Makomi
Moziya 14


Mokapo 14

Yisaya alobeli bomasiya—Bokitisi mpe mpasi ya Masiya elimbolami—Asali bozo bwa ye libonza mpo ya lisumu mpe asali libondeli mpo ya babuki mobeko—Mekisani Yisaya 53. Penepene na 148 Yambo ya Klisto.

1 Iyo, kutu elobi te Yisaya: Nani andimaki mbando ya biso, mpe na nani ebimeli loboko la Nkolo?

2 Mpo akokola liboso lya ye lokola elona ya petepete, mpe lokola mosisa moko libanda lya mabele makauka; azalaki na lolenge te to na lipombo te; mpe ekomono biso ye ezali kitoko te ete tozala na mposa ya ye.

3 Atiolamaki mpe abwakamaki na bato; moto wa mawa, mpe ameseni na mpasi; mpe tobombaki, lokola soko ezalaki, bilongi bya biso na ye; atiolamaki, mpe tokumisaki ye te.

4 Na ntembe te akumbi mpasi ya biso, mpe amemi mawa ma biso; nzokande tomonoki ye aniokwami, abetemi na Nzambe, mpe atungisami.

5 Kasi azokisamaki mpota mpo ya bobuki mobeko bwa biso, akatamaki mpota mpo ya mabe ma biso; etumbu ya kimia ya biso ezalaki likolo lya ye; mpe na mapipi ma ye tobikisami.

6 Biso banso, bo mpate, tokendeki mpembeni; tobalukaki moko na moko o nzela ya yemei; mpe Nkolo atiaki likolo lya ye mabe ma biso banso.

7 Akakemamaki mpe atungisamaki, nzokande afungolaki monoko mwa ye te; amememeki lokola mwa na wa mpate yoko na babomi, mpe lokola mpate yoko liboso lya bakati nsuki ya ye azali baba boye afungolaki te monoko mwa ye.

8 Azwamaki uta o boloko mpe uta o bosambisi; mpe nani akosakola nkola ya ye? Mpo akatamaki mosika libanda lya mboka ya baye ba bomoi; mpo ya bobuki mobeko bwa bato ba ngai aniokwamaki.

9 Mpe asalaki lilita lya ye elongo na bato ba nkuna, mpe elongo na bazwi o liwa lya ye; mpo asalaki mabe te, mpe ezalaki lokuta te o monoko mwa ye.

10 Nzokande esepelisaki Nkolo kokata ye mpota; atiaki ye na mpasi; ekosala yo bozo bwa ye libonza mpo ya lisumu akomono nkona ya ye, akokomisa elai mikolo mya ye, mpe elengi ya Nkolo ekozwa bomengo o loboko la ye.

11 Akomono mosala mwa bozo bwa ye, mpe akosepelisama; na boyebi bwa ye mosali sembo wa ngai akoyengebene mingi; mpo akokumba mabe ma bango.

12 Yango wana nakokabela ye ndambo yoko elongo na banene, mpe akokabola bopunzi elongo na bakasi; zambi asopi libanda bozo bwa ye epai ya liwa; mpe atangemaki elongo na babuki mobeko; mpe akumbaki masumu ma mingi, mpe asalaki libondeli mpo ya babuki mobeko.