Makomi
Mosiya 25


Mokapo 25

Bana ya Muleke na Zalayemila bakomi Banefi—Bayekoli mpo na ntina ya bato ya Alma mpe na ntina ya bato ya Zenifi—Alma abatisi Limiyi mpe bato nyonso na ye—Mosiya apesi Alma likoki mpo na kobongisa Eklezia ya Nzambe. Penepene na mobu 120 Liboso na mbotama ya Klisto.

1 Mpe sikawa mokonzi Mosiya asalaki ete bato nyonso basangana esika moko.

2 Sikawa bana ya Nefi bazalaki mingi te, soki te mingi na bango oyo bazalaki biboto ya Nefi, lokola ezalaki biboto ya bato ya Zalayemila, oyo azalaki eboto ya Muleke, mpe baoyo bayaki elongo na ye kati na esobe.

3 Mpe ezalaki na mingi te ya bato ya Nefi mpe ya bato ya Zalayemila lokola ezalaki Balamani; iyo, bazalaki mingi ata na katikati te.

4 Mpe sikawa bato nyonso ya Nefi basanganaki esika moko, mpe lisusu bato nyonso ya Zalayemila, mpe basanganaki elongo na mangomba mibale ya bato.

5 Mpe esalemaki ete Mosiya atangaki, mpe asalaki etangama, masolo ya makomi ya Zenifi na bato na ye; iyo, atangaki masolo ya makomi ya bato ya Zenifi, uta na ntango batikaki mboka ya Zalayemila kino na ntango bazongaki lisusu.

6 Mpe atangaki lisusu lisolo ya Alma mpe bandeko na ye, mpe mitungisi na bango nyonso, uta na ntango batikaki mboka ya Zalayemila kino na ntango bazongaki lisusu.

7 Mpe sikawa, etiaki Mosiya nsuka na kotangaka masolo ya makomi, bato na ye baoyo batikalaki na mboka basimbamaki na bokamwi mpe bosutuki.

8 Mpo bayebaki te nini kokanisa; mpo emonaki bango oyo bakangolamaki uta na boumbu batondisamaki na bosepeli monene koleka.

9 Mpe lisusu, ntango bakanisaki bandeko na bango oyo babomamaki na Balamani batondisamaki na mawa, kutu basopaki mpizoli mingi ya mawa.

10 Mpe lisusu, ntango bakanisaki bolamu ya sasaipi ya Nzambe, mpe nguya na ye na kokangolaka Alma mpe bandeko na ye uta na maboko ya Balamani mpe uta na boumbu, batombolaki mingongo na bango mpe bapesaki matondi na Nzambe.

11 Mpe lisusu, ntango bakanisaki Balamani, baoyo bazalaki bandeko na bango, na ntina ya kozala na bango kati na masumu mpe mbindo, batondisamaki na bolozi mpe nsomo mpo na bolamu ya milimo na bango.

12 Mpe esalemaki ete bango oyo bazalaki bana ya Amuloni mpe bandeko na ye, baoyo babalaki bana basi ya Balamani, basepelaki te na bizaleli ya batata na bango, mpe balingaki lisusu te kobiangama na nkombo ya batata na bango, boye bakamataki likolo na bango moko nkombo ya Nefi, ete bakoka kobiangama bana ya Nefi mpe kotangama na kati na bango oyo babiangamaki Banefi.

13 Mpe sikawa bato nyonso ya Zalayemila batangamaki elongo na Banefi, mpe oyo mpo bokonzi epesamaki likolo ya moto moko te longola se na bango oyo bazalaki biboto ya Nefi.

14 Mpe sikawa esalemaki ete etiaka Mosiya nsuka na kolobaka mpe kotangaka na bato na ye, azalaki na mposa ete Alma mpe lokola aloba na bato.

15 Mpe Alma alobaki epayi na bango, ntango bayanganaki esika moko na lingomba moko monene, mpe akendaki uta lingomba moko na mosusu, koteyaka epayi ya bato boyamboli mpe bondimi na Nkolo.

16 Mpe alendisaki bato ya Limiyi mpe bandeko na ye, bango nyonso oyo babikisamaki uta na boumbu, ete bamikundola ete Nkolo oyo nde azalaki mokangoli na bango.

17 Mpe esalemaki ete esilaki Alma kolakisa bato makambo mingi, mpe kotia nsuka na kolobaka na bango, ete mokonzi Limiyi azalaki na mposa ete akoka kobatisama; mpe bato na ye nyonso bazalaki na mposa ete bakoka kobatisama mpe lokola.

18 Boye, Alma akendaki kati na mai mpe abatisaki bango; iyo, abatisaki bango na lolenge asalaki bandeko na ye na mai ya Mormon; iyo, mpe mingi lokola abatisaki bakomaki bato ya eklezia ya Nzambe; mpe oyo na ntina ya boyambi na bango likolo ya maloba ya Alma.

19 Mpe esalemaki ete mokonzi Mosiya apesaki ndingisa epayi ya Alma ete akoka kotia Baeklezia epayi nyonso na mboka ya Zalayemila; mpe apesaki ye nguya ya kokulisa banganganzambe mpe balakisi likolo ya eklezia na eklezia.

20 Sikawa oyo esalemaki mpo ezalaki na bato mingi mpenza ete bakokaki te nyonso koyangelama na molakisi moko; mpe bakokaki te koyoka liloba ya Nzambe na lisanga moko;

21 Boye bayanganaki esika moko kati na masanga makeseni, oyo ebiangamaki Baeklezia; eklezia na eklezia ezalaki na banganganzambe ya yango mpe na bateyi na yango, mpe nganganzambe na nganganzambe koteyaka liloba engebene lokola epesamaki na ye na monoko ya Alma.

22 Mpe boye, ata ezalaki Baeklezia mingi nyonso ezalaki se eklezia moko, iyo, kutu ezalaki eklezia ya Nzambe; mpo eloko moko te eteyamaki na Baeklezia nyonso longola se soki ezalaki boyamboli mpe bondimi na Nzambe.

23 Mpe sikawa ezalaki na Baeklezia sambo na mboka ya Zalayemila. Mpe esalemaki ete nyonso oyo bazalaki na mposa mpo na kokamata likolo na bango nkombo ya Klisto, to ya Nzambe, bakanganaki na Baeklezia ya Nzambe;

24 Mpe babiangamaki bato ya Nzambe. Mpe Nkolo asopaki Molimo na ye likolo na bango, mpe bapambolamaki, mpe bafulukaki na mboka.

Bimisa na lokasa