Makomi
Mosiya 23


Lisolo moko ya Alma mpe bato ya Nkolo, baoyo babenganamaki kati na esobe na bato ya Mokonzi Noa.

Ezali na mikapo 23 mpe 24.

Mokapo 23

Alma aboyi kozala mokonzi—Asaleli lokola nganganzambe monene—Nkolo apesi bato na Ye etumbu, mpe Balamani balongi mboka ya Helama—Amuloni, mokambi ya banganganzambe ya nkuna ya Mokonzi Noa, akonzi lokola moyangelami na mokonzi ya Balamani. Penepene na mibu 145–121 Liboso na mbotama ya Klisto.

1 Sikawa Alma, lokola akebisamaki na Nkolo ete mampinga ya basoda ya mokonzi Noa bakoya likolo na bango, mpe ayebisaki yango na bato na ye, boye basangisaki bibwele na bango elongo, mpe bakamataki mboto na bango, mpe bakendaki kati na esobe liboso ya mampinga ya basoda ya mokonzi Noa.

2 Mpe Nkolo apesaki bango makasi, ete bato ya mokonzi Noa bakoka kolonga bango te mpo na kobebisa bango.

3 Mpe bakimaki mikolo mwambe ya mobembo kati na esobe.

4 Mpe bakomaki na mboka moko, iyo, kutu mboka ya kitoko mpe ya elengi mingi, mboka moko wapi ezalaki mai ya peto.

5 Mpe batelemisaki biema na bango, mpe babandaki kowana bilanga, mpe babandaki kotonga ndako; iyo, bazalaki bato balinga mosala, mpe basalaki mingi koleka mpenza.

6 Mpe bato bazalaki na mposa ete Alma azala mokonzi na bango, mpo balingaki ye mingi na bato na ye.

7 Kasi alobaki epayi na bango: Tala, elongobani te ete tozala na mokonzi; mpo boye elobi Nkolo: Bokokumisa mosuni moko te likolo ya mosusu, soki te moto moko te akanisa ye moko kozala likolo ya mosusu; boye nalobi epayi na bino ete elongobani te ete bozala na mokonzi.

8 Nzokande, soki ekokaki kosalema ete bozala ntango nyonso na bato bayengebene mpo na kozala bakonzi na bino elingaki kozala malamu mpo na bino kozala na mokonzi.

9 Kasi bomikundola mabe ya mokonzi Noa mpe banganganzambe na ye; mpe ngai ngai moko nakangamaki na motambo moko, mpe nasalaki makambo mingi oyo ezalaki ya nsomo na miso ya Nkolo, oyo esalaki ngai boyamboli ya nsomo;

10 Nzokande, nsima ya mikakatano mingi, Nkolo ayokaki kobelela na ngai, mpe ayanolaki sambo na ngai, mpe akomisaki ngai esalelo moko na maboko na ye na komemaka mingi mpenza na kati na bino na boyebi ya bosolo na ye.

11 Nzokande, na oyo nakokembela te, mpo nalongobani te mpo na kokembela na ntina na ngai moko.

12 Mpe sikawa nalobi epayi na bino, bonyokwamaki na mokonzi Noa, mpe bozalaki na boumbu na ye mpe na banganganzambe na ye, mpe bamemamaki kati na mabe na bango; boye bokangamaki na singa ya mabe.

13 Mpe sikawa lokola bokangolamaki na nguya ya Nzambe uta na singa oyo; iyo, kutu uta na maboko ya mokonzi Noa mpe bato na ye, mpe lisusu uta na singa ya mabe, kutu bongo nazali na mposa ete botelema ngwi kati na lipanda oyo wapi bokomisamaki nsomi, mpe botiela moto moko te motema mpo na kozala mokonzi likolo na bino.

14 Mpe lisusu botiela moto moko te motema mpo na kozala moteyi na bino to mosali na bino likolo na bino, longola se soki azali moto ya Nzambe, oyo atambolaka na banzela na ye mpe abombaka mitindo na ye.

15 Boye Alma alakisaki bato na ye, ete moto na moto alinga moto ya penepene na ye lokola ye moko, ete boweli ezala te na kati na bango.

16 Mpe sikawa, Alma azalaki nganganzambe monene na bango, ye kozalaka mobandisi ya eklezia na bango.

17 Mpe esalemaki ete moko te azwaki likoki mpo na koteya to mpo na kolakisa longola se soki epesamelaki ye uta na Nzambe. Boye abulisaki banganganzambe na bango mpe balakisi na bango nyonso; mpe moto moko te abulisamaki longola se soki bazalaki bato bayengebene.

18 Boye basenzelaki likolo ya bato na bango, mpe baleisaki bango na makambo etali bosembo.

19 Mpe esalemaki ete babandaki kofuluka mpenza na mboka; mpe babiangaki mboka yango Helama.

20 Mpe esalemaki ete bayikanaki mpe bafulukaki koleka mpenza na mboka ya Helama; mpe batongaki engumba moko, oyo babiangaki engumba ya Helama.

21 Nzokande Nkolo amonaki ete elongobani mpo na kopesa etumbu na bato na ye; iyo, ameki bompikiliki na bango mpe bondimi na bango.

22 Nzokande—nyonso oyo akotiela ye motema na ye, se ye wana nde akotombolama na mokolo ya nsuka. Iyo, mpe boye ezalaki na bato oyo.

23 Mpo tala, nakolakisa epayi na bino ete bamemaki bango kati na boumbu, mpe moko te akokaki kokangola bango bobele Nkolo Nzambe na bango, iyo, kutu Nzambe ya Abalayama mpe ya Yisaka mpe ya Yakobo.

24 Mpe esalemaki ete akangolaki bango, mpe alakisaki nguya monene na ye epayi na bango, mpe bosepeli na bango ezalaki monene.

25 Mpo tala, esalemaki ete wana ezalaki bango na mboka ya Helama, iyo, na engumba ya Helama, wana ezalaki bango kowana bilanga nzinganzinga mpembeni, tala limpinga moko ya Balamani ezalaki na ndelo ya mboka na bango.

26 Sikawa esalemaki ete bandeko ya Alma bakimaki uta na bilanga na bango, mpe basanganaki bango moko esika moko na mboka ya Helama; mpe babangaki mingi mpo bamonaki Balamani.

27 Kasi Alma akendaki mpe atelemeki na kati na bango, mpe alendisaki bango ete babanga te, kasi bamikundola Nkolo Nzambe na bango mpe akobikisa bango.

28 Boye, batikaki bobangi na bango, mpe babandaki kobelela epayi ya Nkolo ete alembisa mitema ya Balamani, ete babikisa bango, mpe basi na bango, mpe bana na bango.

29 Mpe esalemaki ete Nkolo alembisaki mitema ya Balamani. Mpe Alma mpe bandeko na ye bakendaki mpe bamipesaki na maboko na bango; mpe Balamani bakamataki mboka ya Helama.

30 Sikawa mampinga ya basoda ya Balamani, baoyo balandaki nsima na bato ya mokonzi Limiyi, babungaki na esobe mikolo mingi.

31 Mpe tala, bakutaki banganganzambe bana ya mokonzi Noa, na esika moko oyo babiangaki Amuloni; mpe babandaki kokamata mboka ya Amuloni mpe babandaki kowana bilanga.

32 Sikawa nkombo ya mokambi ya banganganzambe bana ezalaki Amuloni.

33 Mpe esalemaki ete Amuloni abondelaki Balamani; mpe atindaki lisusu basi na bango, baoyo bazalaki bana basi ya Balamani, mpo na kobondela bandeko na bango, ete babebisa te mibali na bango.

34 Mpe Balamani bayokaki mawa likolo ya Amuloni mpe bandeko na ye, mpe babebisaki bango te, na ntina ya basi na bango.

35 Mpe Amuloni mpe bandeko na ye bakangamaki elongo na Balamani, mpe bazalaki kotambola elongo na esobe na boluki ya mboka ya Nefi ntango babombolaki mboka ya Helama, oyo ezwamaki na Alma mpe bandeko na ye.

36 Mpe esalemaki ete Balamani balakaki Alma mpe bandeko na ye, ete soki bakolakisa bango nzela oyo ekokamba na mboka ya Nefi ete bakotikela bango bomoi na bango mpe lipanda na bango.

37 Kasi esilaki Alma kolakisa bango nzela oyo ekambaka na mboka ya Nefi Balamani balingaki te kokokisa elaka na bango; kasi batiaki bakengeli nzinganzinga mpembeni na mboka ya Helama, likolo ya Alma mpe bandeko na ye.

38 Mpe ndambo ya bato oyo batikali kati na bango bakendaki na mboka ya Nefi; mpe eteni moko ya bango ezongaki na mboka ya Helama, mpe lisusu bamemaki elongo na bango basi mpe bana ya bakengeli oyo batikalaki na mboka.

39 Mpe mokonzi ya Balamani apesaki ndingisa epayi ya Amuloni ete azala mokonzi mpe moyangeli likolo ya bato na ye, baoyo bazalaki na mboka ya Helama; nzokande akozala na nguya mpo na kosala eloko moko te oyo ekeseni na bolingi ya mokonzi ya Balamani.

Bimisa na lokasa