balamani; mpe natiaki bango na nkondo ya bango, moto na moto engebene na mbula ya ye.

10 Mpe esalemaki ete tomataki mpo ya kobunda na Balamani; mpe ngai, kutu ngai, na bobange bwa ngai, namataki mpo ya kobunda na Balamani. Mpe esalemaki ete tomataki na makasi ma Nkolo mpo ya kobunda.

11 Sikawa, Balamani bayebaki eloko te etali Nkolo, to makasi ma Nkolo te, yango wana bayekemeki likolo lya makasi ma bangomei. Nzokande bazalaki bato boko bakasi lokola, engebene na bokasi bwa bato.

12 Bazalaki bato ba zamba, mpe ba loma, mpe ba mposa-ya-makila, kondimaka momeseno mwa batata ba bango, moye mozali moye—Kondimaka ete babenganamaki libanda lya mboka ya Yelusaleme mpo ya masumu ma batata ba bango, mpe ete bakosamaki o esobe na bandeko ba bango, mpe lisusu bakosamaki ntango ekatisaki bango mbu;

13 Mpe lisusu, bakosamaki ntango ezalaki bango o mboka ya lisango lya yambo lya bango, esilisaka bango kokatisa mbu, mpe enso eye na ntina ete Nefi azalaki potongono mingi koleka na kobatelaka mitindo mya Nkolo—yango wana asungamaki na Nkolo, mpo Nkolo ayokaki nsambo ya ye mpe ayanolaki yango, mpe akambaki mobembo mwa bango o esobe.

14 Mpe bandeko ba ye badasukaki na ye zambi basosolaki te bozalani bwa Nkolo; badasukaki lisusu na ye likolo lya mai zambi bayeisaki mitema mya bango mikasi na Nkolo.

15 Mpe lisusu badasukaki na ye ekomaki bango o mboka elakelama, zambi balobaki ete akamataki boyangeli bwa bato o maboko ma bango; mpe balukaki koboma ye.

16 Mpe lisusu, badasukaki na ye zambi akendeki o kati ya esobe lokola Nkolo atindaki ye, mpe akamataki makundoli maye makomamaki likolo lya palaki ya motako, mpo balobaki ete ayibaki mango.

17 Mpe boye balakisaki bana ba bango ete bayina bango, mpe ete baboma bango, mpe ete bawembe mpe bapunza bango, mpe basala inso bakoki mpo ya kobebisa bango; yango wana bazali na boyini bwa seko ona bana ba Nefi.

18 Mpo ya ntina eye mpenza mokonzi Lamani, na mayele mabe ma ye, mpe angile ya ye, mpe bilako malonga bya ye, akosaki ngai, ete namemeki bato ba ngai baye o kati ya mboka eye, ete bakoka koboma bango; iyo, mpe toyokaki mpasi eye mibu mingi o mboka.

19 Mpe sikawa ngai, Zenifi, esilisaki ngai kolobela makambo maye epai ya bato ba ngai matali Balamani, napusaki bango mpo ya kokende kobunda na bokasi bwa bango, kotiaka elikia ya bango na Nkolo; yango wana, towelaki na bango, miso na miso.

20 Mpe esalemaki ete tobenganaki bango lisusu libanda lya mboka ya biso; mpe tobomaki bango na bobebisami boko bonene, kutu boye mingi ete totangaki te motuya mwa bango.

21 Mpe esalemaki ete tozongaki lisusu o mboka ya bisomei, mpe bato ba ngai babandaki lisusu kobatela bibwele bya bango, mpe kokona bilanga bya bango.

22 Mpe sikawa ngai, ezalaki ngai mpaka, napesaki bokonzi likolo lya moko wa bana ba ngai; yango wana, nakoloba lisusu te. Mpe tika Nkolo apambola bato ba ngai. Amene.