Makomi
Moziya 11


Mokapo 11

Mokonzi Noa azali koyangela o nkuna—Asepeli kozala na bomoi bwa loyenge elongo na basi mpe bamakango ba ye—Abinadi abikuli ete bato bakokamatama o kati ya bowumbu—Bomoi bwa ye bolukisami na Mokonzi Noa. Penepene na 160–150 Yambo ya Klisto.

1 Mpe sikawa esalemaki ete Zenifi apesaki bokonzi likolo lya Noa, moko wa bana babali ba ye; yango wana Noa abandaki kokonza o esika ya ye; mpe atambolaki te o nzela ya tata wa ye.

2 Mpo tala, abatelaki te mitindo mya Nzambe, kasi atambolaki nsima ya mposa ya motema mwa yemei. Mpe azalaki na basi mpe bamakango mingi. Mpe atindaki bato ba ye kosala masumu, mpe kosala eye ezali mabe o bomoni bwa Nkolo. Iyo, mpe basalaki pite mpe ndenge inso ya nkuna.

3 Mpe akataki mpako ya eteni yoko ya itano ya enso eye bazwaki, eteni yoko ya itano ya wolo mpe mpauni ya bango, mpe eteni yoko ya itano ya zifi ya bango, mpe ya mbengi ya bango, mpe ya motako mwa bango mpe ya ebuni ya bango; mpe eteni yoko ya itano ya niama ya bango; mpe lisusu eteni yoko ya itano ya nkona inso ya bango.

4 Mpe enso eye akamataki mpo ya kofuta yemei, mpe basi ba ye mpe bamakango ba ye; mpe lisusu banganga ba ye, mpe basi ba bango mpe bamakango ba bango; boye abongolaki makambo ma bokonzi.

5 Mpo akitisaki banganga banso baye babulisamaka na tata wa ye mpe abulisaki basusu ba sika o esika ya bango, lolenge la baye batombwani likolo o lolendo la mitema mya bango.

6 Iyo, mpe boye bafutamaki na goigoi ya bango, mpe na bosambeli bikeko bya bango, mpe na pite ya bango, na mpako iye mokonzi Noa atiaka likolo lya bato ba ye; boye bato basalaki mpenza mpo ya kofuta bobe.

7 Iyo, mpe bakomaki lisusu basambeli bikeko, zambi bakosamaki na maloba ma mpamba mpe ma koleteke ma mokonzi mpe banganga; mpo balobaki makambo ma koleteke epai ya bango.

8 Mpe esalemaki ete mokonzi Noa atongaki ndako inzenga mpe inene mingi; mpe akembisaki yango na bikelamo malonga bya libaya, mpe bya lolenge na lolenge la biloko bya motuya, bya wolo, mpe bya mpauni, mpe bya ebuni, mpe bya motako, mpe bya zifi, mpe bya mbengi;

9 Mpe amitongelaki lisusu ndako yoko enene kitoko, mpe o katikati ya yango ngbende, ya yango inso ezalaki ya libaya malonga mpe ekembisamaki na wolo mpe mpauni mpe na biloko bya motuya.

10 Mpe asalaki lisusu ete basali ba ye bakoka kosala misala mya ndenge inso ya malonga na kati ya bifelo bya tempelo, mya libaya malonga, mpe mya mbengi, mpe mya motako.

11 Mpe kiti iye etiamaki mpembeni mpo ya banganga banene, iye izalaki likolo lya kiti inso isusu, akembisaki yango na wolo ya peto; mpe asalaki etelemelo yoko etongema liboso lya yango, ete bakoka kopemisa nzoto ya bango mpe maboko ma bango likolo lya yango ntango ekoloba bango maloba ma lokuta mpe ma mpamba na bato ba ye.

12 Mpe esalemaki ete atongaki linongi lyoko penepene na tempelo; iyo, linongi lyoko lilai mpenza, kutu boye lilai ete akoka koteleme likolo lya nsonge ya lyango mpe komono uta likolo mboka ya Silomi mpe lisusu mboka ya Semiloni, iye izwamaki na Balamani; mpe akokaki kutu komono likolo mboka mobimba zingazinga mpembeni.

13 Mpe esalemaki ete atongisaki ndako mingi o mboka ya Silomi; mpe asalaki linongi linene litongemaki likolo lya ngomba patalalu ya nordi ya mboka ya Silomi, eye ezalaka ebombelo mpo ya bana ba Nefi o ntango bakimaki libanda lya mboka; mpe boye asalaki na bozwi boye azwaki na mpako ya bato ba ye.

14 Mpe esalemaki ete atiaki motema mwa ye likolo lya bomengo bwa ye, mpe alekisaki ntango ya ye na kozalaka na bomoi bwa loyenge elongo na basi ba ye mpe bamakango ba ye; mpe boye banganga ba ye balekisaki ntango ya bango elongo na basi ba pite.

15 Mpe esalemaki ete akonaki bilanga bya vino zingazinga mpembeni o mboka; mpe atongisaki ekamoli vino, mpe asalaki vino beboo; mpe yango wana akomaki momeli-vino, mpe bato ba ye lokola.

16 Mpe esalemaki ete Balamani babandaki kokota likolo lya bato ba ye, likolo lya mangomba make, mpe koboma bango, na bilanga bya bango, mpe ntango ezalaki bango koleisa bibwele bya bango.

17 Mpe mokonzi Noa atindaki bakengeli zingazinga mpembeni ya mboka mpo ya kobatela bango, kasi atindaki motango moko mokoka te, mpe Balamani bayaki likolo lya bango mpe babomaki bango, mpe babenganaki mingi ya bibwele bya bango libanda lya mboka; boye Balamani babandaki koboma bango, mpe kosalela nkanda ya bango likolo lya bango.

18 Mpe esalemaki ete mokonzi Noa atindaki mampinga ma basoda ba ye mpo ya kobunda na bango mpe babenganamaki nsima, to babenganaki bango nsima mpo ya ntango yoko; yango wana, bazongaki kosepelaka na bopunzi bwa bango.

19 Mpe sikawa, na ntina ya elonga eye enene batombwanaki likolo o lolendo la mitema mya bango; basalaki lofundo mpo ya makasi ma bangomei, kolobaka ete ntuku mitano ya bango bakokaki kobunda na nkoto ya Balamani; mpe boye basalaki lofundo, mpe basepelaki na makila, mpe bosopi bwa makila ma bandeko ba bango, mpe eye na ntina ya nkuna ya mokonzi wa bango mpe banganga ba bango.

20 Mpe esalemaki ete ezalaki moto moko o ntei ya bango ya ye nkombo ezalaki Abinadi; mpe akendeki o ntei ya bango, mpe abandaki kobikula, kolobaka: Tala, boye elobi Nkolo, mpe boye etindi ye ngai, kolobaka, Kende, mpe loba epai ya bato baye, boye elobi Nkolo—Lisuma ezala epai ya bato baye, mpo namoni bonsomo bwa bango, mpe nkuna ya bango, mpe pite ya bango; mpe longola se soko bayamboli nakobimela bango na nkanda ya ngai.

21 Mpe longola se soko bayamboli mpe bazongi epai ya Nkolo Nzambe wa bango, Tala, nakotika bango na maboko ma bayini ba bango; iyo, mpe bakomememe o kati ya bowumbu; mpe bakotungisama na loboko la bayini ba bango.

22 Mpe ekosalema ete bakoyeba ete nazali Nkolo Nzambe wa bango, mpe nazali Nzambe wa zuwa, kobimelaka mabe ma bato ba ngai.

23 Mpe ekosalema ete longola se soko bato baye bayamboli mpe bazongi epai ya Nkolo Nzambe wa bango, bakomememe o kati ya bowumbu; mpe moko te akobimisa bango, longola se soko ezali Nkolo Nzambe wa Bokasi Bonso.

24 Iyo, mpe ekosalema ete ekobelela bango epai ya ngai nakozala malembe na koyoka ebelela ya bango; iyo, mpe nakotika bango ete babeteme na bayini ba bango.

25 Mpe longola se soko bayamboli o elamba ya saki mpe mputulu ya moto, mpe babeleli na bokasi na Nkolo Nzambe wa bango, nakoyoka nsambo ya bango te, mpe nakolongola bango libanda lya matungisi ma bango te; mpe boye elobi Nkolo, mpe boye etindaki ye ngai.

26 Sikawa esalemaki ete elobaka Abinadi maloba maye epai ya bango badasukaki na ye, mpe balukaki kolongola bomoi bwa ye; kasi Nkolo abikisaki ye libanda lya maboko ma bango.

27 Sikawa eyokaka mokonzi Noa maloba maye Abinadi alobaki epai ya bato, adasukaki lokola; mpe alobaki: Nani azali Abinadi, ete ngai mpe bato ba ngai tosambisama na ye, to nani azali Nkolo, oyo akomeme likolo lya bato ba ngai matungisi manene ma lolenge loye?

28 Natindi bino bomeme Abinadi awa, ete nakoka koboma ye, mpo alobaki makambo maye ete akoka kolamusa bato ba ngai na nkanda bango na bango, mpe kobimisa boswani o ntei ya bato ba ngai; yango wana nakoboma ye.

29 Sikawa miso mya bato mikangemaki; yango wana bayeisaki mitema mya bango mikasi na maloba ma Abinadi, mpe balukaki uta o ntango ena kina o boso kokamata ye. Mpe mokonzi Noa ayeisaki motema mwa ye mokasi na liloba lya Nkolo, mpe ayambolaki te uta o misala mibe mya ye.