Makomi
Mosiya 2


Mokapo 2

Mokonzi Benyamina azali kolobela bato na ye—Apesi lisusu lisolo ya bomoi ya alima, ya malonga, mpe ya molimo na boyangeli na ye—Apesi bango toli mpo na kosalela Mokonzi na bango na Lola—Baoyo batombokaka na Nzambe bakoyoka mpasi ya nsomo lokola moto oyo mozimaka te. Penepene na mobu 124 Liboso na mbotama ya Klisto.

1 Mpe esalemaki ete esilaki Mosiya kosala lokola Tata na ye atindaki ye, mpe kosala bosakoli bipayi na mboka mobimba, ete bato basanganaki bango moko esika moko bipayi na mboka mobimba, ete bamataki na tempelo mpo na koyoka maloba oyo mokonzi Benyamina alingaki kolobela bango.

2 Mpe ezalaki na motango moko monene ya bato, kutu mingi bongo ete batangaki bango te; mpo bayikanaki mpenza mpe bakomaki motango monene na mboka.

3 Mpe bakamataki lisusu babotami ya yambo ya bibwele na bango, ete bakoka kotumba mbeka mpe kopesa mabonza matumbama engebene na mobeko ya Mose;

4 Mpe lisusu ete bakoka kopesa matondi na Nkolo Nzambe na bango, oyo amemaki bango uta na mboka ya Yelusaleme, mpe oyo abikisaki bango uta na maboko ya banguna na bango, mpe aponaki bato ya boyengebene mpo na kozala bateyi na bango, mpe lisusu moyengebene mpo na kozala mokonzi na bango, oyo afandisaki kimia na mboka ya Zalayemila, mpe oyo alakisaki bango kobatela mitindo ya Nzambe, ete bakoka kosepela mpe kotondisama na bolingo epayi ya Nzambe mpe bato nyonso.

5 Mpe esalemaki ete ntango bakomaki na tempelo, batelemisaki biema na bango nzinganzinga mpembeni, moto na moto engebene na libota na ye, oyo ezalaki na mwasi na ye, mpe bana mibali na ye, mpe bana basi na ye, mpe bana mibali na bango, mpe bana basi na bango, uta na nkulutu kino na leki, libota na libota kozalaka ya kokabwana moko na mosusu.

6 Mpe batelemisaki biema na bango nzinganzinga mpembeni na tempelo, moto na moto kotalisaka ekuke ya ema na ye na ngambo ya tempelo, ete na boye bakokaki kofanda na biema na bango mpe koyoka maloba oyo mokonzi Benyamina alingaki kolobela bango;

7 Mpo ebele ya bato yango bazalaki na motango monene ete mokonzi Benyamina akokaki te koteya bango nyonso kati na bifelo ya tempelo, boye atongisaki linongi, ete na yango bato na ye bakokaki koyoka maloba oyo alingaki kolobela bango.

8 Mpe esalemaki ete abandaki kolobela bato na ye uta na linongi; mpe bakokaki te nyonso koyoka maloba na ye mpo na monene ya ebele ya bato yango; boye asalaki ete maloba oyo alobaki makomisama mpe matindama na kati na bango oyo bazalaki te na nse ya lokito ya mongongo na ye, ete bakoka bango mpe lisusu kozwa maloba na ye.

9 Mpe oyo ezali maloba oyo alobaki mpe akomisaki, kolobaka: Bandeko na ngai, bino nyonso oyo bosangani bino moko esika moko, bino baoyo bokoki koyoka maloba na ngai oyo nakoloba epayi na bino na mokolo oyo; mpo natindi bino te komata awa mpo na kosakana na maloba oyo nakoloba, kasi ete boyokela ngai, mpe bofungola matoyi na bino ete bokoka koyoka, mpe mitema na bino ete bokoka kososola, mpe mayele na bino ete mibombamo ya Nzambe mikoka kofungwana na miso na bino.

10 Natindi bino te komata awa ete bobanga ngai, to ete bomikundola ete ngai, se na ngai moko nazali koleka moto ya kufa.

11 Kasi nazali lokola se bino moko, nayangelami na bolembu ya ndenge nyonso na nzoto mpe na mayele; kasi naponamaki na bato oyo, mpe nabulisamaki na tata na ngai, mpe napesamaki nzela na loboko ya Nkolo ete nazala moyangeli mpe mokonzi likolo ya bato oyo; mpe nabombamaki mpe nabatelamaki na nguya na ye ezanga emekiseli, mpo na kosalela bino na bokasi, mayele mpe makasi nyonso oyo Nkolo apesaki epayi na ngai.

12 Nalobi epayi na bino ete lokola napesamaki nzela mpo na kolekisa mikolo na ngai na kosalelaka bino, kutu kino na ntango oyo, mpe nalukaki wolo soki mpe mpauni te soki mpe lolenge moko ya bozwi uta na bino te;

13 Mpe napesaki te nzela ete bokangama na boloko, to ete bokomisama baumbu moko na mosusu, to ete boboma, to bopunza, to boyiba, to bosala ekobo; to kutu napesaki te nzela ete bokoka kosala nkuna ya lolenge moko, mpe nalakisaki bino ete bosengeli kobomba mitindo ya Nkolo, na makambo nyonso oyo atindaki bino—

14 Mpe kutu ngai, ngai moko, nasalaki na maboko na ngai moko ete nakoka kosalela bino, mpe ete botungisama te na bozito ya mpako, mpe ete eloko moko te eya likolo na bino oyo ekozala mpasi mpo na kokumba—mpe na makambo oyo nyonso oyo nalobaki, bino moko bozali banzeneneke mokolo oyo.

15 Kasi, bandeko na ngai, nasalaki te makambo oyo mpo ete nakoka komibeta ntolo, mpe nalobeli te makambo oyo ete na yango nakoka kofunda bino; kasi nalobeli bino makambo oyo ete bokoka koyeba ete nakoki koyanola na mayele ya motema oyo mozanga elindo liboso ya Nzambe na mokolo oyo.

16 Tala, nalobi epayi na bino ete mpo nalobelaki bino ete nalekisaki mikolo na ngai na kosalelaka bino, nazali na mposa ya komibeta ntolo te, mpo nazalaki mpenza kosalela Nzambe.

17 Mpe tala, nalobeli bino makambo oyo ete bokoka koyekola bwania; ete bokoka koyekola ete ntango bozali kosalela baninga bazalani na bino bozali mpenza kosalela Nzambe na bino.

18 Tala, bobiangaki ngai mokonzi na bino; mpe soki ngai, oyo bobiangi mokonzi na bino, nazali kosala mpenza mpo na kosalela bino, bongo esengeli bino te kosala mpo na kosalela moko na mosusu?

19 Mpe tala lisusu, soki ngai, oyo bobiangi mokonzi na bino, oyo alekisaki mikolo na ye na kosalelaka bino, mpe azalaki nzokande kosalela Nzambe, ebongi ngai te na matondi uta epayi na bino, O lolenge boni esengeli bino kotonda Mokonzi na bino ya lola!

20 Nalobi epayi na bino, bandeko na ngai, ete soki bokozongisa matondi mpe masanzoli nyonso oyo molimo na bino mobimba mozali na nguya ya kozwa, na Nzambe wana oyo akelaki bino, mpe abombaki mpe abatelaki bino, mpe asalaki ete bosepela, mpe apesaki nzela ete bozala na kimia moko na mosusu—

21 Nalobi epayi na bino ete soki bosaleli ye oyo akelaki bino uta na ebandeli, mpe azali kobatela bino mokolo na mokolo, na kopesaka bino mpema, ete bokoka kozala na bomoi mpe koningana mpe kosala engebene na bolingi na bino moko, mpe kutu kosungaka bino uta ngonga moko na mosusu—Nalobi, soki bokosalela ye na molimo na bino mobimba nzokande bokozala basali baoyo bazangi litomba.

22 Mpe tala, nyonso oyo asengi bino ezali se kobomba mitindo na ye; mpe alakaki bino ete soki bokobomba mitindo na ye bokofuluka na mboka yango; mpe abongwanaka soki moke te uta na oyo alobaki; boye, soki bobombi mitindo na ye akopambola bino mpe akofulukisa bino.

23 Mpe sikawa, na esika ya yambo, akelaki bino, mpe apesaki bino ya bomoi na bino, mpo na yango bozali na niongo epayi na ye.

24 Mpe ya mibale, asengi bino ete bosala lokola atindaki bino; mpo na oyo soki bosali, akopambola bino sasaipi; mpe boye afutaki bino. Mpe bozali naino na niongo na ye, mpe bozali, mpe bokozala, libela na libela; boye, ntina nini esengeli bino komibeta ntolo?

25 Mpe sikawa natuni, ekoki bino koloba likambo na bino moko? Nayanoli, Te. Bokoki te koloba ete bozali mpenza kutu lokola mputulu ya mabele; nzokande bokelamaki na mputulu ya mabele; nzokande tala, yango ezali na ye oyo akelaki bino.

26 Mpe ngai, kutu ngai, oyo bobiangi mokonzi na bino, nazali moto malamu te koleka oyo bozali bino moko; mpo nazali mputulu mpe lokola. Mpe bomoni ete nakomi mobange, mpe nakomi penepene na kotika nzoto oyo ya kufa na mama na ye mabele.

27 Boye, lokola nalobaki epayi na bino ete nasalelaki bino, kotambolaka na mayele ya motema mazanga elindo liboso ya Nzambe, kutu boye ngai na ntango oyo nasalaki ete bosangana esika moko, ete nakoka komonana na mpamela te, mpe ete makila eya te likolo na ngai, wana ekotelema ngai mpo na kosambisama na Nzambe mpo na makambo oyo atindaki ngai mpo na oyo etali bino.

28 Nalobi epayi na bino ete nasalaki ete bosangana esika moko ete nakoka kosukola bilamba na ngai uta na makila na bino, na eleko oyo ya ntango ekomi ngai penepene ya kokita na lilita na ngai, ete nakoka kokita na kimia, mpe molimo na ngai mozanga kufa mokoka kokutana elongo na lingomba ya bayembi likolo na koyembaka masanzoli ya Nzambe moyengebene.

29 Mpe lisusu, nalobi epayi na bino ete nasalaki ete bosangana esika moko, ete nakoka koyebisa epayi na bino ete nakoki kozala lisusu te molakisi na bino, soki te mokonzi na bino;

30 Mpo kutu na ntango oyo, nzoto na ngai mobimba ezali kolenge mpenza ntango ezali ngai komeka kolobela bino; kasi Nkolo Nzambe asungi ngai, mpe apesi ngai nzela ete nalobela bino, mpe atindaki ngai ete nayebisa bino na mokolo oyo, ete mwana mobali na ngai Mosiya azali mokonzi mpe moyangeli likolo na bino.

31 Mpe sikawa, bandeko na ngai, nalingi ete bosala lokola bosalaki kino sikawa. Lokola bobombaki mitindo na ngai, mpe lisusu mitindo ya tata na ngai, mpe bofulukaki, mpe bobikisamaki uta na kokweya kati na maboko ya banguna na bino, kutu boye soki bobombi mitindo ya mwana mobali na ngai, to mitindo ya Nzambe oyo ekopesama epayi na bino na nzela na ye, bokofuluka na mboka, mpe banguna na bino bakozala te na nguya likolo na bino.

32 Kasi, O bato na ngai, bokeba mbele boweli ebotama na kati na bino, mpe bopona kotosa molimo ya mabe, oyo Tata na ngai Mosiya alobelaki.

33 Mpo tala, ezali na lisuma moko esakolami likolo na ye oyo aponi kotosa molimo wana; mpo soki aponi kotosa yango, mpe awumeli mpe akufi na masumu na ye, se ye moko wana kaka akomela bokweisami mpo na molimo na ye moko; mpo akozwa lokola lifuta na ye etumbu ya libela, ebukaki ye mobeko ya Nzambe na bokeseni na boyebi na ye moko.

34 Nalobi epayi na bino, ete ezali na moko te na kati na bino, longola se soki ezali bana mike na bino baoyo bateyami te mpo na oyo etali makambo oyo, oyo ayebi te ete bozali na niongo ya seko na Tata na bino na lola, mpo na kozongisela ye nyonso oyo bozali na yango mpe nyonso oyo bozali; mpe lisusu ateyami te mpo na oyo etali masolo ya makomi oyo ezali na masakoli oyo elobamaki na baprofeta basantu, kutu kino na ntango tata na biso, Lehi, atikaki Yelusaleme;

35 Mpe lisusu, nyonso oyo elobamaki na batata na biso kino sikawa. Mpe tala, lisusu, balobaki oyo batindamaki na Nkolo; boye, ezali sembo mpe solo.

36 Mpe sikawa, nakoloba epayi na bino, bandeko na ngai, ete ekosila bino koyeba mpe kolakisama makambo oyo nyonso, soki bokobuka mobeko mpe bokokende na bokeseni na oyo elobamaki, ete bomilongola uta na Molimo ya Nkolo, ete ekoka kozala na esika te kati na bino mpo na kokamba bino na banzela ya bwania ete bokoka kopambolama, kofuluka, mpe kobatelama—

37 Nakoloba epayi na bino, ete moto oyo akosala oyo, se ye moko wana kaka akobima na botomboki ya polele na Nzambe; boye aponi kotosa molimo ya mabe, mpe akomi monguna ya bosembo nyonso; boye, Nkolo azali te na esika kati na ye, mpo afandaka te na batempelo ezanga bosantu.

38 Boye soki moto wana ayamboli te, mpe awumeli mpe akufi lokola monguna ya Nzambe, masengami ya boyengebene ya bonzambe bikolamusa molimo na ye mozanga kufa na eyoki ya makasi ete ayeba elindo na ye moko, oyo ekosala ete azonga nsima uta na miso ya Nkolo, mpe ekotondisa ntolo na ye na elindo, mpe mpasi, mpe nsomo, oyo ezali lokola moto oyo mozimaka te, oyo kani mololi emataka libela na libela.

39 Mpe sikawa nalobi epayi na bino, ete boboto ezali na bosenga te mpo na moto wana; boye nsuka na ezali kokanga motema na monioko oyo mosukaka soki moke te.

40 O, bino nyonso bampaka, mpe lisusu bino bilenge mibali, mpe bino bana mike baoyo bakoki koyoka maloba na ngai, mpo nalobelaki bino polele ete bokoka kososola, nazali kosambela ete bolamuka mpo na kokundola ezaleli ya nsomo ya baoyo bakweyaki kati na bobuki mobeko.

41 Mpe lisusu, nazali na mposa ete bomanyola likolo ya ezalela ya bopambolami mpe ya esengo na bango oyo babatelaka mitindo ya Nzambe. Mpo bapambolami na makambo nyonso, ya ntango mpe ya molimo lokola; mpe soki batikali sembo kino nsuka nde bayambami kati na lola, ete na yango bakoka kofanda elongo na Nzambe na ezalela ya esengo oyo esukaka mokolo moko te. O bomikundola, bomikundola ete makambo oyo ezali solo; mpo Nkolo Nzambe alobaki yango.

Bimisa na lokasa