Makomi
Moziya 29


Mokapo 29

Moziya apesi likanisi ete basambisi baponomo o esika ya mokonzi—Bakonzi bazangi sembo bakokamba bato ba bango o kati ya masumu—Alama Elenge aponomi mosambisi mokonzi—Azali lisusu nganga monene likolo lya Eklezia—Alama Nkulutu mpe Moziya bakufi. Penepene na 92–91 Yambo ya Klisto.

1 Sikawa esalaka Moziya eye atindaki bato o ntaka ya mboka mobimba, kozalaka na mposa ya koyeba bolingi bwa bango botali nani akozala mokonzi wa bango.

2 Mpe esalemaki ete mokano mwa bato moyaki, kolobaka: Biso tozali na mposa ete Aloni mwana mobali wa yo azala mokonzi wa biso mpe moyangeli wa biso.

3 Sikawa Aloni amataki o mboka ya Nefi, yango wana mokonzi akokaki te kopesa bokonzi likolo lya ye; mpe Aloni yemei alingaki te kokamata likolo lya ye bokonzi; mpe kutu ezalaki moko te wa bana babali ba Moziya kolingaka kozwa likolo lya ye bokonzi.

4 Yango wana mokonzi Moziya atindaki lisusu o ntei ya bato; iyo, kutu liloba lyoko likomama etindaki ye o ntei ya bato. Mpe iye izali maloba maye makomamaki, kolobaka:

5 Tala, O bato ba ngai, to bandeko ba ngai, mpo nazwi bino lokola bozali, nazali na mposa ete bomaniola ntina eye bobiangemi mpo ya komaniola—mpo bozali na mposa ya kozala na mokonzi moko.

6 Sikawa nasakoli epai ya bino ete ye oyo na ye bokonzi bosengeli kozala aboyi, mpe akokamata te likolo lya ye bokonzi.

7 Mpe sikawa soko ekoponomo mosusu o esika ya ye, tala nakobanga ebima boweli o ntei ya bino. Mpe nani ayebi soko mwana mobali wa ngai, na oyo bokonzi bokozala, abaluka mpo ya kozala na nkanda mpe kobenda eteni yoko ya bato baye nsima ya ye, eye ekobota bitumba mpe boweli o ntei ya bino, eye ekobota bosopi bwa makila mingi mpe bosantoli bwa nzela ya Nkolo, iyo, mpe ekobebisa bozo bwa bato mingi.

8 Sikawa nakoloba epai ya bino ete tika tozala na bwania mpe tomaniola makambo maye, mpo tozali te na likoki mpo ya kobebisa mwana mobali wa ngai, mpe tozali na likoki te mpo ya kobebisa mosusu soko aponomi o esika ya ye.

9 Mpe soko mwana mobali wa ngai abaluki lisusu o lolendo la ye mpe makambo ma mpamba akowangana makambo maye alobaki, mpe akosenge likoki lya ye mpo ya bokonzi, oyo ekosala ye mpe bato baye kosumuka nzike.

10 Mpe sikawa tika tozala na bwania, mpe totalela o boso o makambo maye, mpe tosala eye ekotia kimia ya bato baye.

11 Yango wana nakozala mokonzi wa bino o etikali ya mikolo mya ngai; nzokande, tika ete topono basambisi, mpo ya kosambisa bato baye engebene na mobeko mwa biso; mpe tokomisa ya sika makambo ma bato baye, mpo tokopono bato ba bwania mpo ya kozala basambisi, baye bakosambisa bato baye engebene na mitindo mya Nzambe.

12 Sikawa eleki bolamu ete moto moko asambisama na Nzambe kasi na moto te, mpo masambisi ma Nzambe mazali ntango inso mayengebene, kasi masambisi ma bato mazali ntango inso mayengebene te.

13 Yango wana, soko ekokaki ete bozala na bato bayengebene mpo ya kozala bakonzi ba bino, baye bakotia mibeko mya Nzambe, mpe bakosambisa bato baye engebene na mitindo mya ye, iyo, soko bokokaki kozala na bato bo bakonzi ba bino baye bakoki kosala lokola tata wa ngai Benyamina asalaki mpo ya bato baye—nalobi epai ya bino, soko eye ekokaki ntango inso kozala nde elongobanaki ete bozala ntango inso na bakonzi mpo ya koyangela likolo lya bino.

14 Mpe kutu ngaimei nasalaki na nguya mpe makasi manso maye nazwaki, mpo ya kolakisa bino mitindo mya Nzambe, mpe kotia kimia o ntaka ya mboka, ete ezala bitumba te to boweli te, to boyibi te, to bopunzi te, to bobomi te, to lolenge loko te la bobe;

15 Mpe onso oyo asalaki bobe, ye natumbolaki engebene na bobe boye asalaki, engebene na mobeko moye mopesamaki biso na batata ba biso.

16 Sikawa nakoloba epai ya bino, ete zambi bato banso bazali bayengebene te elongobani te ete bozala na mokonzi to bakonzi mpo ya koyangela likolo lya bino.

17 Mpo tala, boniboni nzike bobe mokonzi moko wa nkuna akosala esalema, iyo, mpe bonene kani bwa bobebisami!

18 Iyo, bomikundola mokonzi Noa, nkuna ya ye mpe bonsomo bwa ye, mpe lisusu nkuna mpe bonsomo bwa bato ba ye. Tala bonene kani bwa bobebisami boyaki likolo lya bango; mpe lisusu na ntina ya nkuna ya bango bamememeki o kati ya bowumbu.

19 Mpe ezalaka te lisalisi lya Mokeli wa bwania-bonso, mpe eye na ntina ya boyamboli bwa solo bwa bango, basengelaki na ntembe te kotikala o bowumbu kina sikawa.

20 Kasi tala, abikisaki bango zambi bamikitisaki liboso lya ye; mpe zambi babelelaki makasi epai ya ye abikisaki bango libanda lya bowumbu; mpe boye Nkolo akosalaka na nguya o makambo manso o ntei ya bana ba bato, kotandaka loboko la ngolu ona baye bakotiaka elikia ya bango na ye.

21 Mpe tala, sikawa nakoloba epai ya bino, bokoki te kolongola na bokonzi mokonzi mobe, longola se soko ezali na nzela ya boweli boike, mpe bosopi bwa makila maike.

22 Mpo tala, azali na baninga ba ye o bobe, mpe abombi bakengeli ba ye mpembeni ya ye; mpe apasoli nie mibeko mya bango baye bakonzaki o bosembo yambo ya ye; mpe aniati o nse ya makolo ma ye mitindo mya Nzambe;

23 Mpe asali mibeko, mpe atindi myango epai ya bato ba ye, iyo, mibeko nsima ya lolenge la nkuna ya yemei; mpe onso oyo akotosa te mibeko mya ye akosala abebisama; mpe banso baye o bakotomboka na ye akotinda mampinga ma ye mpo ya kobunda na bango, mpe soko akoki akobebisa bango; mpe boye mokonzi azangi sembo akosantola nzela ya bosembo bonso.

24 Mpe sikawa tala nalobi epai ya bino, elongobani te ete bonsomo bwa lolenge loye boya likolo lya bino.

25 Yango wana, bopona na mokano mwa bato baye, basambisi, ete bokoka kosambisama engebene na mibeko miye mipesamaki bino na batata ba biso, miye mizali milamu, mpe miye mipesamaki bango na loboko la Nkolo.

26 Sikawa ezali momeseno te ete mokano mwa bato mozala na mposa ya eloko yoko ekeseni na eye ezali semba; kasi ezali momeseno mpo ya eteni eke ya bato kozala na mposa eye ezali semba te; yango wana eye ekotosa bino mpe ekosala bino yango mobeko mwa bino—kosala nkita ya bino na mokano mwa bato.

27 Mpe soko ntango ekoya ete mokano mwa bato mokopona bobe, nde ezali ntango eye masambisi ma Nzambe makoya epai ya bino; iyo, nde ezali ntango akobimela bino na bobebisami bonene lokola abimelaki kala mboka eye.

28 Mpe sikawa soko bozali na basambisi, mpe basambisi bino te engebene na mibeko miye mipesamaki, bokoki kosala ete bakoka kosambisama na mosambisi moko wa likolo.

29 Soko basambisi ba bino ba likolo basambisi te masambisi semba, bokosala ete motango moko moke mwa basambisi ba bino ba nse basangana elongo, mpe bakosambisa basambisi ba bino ba likolo, engebene na mokano mwa bato.

30 Mpe natindi bino mpo ya kosala makambo maye o bobangi bwa Nkolo; mpe natindi bino mpo ya kosala makambo maye, mpe ete bozala na mokonzi te; ete soko bato baye basali masumu mpe mabe makoyanolama likolo lya mito mya bangomei.

31 Mpo tala nalobi epai ya bino, masumu ma bato mingi masalemaki na mabe ma bakonzi ba bango; yango wana mabe ma bango mayanolami likolo lya mito mya bakonzi ba bango.

32 Mpe sikawa nazali na mposa ete bokeseni boye bozala lisusu te o mboka eye, mingi o ntei ya bato ba ngai baye; kasi nazali na mposa ete mboka eye ezala mboka ya lipanda, mpe moto na moto akoka kosepela na makoki mpe matomba ma ye lokola, ntango inso Nkolo amoni elongobani ete tokoka kozala na bomoi mpe kosangola mboka, iyo, kutu lokola ntango inso moko wa bana ba biso akowumela o etando ya mboka eye.

33 Mpe makambo mingi lisusu mokonzi Moziya akomaki epai ya bango, na kofungolaka epai ya bango mimekano mpe mobulu monso mwa mokonzi sembo, iyo, misala minso mya bozo mpo ya bato ba bango, mpe lisusu boyimiyima bonso bwa bato na mokonzi wa bango; mpe alimbolaki yango inso epai ya bango.

34 Mpe alobaki epai ya bango ete makambo maye masengeli te kozala; kasi ete mokumba moya likolo lya bato banso, ete moto na moto akoka komeme eteni ya ye.

35 Mpe afungolaki lisusu epai ya bango mbeba o nse ya yango bakosala, na kozalaka na mokonzi azangi sembo ayangela likolo lya bango;

36 Iyo, mabe mpe bonsomo bonso bwa ye, mpe bitumba binso, mpe boweli, mpe botangisi bwa makila bonso, mpe moyibi, mpe bopunzi, mpe bosali pite, mpe ndenge inso ya mabe maye makoki te kotangema—kolobelaka bango ete makambo maye masengeli lisusu te kozala, ete mazalaki mpenza ma mpi o mitindo mya Nzambe.

37 Mpe sikawa esalemaki, esilisaka mokonzi Moziya kotinda makambo maye o ntei ya bato ba ye bandimisamaki na bosolo bwa maloba ma ye.

38 Yango wana batikaki mposa ya bango ya kozwa mokonzi, mpe bakomaki mitema likolo mpenza ete moto na moto azala na nkonzo ekokani o ntaka ya mboka mobimba; iyo, mpe moto na moto ayebisa bolingi bwa ye mpo ya koyanola mpo ya masumu ma yemei.

39 Yango wana, esalemaki ete basanganaki bangomei elongo o nzoto o ntaka ya mboka, mpo ya kopesa mokano mwa bango motali baye bakozala basambisi ba bango, mpo ya kosambisa bango engebene na mibeko mipesamaki bango; mpe basepelisamaki mpenza na ntina ya lipanda liye bopesamaki ndingisa epai ya bango.

40 Mpe bayikaki bokasi o bolingo ona Moziya; iyo, bamemiaki ye mingi koleka moto mosusu; mpo batalaki te likolo lya ye lokola mokonzi moniokoli oyo azali koluka litomba, iyo, mpo matabisi mana maye mabebisaka bozo; mpo asengeki te bozwi bwa bango, mpe asepelaki te o bosopi makila; kasi atiaki kimia o mboka, mpe apesaki ndingisa epai ya bato ba ye ete bakobikisama uta o ndenge inso ya bowumbu; yango wana bamemiaki ye, iyo, mpenza, koleka ndelo.

41 Mpe esalemaki ete baponoki basambisi mpo ya koyangela likolo lya bango, to mpo ya kosambisa bango engebene na mobeko; mpe eye basalaki o ntaka ya mboka mobimba.

42 Mpe esalemaki ete Alama aponomoki mpo ya kozala mosambisi mokonzi wa yambo, ye kozalaka lokola nganga monene, lokola tata wa ye apesaki mosala likolo lya ye, mpe lokola apesaki ye mokumba motali makambo manso ma eklezia.

43 Mpe sikawa esalemaki ete Alama atambolaki o nzela ya Nkolo, mpe abatelaki mitindo mya ye, mpe asambisaki masambisi semba; mpe ezalaki ntango inso kimia o katikati ya mboka.

44 Mpe boye ebandaki bokonzi bwa basambisi o ntaka ya mboka mobimba ya Zalayemila, o ntei ya bato banso baye babiangemaki Banefi; mpe Alama azalaki mosambisi mokonzi mpe wa yambo.

45 Mpe sikawa esalemaki ete tata wa ye akufaki, ezalaki ye na mibu ntuku mwambe na mibale, ezalaki ye na bomoi kokokisa mitindo mya Nzambe.

46 Mpe esalemaki ete Moziya akufaki lokola, o mobu mwa ntuku misato na misato mwa bokonzi bwa ye, ezalaki ya na mibu ntuku motoba na misato; esalaki mobimba mibu nkama mitano na libwa uta o ntango Lehi atikaki Yelusaleme.

47 Mpe boye esukaki bokonzi bwa bakonzi likolo lya bato ba Nefi; mpe boye esukaki mikolo mya Alama, oyo azalaki mobandi wa eklezia ya bango.