Makomi
Moziya 6


Mokapo 6

Mokonzi Benyamina akomi o makundoli nkombo ya bato mpe aponi banganga mpo ya kolakisa bango—Moziya akonzi lokola mokonzi moko sembo. Penepene na 124–121 Yambo ya Klisto.

1 Mpe sikawa, mokonzi Benyamina akanisaki elongobanaki, esilisaki ye kolobaka na bato, ete akoka kokamata nkombo ya baye banso bakotaki o kati ya boyokani boko elongo na Nzambe mpo ya kobatela mitindo mya ye.

2 Mpe esalemaki ete ezalaki bozo boko te, longola se soko ezalaki bana bake, baye bakotaki o kati ya boyokani mpe bakamataki likolo lya bango nkombo ya Klisto.

3 Mpe lisusu, esalemaki ete etiaki mokonzi Benyamina nsuka yoko ya makambo maye manso, mpe abulisaka mwana mobali wa ye Moziya mpo ya kozala moyangeli moko mpe mokonzi moko likolo lya bato ba ye, mpe apesaka ye mikumba minso mitali bokonzi, mpe lisusu aponoki banganga mpo ya kolakisa bato, ete na yango bakokaki koyoka mpe koyeba mitindo mya Nzambe, mpe kolamusa bango o bokundoli bwa ndai eye basalaki, apanzaki ebele, mpe bazongaki, moko na moko, engebene na mabota ma bango, o ndako ya bangomei.

4 Mpe Moziya abandaki kokonza o esika ya tata wa ye. Mpe abandaki kokonza o mobu mwa ntuku misato mya mvula ya ye, kosalaka na mobimba, penepene na mibu nkama minei na ntuku sambo na motoba uta ntango eye Lehi atikaki Yelusaleme.

5 Mpe mokonzi Benyamina azalaki na bomoi mibu misato mpe akufaki.

6 Mpe esalemaki ete mokonzi Moziya atambolaki o nzela ya Nkolo, mpe atosaki masambisi ma ye mpe meko ya ye, mpe abatelaki mitindo mya ye o makambo manso kani atindaki ye.

7 Mpe mokonzi Moziya asalaki bato ba ye basala bilanga. Mpe ye lokola, asalaki bilanga, ete na yango akokaki te kozala mokumba epai ya bato ba ye, ete akoka kosala engebene na eye tata wa ye asalaki o makambo manso. Mpe ezalaki boswani te o ntei ya bato ba ye mpo ya ntaka ya mibu misato.